< 창세기 30 >

1 라헬이 자기가 야곱에게 아들을 낳지 못함을 보고 그 형을 투기하여 야곱에게 이르되 `나로 자식을 낳게 하라 그렇지 아니하면 내가 죽겠노라'
Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi: — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
2 야곱이 라헬에게 노를 발하여 가로되 `그대로 성태치 못하게 하시는 이는 하나님이시니 내가 하나님을 대신하겠느냐?'
Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki: — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota?
3 라헬이 가로되 `나의 여종 빌하에게로 들어가라 그가 아들을 낳아 내 무릎에 두리니 그러면 나도 그를 인하여 자식을 얻겠노라' 하고
Rasheli alobaki: — Tala Bila, mwasi mowumbu na ngai; sangisa na ye nzoto mpo ete abotela ngai bana, mpe na nzela na ye, ngai mpe nakoka kotonga libota.
4 그 시녀 빌하를 남편에게 첩으로 주매 야곱이 그에게로 들어갔더니
Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,
5 빌하가 잉태하여 야곱에게 아들을 낳은지라
mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali.
6 라헬이 가로되 `하나님이 내 억울함을 푸시려고 내 소리를 들으사 내게 아들을 주셨다' 하고 이로 인하여 그 이름을 단이라 하였으며
Rasheli alobaki: « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. »
7 라헬의 시녀 빌하가 다시 잉태하여 둘째 아들을 야곱에게 낳으매
Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
8 라헬이 가로되 `내가 형과 크게 경쟁하여 이기었다' 하고 그 이름을 납달리라 하였더라
Rasheli alobaki: « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »
9 레아가 자기의 생산이 멈춤을 보고 그 시녀 실바를 취하여 야곱에게 주어 첩을 삼게 하였더니
Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.
10 레아의 시녀 실바가 야곱에게 아들을 낳으매
Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali.
11 레아가 가로되 `복되도다' 하고 그 이름을 갓이라 하였으며
Lea alobaki: « Oyo nde esengo! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. »
12 레아의 시녀 실바가 둘째 아들을 야곱에게 낳으매
Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
13 레아가 가로되 `기쁘도다 모든 딸들이 나를 기쁜 자라 하리로다' 하고 그 이름을 아셀이라 하였더라
Lea alobaki: « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. »
14 맥추 때에 르우벤이 나가서 들에서 합환채를 얻어 어미 레아에게 드렸더니 라헬이 레아에게 이르되 `형의 아들의 합환채를 청구하노라'
Na eleko ya kokata ble, Ribeni akendeki na bilanga mpe amonaki bambuma ya mandragore; amemelaki yango Lea, mama na ye. Bongo Rasheli alobaki na Lea: — Nabondeli yo, pesa ngai ndambo ya bambuma ya mandragore oyo mwana na yo amemaki.
15 레아가 그에게 이르되 `네가 내 남편을 빼앗은 것이 작은 일이냐? 네가 내 아들의 합환채도 빼앗고자 하느냐?' 라헬이 가로되 `그러면 형의 아들의 합환채 대신에 오늘밤에 내 남편이 형과 동침하리라' 하리라
Kasi Lea azongiselaki ye: — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai? Rasheli alobaki na ye: — Malamu! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo.
16 저물 때에 야곱이 들에서 돌아오매 레아가 나와서 그를 영접하며 이르되 `내게로 들어오라 내가 내 아들의 합환채로 당신을 샀노라' 그 밤에 야곱이 그와 동침하였더라
Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye: « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana.
17 하나님이 레아를 들으셨으므로 그가 잉태하여 다섯째 아들을 야곱에게 낳은지라
Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano.
18 레아가 가로되 `내가 내 시녀를 남편에게 주었으므로 하나님이 내게 그 값을 주셨다' 하고 그 이름을 잇사갈이라 하였으며
Lea alobaki: « Nzambe apesi ngai lifuti na ngai lokola napesaki mosali na ngai ya mwasi epai ya mobali na ngai. » Boye apesaki ye kombo « Isakari. »
19 레아가 다시 잉태하여 여섯째 아들을 야곱에게 낳은지라
Lea azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya motoba.
20 레아가 가로되 `하나님이 네게 후한 선물을 주시도다 내가 남편에게 여섯 아들을 낳았으니 이제는 그가 나와 함께 거하리라' 하고 그 이름을 스불론이라 하였으며
Lea alobaki: « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. »
21 그 후에 그가 딸을 낳고 그 이름을 디나라 하였더라
Sima na mikolo, abotaki lisusu mwana mwasi mpe apesaki ye kombo « Dina. »
22 하나님이 라헬을 생각하신지라 하나님이 그를 들으시고 그 태를 여신고로
Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota.
