< 예레미야 16 >

1 여호와의 말씀이 또 내게 임하니라 가라사대
Yawe alobaki na ngai:
2 너는 이 땅에서 아내를 취하지 말며 자녀를 두지 말지니라
« Okobala te mpe okotikala kobota bana mibali to bana basi na esika oyo te. »
3 이 곳에서 생산한 자녀와 이 땅에서 그들을 해산한 어미와 그들을 낳은 아비에 대하여 나 여호와가 이같이 말하노라
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bana mibali mpe bana basi oyo bakobotama na mboka oyo, mpe na tina na basi oyo bazali bamama na bango mpe mibali oyo bazali batata na bango:
4 그들은 독한 병으로 죽고 슬퍼함을 입지 못하며 매장함을 얻지 못하여 지면의 분토와 같을 것이며 칼과 기근에 망하고 그 시체는 공중의 새와 땅 짐승의 밥이 되리라
« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »
5 여호와께서 이같이 말씀하시되 상가에 들어가지 말라 가서 통곡하지 말며 그들을 위하여 애곡하지 말라 내가 이 백성에게서 나의 평강을 빼앗으며 인자와 긍휼을 제함이니라 여호와의 말이니라
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe,
6 큰 자든지 작은 자든지 이 땅에서 죽으리니 그들이 매장되지 못할 것이며 그들을 위하여 애곡하는 자도 없겠고 자기 몸을 베거나 대머리 되게 하는 자도 없을 것이며
« ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.
7 슬플 때에 떡을 떼며 그 죽은 자를 인하여 그들을 위로하는 자가 없을 것이며 그들의 아비나 어미의 상사를 위하여 위로의 잔을 그들에게 마시울 자가 없으리라
Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango.
8 너는 잔치집에 들어가서 그들과 함께 앉아 먹거나 마시지 말라
Mpe kokota te na ndako oyo bazali kosala feti mpo na kovanda mpe komela,
9 만군의 여호와 이스라엘의 하나님이 이같이 말하노라 보라 기뻐하는 소리와 즐거워하는 소리와 신랑의 소리와 신부의 소리를 내가 네 목전, 네 시대에 이 곳에서 끊어지게 하리라
pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala.
10 네가 이 모든 말로 백성에게 고할 때에 그들이 네게 묻기를 여호와께서 우리에게 이 모든 큰 재앙을 광포하심은 어찜이며 우리의 죄악은 무엇이며 우리가 우리 하나님 여호와께 범한 죄는 무엇이뇨 하거든
Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo: ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye? Mabe nini tosalaki Ye? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso? ›
11 너는 그들에게 대답하기를 여호와께서 말씀하시되 너희 열조가 나를 버리고 다른 신들을 좇아서 그들을 섬기며 그들에게 절하고나를 버려 내 법을 지키지 아니하였음이라
Okoloba na bango: ‹ Ezali mpo ete batata na bino basundolaki Ngai, › elobi Yawe, ‹ basalaki banzambe ya bapaya, basalelaki yango mpe bafukamelaki yango. Batikaki Ngai mpe babatelaki Mobeko na Ngai te.
12 너희가 너희 열조보다 더욱 악을 행하였도다 보라, 너희가 각기 악한 마음의 강퍅함을 따라 행하고 나를 청종치 아니하였으므로
Bongo bino, bozali mpe kotambola na ezaleli mabe koleka ata ezaleli mabe ya batata na bino. Botala ndenge nini moko na moko kati na bino azali kolanda makanisi mabe ya motema na ye, na esika ya kotosa Ngai.
13 내가 너희를 이 땅에서 쫓아 내어 너희와 너희 열조의 알지 못하던 땅에 이르게 할 것이라 너희가 거기서 주야로 다른 신들을 섬기리니 이는 내가 너희에게 은혜를 베풀지 아니함이라 하셨다 하라
Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
14 여호와께서 가라사대 그러나 보라 날이 이르리니 다시는 이스라엘 자손을 애굽 땅에서 인도하여 내신 여호와의 사심으로 맹세하지 아니하고
Yango wana, na mikolo oyo ezali koya, » elobi Yawe, « bato bakotika koloba: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito; ›
15 이스라엘 자손을 북방 땅과 그 모든 쫓겨났던 나라에서 인도하여 내신 여호와의 사심으로 맹세하리라 내가 그들을 그 열조에게 준 그들의 땅으로 인도하여 들이리라
kasi bakokoma koloba: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango.
16 여호와께서 가라사대 보라 내가 많은 어부를 불러다가 그들을 낚게 하며 그 후에 많은 포수를 불러다가 그들을 모든 산과 모든 작은 산과 암혈에서 사냥하게 하리니
Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.
17 내 눈이 그들의 행위를 감찰하므로 그들이 내 얼굴 앞에서 숨김을 얻지 못하며 그들의 죄악이 내 목전에서 은폐되지 못함이라
Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai.
18 내가 위선 그들의 악과 죄를 배나 갚을 것은 그들이 그 미운 물건의 시체로 내 땅을 더럽히며 그들의 가증한 것으로 내 산업에 가득하게 하였음이니라
Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. »
19 여호와 나의 힘, 나의 보장, 환난날의 피난처시여, 열방이 땅 끝에서 주께 이르러 말하기를 우리 열조의 계승한 바는 허무하고 망탄하고 무익한 것 뿐이라
Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba: « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
20 인생이 어찌 신 아닌 것을 자기의 신으로 삼겠나이까? 하리이다
Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe, tango bango moko bazali banzambe te?
21 여호와께서 가라사대 보라 이번에 그들에게 내 손과 내 능을 알려서 그들로 내 이름이 여호와인 줄 알게 하리라
Yango wana, nakolakisa bango, nakolakisa bango nguya mpe makasi na ngai; bongo bakoyeba penza ete Kombo na Ngai ezali Yawe. »

< 예레미야 16 >