< 호세아 5 >

1 제사장들아 이를 들으라 이스라엘 족속들아 깨달으라 왕족들아 귀를 기울이라 너희에게 심판이 있나니 너희가 미스바에서 올무가 되며 다볼 위에서 친 그물이 됨이라
Bino Banganga-Nzambe, boyoka! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.
2 패역자가 살륙죄에 깊이 빠졌으매 내가 저희를 다 징책하노라
Batomboki batimolaki libulu ya mozindo; mpe Ngai nakopesa bango nyonso etumbu.
3 에브라임은 내가 알고 이스라엘은 내게 숨기지 못하나니 에브라임아 이제 네가 행음하였고 이스라엘이 이미 더러웠느니라
Nayebi Efrayimi malamu penza; mpe Isalaele azali ya kobombama te na miso na Ngai. Efrayimi, awa omipesaki na kindumba, Isalaele mobimba akomi mbindo mpo na yango.
4 저희의 행위가 저희로 자기 하나님에게 돌아가지 못하게 하나니 이는 음란한 마음이 그 속에 있어 여호와를 알지 못하는 까닭이라
Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
5 이스라엘의 교만이 그 얼굴에 증거가 되나니 그 죄악을 인하여 이스라엘과 에브라임이 넘어지고 유다도 저희와 한가지로 넘어지리라
Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango; ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaele bakokweya mpo na masumu na bango; bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.
6 저희가 양떼와 소떼를 끌고 여호와를 찾으러 갈지라도 만나지 못할 것은 이미 저희에게서 떠나셨음이라
Tango bakokende koluka Yawe, elongo na bangombe mpe bameme na bango, bakomona Ye te, pamba te akabwanaki na bango.
7 저희가 여호와께 정조를 지키지 아니하고 사생자를 낳았으니 그러므로 새 달이 저희와 그 기업을 함께 삼키리로다
Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.
8 너희가 기브아에서 나팔을 불며 라마에서 호각을 불며 벧아웬에서 깨우쳐 소리하기를 베냐민아 네 뒤를 쫓는다 할지어다
Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni! Oh Benjame, keba!
9 견책하는 날에 에브라임이 황무할 것이라 내가 이스라엘 지파 중에 필연 있을 일을 보였노라
Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye. Nazali koloba makambo ya solo kati na bikolo ya Isalaele.
10 유다 방백들은 지계표를 옮기는 자 같으니 내가 나의 진노를 저희에게 물같이 부으리라
Bakambi ya Yuda bazali lokola bato oyo bapusaka bandelo. Nakopelisela bango kanda na Ngai lokola mpela.
11 에브라임은 사람의 명령 좇기를 좋아하므로 학대를 받고 재판의 압제를 당하는도다
Efrayimi azali konyokwama, anyatami na etumbu, pamba te akangamaki na kolanda kaka banzambe ya bikeko.
12 그러므로 내가 에브라임에게는 좀 같으며 유다 족속에게는 썩이는 것 같도다
Mpe Ngai, nakomi lokola nseka na miso ya Efrayimi, lokola eloko ya kopola na miso ya bato ya Yuda.
13 에브라임이 자기의 병을 깨달으며 유다가 자기의 상처를 깨달았고 에브라임은 앗수르로 가서 야렙 왕에게 사람을 보내었으나 저가 능히 너희를 고치지 못하겠고 너희 상처를 낫게 하지 못하리라
Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.
14 내가 에브라임에게는 사자 같고 유다 족속에게는 젊은 사자 같으니 나 곧 내가 움켜갈지라 내가 탈취하여 갈지라도 건져낼 자가 없으리라
Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.
15 내가 내 곳으로 돌아가서 저희가 그 죄를 뉘우치고 내 얼굴을 구하기까지 기다리리라 저희가 고난을 받을 때에 나를 간절히 구하여 이르기를
Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.

< 호세아 5 >