23 그가 잉태하여 아들을 낳고 가로되 `하나님이 나의 부끄러움을 씻으셨다' 하고
Akomaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki: « Nzambe alongoli soni na ngai. »
24 그 이름을 요셉이라 하니 여호와는 다시 다른 아들을 내게 더하시기를 원하노라 함이었더라
Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki: « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali! »
25 라헬이 요셉을 낳은 때에 야곱이 라반에게 이르되 `나를 보내어 내 고향 내 본토로 가게 하시되
Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani: — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai.
26 내가 외삼촌에게서 일하고 얻은 처자를 내게 주어 나로 가게 하소서 내가 외삼촌께 한 일은 외삼촌이 아시나이다'
Pesa ngai mpe basi mpe bana na ngai, ba-oyo mpo na bango nasaleli yo; bongo nakokende na ngai. Pamba te oyebi malamu mosala makasi oyo nasaleli yo.
27 라반이 그에게 이르되 `여호와께서 너로 인하여 내게 복 주신줄을 내가 깨달았노니 네가 나를 사랑스럽게 여기거든 유하라'
Kasi Labani alobaki na ye: — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.
28 또 가로되 `네 품삯을 정하라 내가 그것을 주리라'
Abakisaki: — Katela ngai lifuti na yo mpe nakofuta yo yango.
29 야곱이 그에게 이르되 `내가 어떻게 외삼촌을 섬겼는지, 어떻게 외삼촌의 짐승을 쳤는지 외삼촌이 아시나이다
Jakobi alobaki na ye: — Oyebi yo moko ndenge nini ngai nasaleli yo mpe ndenge nini, na nzela na ngai, bibwele na yo ekomi ebele.
30 내가 오기 전에는 외삼촌의 소유가 적더니 번성하여 떼를 이루었나이다 나의 공력을 따라 여호와께서 외삼촌에게 복을 주셨나이다 그러나 나는 어느 때에나 내 집을 세우리이까?'
Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko?
31 라반이 가로되 내가 무엇으로 네게 주랴 야곱이 가로되 외삼촌께서 아무 것도 내게 주실 것이 아니라 나를 위하여 이 일을 행하시면 내가 다시 외삼촌의 양떼를 먹이고 지키리이다
Labani atunaki ye: — Nasengeli kopesa yo nini? Jakobi azongisaki: — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo.
Lelo, nakoleka na kati-kati ya bibwele na yo, nakolongola kati na bana meme, bameme nyonso ya madodo-madodo mpe oyo ezali ya banzela-nzela ya mwindo; mpe lisusu kati na bantaba nyonso ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe. Wana nde ezala lifuti na ngai.
Boye bosembo na ngai ekomonana sima na mikolo tango okoya kotala lifuti na ngai. Soki omoni epai na ngai ntaba ezanga madodo to ezanga banzela ya pembe to mwana meme ezanga madodo to ezanga banzela ya mwindo, wana ekozala lokola nayibi yango.
Labani alobaki: — Iyo! Tika ete ezala ndenge olobi.
Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali.
Sima, Labani atambolaki mikolo misato mpo na kokabwana na Jakobi, wana Jakobi akobaki kobatela ndambo ya bibwele ya Labani oyo etikalaki.
Jakobi azwaki bitape ya mobesu ya nzete ya pepiliye, ya amande mpe ya platane.
Bongo atiaki kati na basani mpe kati na bimelelo, liboso ya bibwele, bitape oyo apalolaki, na esika oyo bibwele ezalaki koya komela mayi. Wana bibwele ya basi ezalaki koyoka posa ya mayi, ezalaki mpe koyoka posa ya kosangisa nzoto na bibwele ya mibali.
Boye, bibwele ezalaki koya kosangisa nzoto liboso ya bitape wana; mpe tango ezalaki kobota, bana na yango ezalaki na banzela-nzela ya pembe, banzela-nzela ya mwindo mpe madodo-madodo.
Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani.
Tango nyonso bibwele ya basi, oyo ezalaki na nzoto minene, ezalaki na posa ya kosangisa nzoto, Jakobi azalaki kotia liboso ya bibwele yango bitape ya nzete kati na basani oyo yango ezalaki komelela mayi mpo ete esangisa nzoto pembeni ya bitape wana.
Kasi, na esika yango, azalaki kotia te bibwele oyo ekonda. Boye bibwele oyo ekonda ezalaki ya Labani, mpe oyo ya minene ezalaki ya Jakobi.
Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.

< 창세기 30 >