< 예레미야 3 >

1 세상에서 말하기를 가령 사람이 그 아내를 버리므로 그가 떠나 타인의 아내가 된다 하자 본부가 그를 다시 받겠느냐? 그리하면 그 땅이 크게 더러워지지 않겠느냐? 하느니라 나 여호와가 말하노라 네가 많은 무리와 행음하고도 내게로 돌아오려느냐?
« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.
2 네 눈을 들어 자산을 보라 너의 행음치 아니한 곳이 어디 있느냐? 네가 길 가에 앉아 사람을 기다린 것이 광야에 있는 아라바 사람같아서 음란과 행악으로 이 땅을 더럽혔도다
« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala: Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
3 그러므로 단 비가 그쳐졌고 늦은 비가 없어졌느니라 그럴지라도 네가 창녀의 낯을 가졌으므로 수치를 알지 못하느니라
Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.
4 네가 이제부터는 내게 부르짖기를 나의 아버지여, 아버지는 나의 소시의 애호자시오니
Boni, obengaka Ngai te: ‹ Tata na ngai, moninga na ngai ya bomwana! ›
5 노를 한 없이 계속하시겠으며 끝까지 두시겠나이까 하지 않겠느냐 보라 네가 이같이 말하여도 악을 행하여 네 욕심을 이루었느니라 하시니라
Ozali kutu kotuna Ngai: ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda? Kotomboka na yo ekosila te? › Yango nde makambo ozali koloba, kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »
6 요시야 왕 때에 여호와께서 또 내게 이르시되 네가 배역한 이스라엘의 행한 바를 보았느냐 그가 모든 높은 산에 오르며 모든 푸른나무 아래로 가서 거기서 행음하였도다
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai: « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.
7 그가 이 모든 일을 행한 후에 내가 말하기를 그가 내게로 돌아오리라 하였으나 오히려 내게로 돌아오지 아니하였고 그 패역한 자매 유다는 그것을 보았느니라
Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango.
8 내게 배역한 이스라엘이 간음을 행하였으므로 내가 그를 내어 쫓고 이혼서까지 주었으되 그 패역한 자매 유다가 두려워 아니하고 자기도 가서 행음함을 내가 보았노라
Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.
9 그가 돌과 나무로 더불어 행음함을 가볍게 여기고 행음하여 이 땅을 더럽혔거늘
Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.
10 이 모든 일이 있어도 그 패역한 자매 유다가 진심으로 내게 돌아오지 아니하고 거짓으로 할 뿐이니라 여호와의 말이니라!
Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.
11 여호와께서 내게 이르시되 배역한 이스라엘은 패역한 유다보다 오히려 의로움이 나타났나니
Yawe alobaki na ngai: « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda.
12 너는 가서 북을 향하여 이 말을 선포하여 이르라 여호와께서 가라사대 배역한 이스라엘아 돌아오라! 나의 노한 얼굴을 너희에게로 향하지 아니하리라 나는 긍휼이 있는 자라 노를 한 없이 품지 아니하느니라 여호와의 말이니라
Kende kosakola sango oyo na nor: ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
13 너는 오직 네 죄를 자복하라! 이는 네 하나님 여호와를 배반하고 네 길로 달려 모든 푸른 나무 아래서 이방 신에게 절하고 내 목 소리를 듣지 아니하였음이니라 여호와의 말이니라
Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.
14 나 여호와가 말하노라 배역한 자식들아 돌아오라! 나는 너희 남편임이니라! 내가 너희를 성읍에서 하나와 족속 중에서 둘을 택하여 시온으로 데려오겠고
« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.
15 내가 또 내 마음에 합하는 목자를 너희에게 주리니 그들이 지식과 명철로 너희를 양육하리라
Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele.
16 나 여호와가 말하노라 너희가 이 땅에서 번성하여 많아질 때에는 사람 사람이 여호와의 언약궤를 다시는 말하지 아니할 것이요, 생각지 아니할 것이요, 기억지 아니할 것이요, 찾지 아니할 것이요, 만들지 아니할 것이며
Na mikolo wana, tango bokokoma penza ebele na mokili, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te: ‹ Sanduku ya Boyokani ya Yawe. › Bakomitungisa lisusu mpo na yango te mpe bakokanisa yango lisusu te; kozanga na yango ekolobela bato eloko moko te, mpe bakoluka lisusu te kosala Sanduku ya Boyokani.
17 그 때에 예루살렘이 여호와의 보좌라 일컬음이 되며 열방이 그리로 모이리니 곧 여호와의 이름으로 인하여 예루살렘에 모이고 다시는 그들의 악한 마음의 강퍅한 대로 행치 아니할 것이며
Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango.
18 그 때에 유다 족속이 이스라엘 족속과 동행하여 북에서부터 나와서 내가 너희 열조에게 기업으로 준 땅에 함께 이르리라
Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.
19 내가 스스로 말하기를 내가 어떻게 하든지 너를 자녀 중에 두며 허다한 나라 중에 아름다운 산업인 이 낙토를 네게 주리라 하였고 내가 다시 말하기를 너희가 나를 나의 아버지라 하고 나를 떠나지 말것이니라 하였노라
Namilobelaki: ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.
20 그런데 이스라엘 족속아! 마치 아내가 그 남편을 속이고 떠남같이 너희가 정녕히 나를 속였느니라 여호와의 말이니라
Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.
21 소리가 자산 위에서 들리니 곧 이스라엘 자손의 애곡하며 간구하는 것이라 그들이 그 길을 굽게 하며 자기 하나님 여호와를 잊어버렸음이로다
Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba: ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.
22 배역한 자식들아 돌아오라 내가 너희의 배역함을 고치리라 보소서! 우리가 주께 왔사오니 주는 우리 하나님 여호와이심이니이다
« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
23 작은 산들과 큰 산 위의 떠드는 무리에게 바라는 것은 참으로 허사라 이스라엘의 구원은 진실로 우리 하나님 여호와께 있나이다
Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema na bangomba mikuse mpe milayi ezali kaka makelele ya pamba. Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele.
24 부끄러운 그것이 우리의 어렸을 때로부터 우리 열조의 산업인 양떼와 소떼와 아들들과 딸들을 삼켰사온즉
Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso, bibwele na bango mpe ngombe na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi.
25 우리는 수치 중에 눕겠고 우리는 수욕에 덮이울 것이니 이는 우리와 우리 열조가 어렸을 때로부터 오늘까지 우리 하나님 여호와께 범죄하여 우리 하나님 여호와의 목소리를 청종치 아니하였음이니이다
Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »

< 예레미야 3 >