< 창세기 40 >
1 그 후에 애굽 왕의 술 맡은 자와 떡굽는 자가 그 주 애굽 왕에게 범죄한지라
Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito.
2 바로가 그 두 관원장 곧 술 맡은 관원장과 떡 굽는 관원장에게 노하여
Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu: kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
3 그들을 시위대장의 집 안에 있는 옥에 가두니 곧 요셉의 갇힌 곳이라
Abwakaki bango na boloko kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, boloko epai wapi Jozefi azalaki.
4 시위대장이 요셉으로 그들에게 수종하게 하매 요셉이 그들을 섬겼더라 그들이 갇힌지 수일이라
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki bango na maboko ya Jozefi mpo ete alandela bango. Boye basalaki mikolo mwa mingi na boloko.
5 옥에 갇힌 애굽 왕의 술 맡은 자와 떡 굽는 자 두 사람이 하룻밤에 꿈을 꾸니 각기 몽조가 다르더라
Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.
6 아침에 요셉이 들어가 보니 그들에게 근심 빛이 있는지라
Na tongo, Jozefi akendeki epai na bango mpe amonaki ete bazali mawa-mawa.
7 요셉이 그 주인의 집에 자기와 함께 갇힌 바로의 관원장에게 묻되 당신들이 오늘 어찌하여 근심 빛이 있나이까?
Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye: — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa?
8 그들이 그에게 이르되 `우리가 꿈을 꾸었으나 이를 해석할 자가 없도다' 요셉이 그들에게 이르되 `해석은 하나님께 있지 아니하나이까? 청컨대 내게 고하소서'
Bazongiselaki ye: — Biso mibale toloti bandoto; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango: — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino.
9 술 맡은 관원장이 그 꿈을 요셉에게 말하여 가로되 `내가 꿈에 보니 내 앞에 포도나무가 있는데
Bongo kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito ayebisaki Jozefi ndoto na ye. Alobaki: — Na ndoto na ngai, namonaki nzete ya vino liboso na ngai.
10 그 나무에 세 가지가 있고 싹이 나서 꽃이 피고 포도송이가 익었고
Nzete yango ya vino ezalaki na bitape misato. Bongo ekomaki kobimisa mito, fololo mpe maboke ebimisaki bambuma ya kotela.
11 내 손에 바로의 잔이 있기로 내가 포도를 따서 그 즙을 바로의 잔에 짜서 그 잔을 바로의 손에 드렸노라'
Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye.
12 요셉이 그에게 이르되 `그 해석이 이러하니 세 가지는 사흘이라
Jozefi alobaki na ye: — Tala ndimbola ya ndoto na yo: « Bitape misato ezali mikolo misato.
13 지금부터 사흘 안에 바로가 당신의 머리를 들고 당신의 전직을 회복하리니 당신이 이왕에 술 맡은 자가 되었을 때에 하던것 같이 바로의 잔을 그 손에 받들게 되리이다
Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala.
14 당신이 득의하거든 나를 생각하고 내게 은혜를 베풀어서 내 사정을 바로에게 고하여 이 집에서 나를 건져내소서
Kasi tango makambo nyonso oyo ekotambola malamu mpo na yo, nabondeli yo, kanisa ngai mpe salela ngai bolamu, zala molobeli na ngai epai ya Faraon mpo ete abimisa ngai na boloko oyo.
15 나는 히브리 땅에서 끌려온 자요 여기서도 옥에 갇힐 일은 행치 아니하였나이다'
Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. »
16 떡 굽는 관원장이 그 해석이 길함을 보고 요셉에게 이르되 `나도 꿈에 보니 흰 떡 세 광주리가 내 머리에 있고
Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi: — Ngai mpe nalotaki ndoto: « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai.
17 그 윗광주리에 바로를 위하여 만든 각종 구운 식물이 있는데 새들이 내 머리의 광주리에서 그것을 먹더라'
Kitunga ya likolo ezalaki na bagato ya ndenge na ndenge, oyo Faraon alingaka; kasi bandeke ezalaki kolia yango wuta na kitunga oyo ezalaki na moto na ngai. »
18 요셉이 대답하여 가로되 `그 해석은 이러하니 세 광주리는 사흘이라
Jozefi alobaki na ye: — Tala ndimbola ya ndoto na yo: « Bitunga misato ezali mikolo misato.
19 지금부터 사흘 안에 바로가 당신의 머리를 끊고 당신을 나무에 달리니 새들이 당신의 고기를 뜯어 먹으리이다' 하더니
Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. »
20 제 삼일은 바로의 탄일이라 바로가 모든 신하를 위하여 잔치할때에 술 맡은 관원장과 떡 굽는 관원장으로 머리를 그 신하 중에 들게 하니라
Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
21 바로의 술 맡은 관원장은 전직을 회복하매 그가 잔을 바로의 손에 받들어 드렸고
Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon.
22 떡 굽는 관원장은 매여 달리니 요셉이 그들에게 해석함과 같이 되었으나
Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango.
23 술 맡은 관원장이 요셉을 기억지 않고 잊었더라
Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te: abosanaki ye.