< 창세기 46 >

1 이스라엘이 모든 소유를 이끌고 발행하여 브엘세바에 이르러 그 아비 이삭의 하나님께 희생을 드리니
Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye.
2 밤에 하나님이 이상중에 이스라엘에게 나타나시고 불러 가라사대 야곱아! 야곱아! 하시는지라 야곱이 가로되 `내가 여기 있나이다` 하매
Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli: — Jakobi! Jakobi! Jakobi azongisaki: — Ngai oyo.
3 하나님이 가라사대 나는 하나님이라 네 아비의 하나님이니 애굽으로 내려가기를 두려워 말라 내가 거기서 너로 큰 민족을 이루게 하리라
Nzambe alobaki: — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna.
4 내가 너와 함께 애굽으로 내려가겠고 정녕 너를 인도하여 다시 올라올 것이며 요셉이 그 손으로 네 눈을 감기리라 하셨더라
Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo.
5 야곱이 브엘세바에서 발행할새 이스라엘의 아들들이 바로의 태우려고 보낸 수레에 자기들의 아비 야곱과 자기들의 처자들을 태웠고
Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye: tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango.
6 그 생축과 가나안 땅에서 얻은 재물을 이끌었으며 야곱과 그 자손들이 다 함께 애굽으로 갔더라
Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito.
7 이와 같이 야곱이 그 아들들과 손자들과, 딸들과, 손녀들 곧 그 모든 자손을 데리고 애굽으로 갔더라
Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito: bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi: bakitani na ye nyonso.
8 애굽으로 내려간 이스라엘 가족의 이름이 이러하니 야곱과 그 아들들 곧 야곱의 맏아들 르우벤과
Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito: Ribeni, mwana liboso ya Jakobi.
9 르우벤의 아들 하녹과, 발루와, 헤스론과, 갈미요
Bana mibali ya Ribeni: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
10 시므온의 아들 곧 여무엘과, 야민과, 오핫과, 야긴과, 스할과, 가나안 여인의 소생 사울이요
Bana mibali ya Simeoni: Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana.
11 레위의 아들 곧 게르손과, 그핫과, 므라리요
Bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
12 유다의 아들 곧 엘과, 오난과, 셀라와, 베레스와, 세라니, 엘과 오난은 가나안 땅에서 죽었고 또 베레스의 아들 곧 헤스론과, 하물이요
Bana mibali ya Yuda: Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi: Etsironi mpe Amuli.
13 잇사갈의 아들 곧 돌라와, 부와와, 욥과, 시므론이요
Bana mibali ya Isakari: Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi.
14 스불론의 아들 곧 세렛과, 엘론과, 얄르엘이니
Bana mibali ya Zabuloni: Seredi, Eloni mpe Yaleyeli.
15 이들은 레아가 밧단아람에서 야곱에게 낳은 자손들이라 그 딸 디나를 합하여 남자와 여자가 삼십 삼명이며
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
16 갓의 아들 곧 시뵨과, 학기와, 수니와, 에스본과, 에리와, 아로디와, 아렐리요
Bana mibali ya Gadi: Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli.
17 아셀의 아들 곧 임나와, 이스와와, 이스위와, 브리아와 그들의 누이 세라며 또 브리아의 아들 곧 헤벨과, 말기엘이니
Bana mibali ya Aseri: Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera. Bana mibali ya Beria: Eberi mpe Malikieli.
18 이들은 라반이 그 딸 레아에게 준 실바가 야곱에게 낳은 자손들이라 합 십 륙명이요
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba.
19 야곱의 아내 라헬의 아들 곧 요셉과, 베냐민이요
Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi: Jozefi mpe Benjame.
20 애굽 땅에서 온 제사장 보디베라의 딸 아스낫이 요셉에게 낳은 므낫세와 에브라임이요
Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale: Manase mpe Efrayimi.
21 베냐민의 아들 곧 벨라와, 베겔과, 아스벨과, 게라와, 나아만과, 에히와, 로스와, 뭅빔과, 훔빔과, 아릇이니
Bana mibali ya Benjame: Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.
22 이들은 라헬이 야곱에게 낳은 자손이라 합 십 사명이요
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi: bango nyonso bazalaki zomi na minei.
23 단의 아들 후심이요
Mwana mobali ya Dani: Ushimi.
24 납달리의 아들 곧 야스엘과, 구니와, 예셀과, 실렘이라
Bana mibali ya Nefitali: Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi.
25 이들은 라반이 그 딸 라헬에게 준 빌하가 야곱에게 낳은 자손이니 합이 칠명이라
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli.
26 야곱과 함께 애굽에 이른 자는 야곱의 자부 외에 육십 륙명이니 이는 다 야곱의 몸에서 나온 자며
Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba.
27 애굽에서 요셉에게 낳은 아들이 두명이니 야곱의 집 사람으로 애굽에 이른 자의 도합이 칠십명이었더라
Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo.
28 야곱이 유다를 요셉에게 미리 보내어 자기를 고센으로 인도하게 하고 다 고센 땅에 이르니
Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni,
29 요셉이 수레를 갖추고 고센으로 올라가서 아비 이스라엘을 맞으며 그에게 보이고 그 목을 어긋맞겨 안고 얼마동안 울매
Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.
30 이스라엘이 요셉에게 이르되 `네가 지금까지 살아 있고 내가 네 얼굴을 보았으니 지금 죽어도 가하도다'
Isalaele alobaki na Jozefi: — Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi!
31 요셉이 그 형들과 아비의 권속에게 이르되 내가 올라가서 바로에게 고하여 이르기를 `가나안 땅에 있던 내 형들과 내 아비의 권속이 내게로 왔는데
Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye: — Nakokende koyebisa Faraon: « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai.
32 그들은 목자라 목축으로 업을 삼으므로 그 양과 소와 모든 소유를 이끌고 왔나이다 하리니
Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. »
33 바로가 당신들을 불러서 너희의 업이 무엇이냐? 묻거든
Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino: « Bosalaka mosala nini? »
34 당신들은 고하기를 주의 종들은 어렸을 때부터 지금까지 목축하는 자이온데 우리와 우리 선조가 다 그러하니이다 하소서 애굽 사람은 다 목축을 가증히 여기나니 당신들이 고센 땅에 거하게 되리이다`
Bokozongisa: « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.

< 창세기 46 >