< 에스겔 47 >
1 그가 나를 데리고 전 문에 이르시니 전의 전면이 동을 향하였는데 그 문지방 밑에서 물이 나와서 동으로 흐르다가 전 우편 제단남편으로 흘러 내리더라
Moto yango azongisaki ngai pene ya ekotelo ya Tempelo epai wapi namonaki mayi kobima longwa na ekotelo na yango: ezalaki kotiola na ngambo ya este, pamba te Tempelo ezalaki etala na ngambo ya este; mayi ezalaki kokita na se ya ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude ya etumbelo.
2 그가 또 나를 데리고 북문으로 나가서 바깥 길로 말미암아 꺾여 동향한 바깥 문에 이르시기로 본즉 물이 그 우편에서 스미어 나오더라
Bongo abimisaki ngai na nzela ya ekuke ya nor, amemaki ngai mpe atambolisaki ngai zingazinga ya lopango ya libanda kino na ekuke ya libanda oyo etala na ngambo ya este. Mpe namonaki ete mayi yango ezali kotiola wuta na ngambo ya sude.
3 그 사람이 손에 줄을 잡고 동으로 나아가며 일천척을 척량한 후에 나로 그 물을 건너게 하시니 물이 발목에 오르더니
Moto yango akendeki na ngambo ya este mpe asimbaki singa oyo bamekelaka molayi na loboko na ye; amekaki molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na bisika oyo matambe esukela.
4 다시 일천척을 척량하고 나로 물을 건너게 하시니 물이 무릎에 오르고 다시 일천척을 척량하고 나로 물을 건너게 하시니 물이 허리에 오르고
Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na mabolongo. Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango asukelaki ngai na loketo.
5 다시 일천척을 척량하시니 물이 내가 건너지 못할 강이 된지라 그 물이 창일하여 헤엄할 물이요 사람이 능히 건너지 못할 강이더라
Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano; kasi na mbala oyo, mayi yango ekomaki ebale moko ya monene oyo nazalaki lisusu ata na makoki ya kokatisa te, pamba te mayi emataki makasi mpe ekomaki mozindo koleka. Bongo esengelaki kaka kokata mayi (na esika ya kokatisa yango na makolo), mpo ete moto moko te azalaki na makoki ya kokatisa ebale yango.
6 그가 내게 이르시되 인자야 네가 이것을 보았느냐 하시고 나를 인도하여 강가로 돌아가게 하시기로
Moto yango atunaki ngai: « Mwana na moto, boni, omoni? » Bongo azongisaki ngai na ngambo ya ebale.
7 내가 돌아간즉 강 좌우편에 나무가 심히 많더라
Tango nakomaki kuna, namonaki banzete ebele penza, na bangambo nyonso mibale ya ebale.
8 그가 내게 이르시되 이 물이 동방으로 향하여 흘러 아라바로 내려가서 바다에 이르리니 이 흘러 내리는 물로 그 바다의 물이 소성함을 얻을지라
Moto yango alobaki na ngai: « Mayi oyo ezali kotiola na ngambo ya este ya etuka mpe ezali kokita kino na etando ya Araba epai wapi ezali komibwaka na ebale monene. Tango kaka ekotaki na mayi ya ebale monene, mayi ya ebale monene ekomaki peto.
9 이 강물이 이르는 곳마다 번성하는 모든 생물이 살고 또 고기가 심히 많으리니 이 물이 흘러 들어 가므로 바닷물이 소성함을 얻겠고 이 강이 이르는 각처에 모든 것이 살 것이며
Bipai nyonso mayi yango ezalaki koleka, bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kobotana, bambisi mpe ezalaki kobotana ebele; pamba te mayi yango ezalaki kokoma kuna mpe kopetola mayi ya ebale monene. Bongo na esika nyonso oyo mayi yango ezalaki koleka, nyonso ezalaki kozwa bomoi.
10 또 이 강 가에 어부가 설 것이니 엔게디에서부터 에네글라임까지 그물 치는 곳이 될 것이라 그 고기가 각기 종류를 따라 큰 바다의 고기 같이 심히 많으려니와
Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.
11 그 진펄과 개펄은 소성되지 못하고 소금 땅이 될 것이며
Kasi mayi oyo etikalaka tango ebale monene etondaka mpe mayi ya bisanga ekokoma peto te, ekotikala kaka bongo mpe ekotonda na mungwa kati na yango.
12 강 좌우 가에는 각종 먹을 실과나무가 자라서 그 잎이 시들지 아니하며 실과가 끊치지 아니하고 달마다 새 실과를 맺으리니 그 물이 성소로 말미암아 나옴이라 그 실과는 먹을만하고 그 잎사귀는 약 재료가 되리라
Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. »
13 나 주 여호와가 말하노라 너희는 이 지계대로 이스라엘 십 이 지파에게 이 땅을 나누어 기업이 되게 하되 요셉에게는 두 분깃이니라
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele: bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.
14 내가 옛적에 맹세하여 이 땅으로 너희 열조에게 주마 하였었나니 너희는 피차 없이 나누어 기업을 삼으라 이 땅이 너희의 기업이 되리라
Bokozwa yango ndenge moko lokola libula, na biteni ekokana; pamba te nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya bakoko na bino, mpe ekokoma libula na bino.
15 이 땅 지계는 이러하니라 북방은 대해에서 헤들론 길로 말미암아 스닷 어귀까지니
Tala bandelo ya mokili yango: Na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene to Mediterane, na nzela ya Etiloni oyo ekenda kino na Tsedadi,
16 곧 하맛과 브로다며 다메섹 지계와 하맛 지계 사이에 있는 시브라임과 하우란 지계 곁에 있는 하셀핫디곤이라
Amati, Berota, Sibirayimi oyo ezalaka na kati-kati ya mondelo ya Damasi mpe Amati, kino na Atseri-Atikone oyo ezali na mondelo ya Avirani.
17 그 지계가 바닷가에서부터 다메섹과 지계에 있는 하살에논까지요 그 지계가 또 극북방에 있는 하맛 지계에 미쳤나니 이는 그 북방이요
Boye, na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene Mediterane kino na Atsari-Enani mpe ekolekela na mondelo ya nor ya Damasi mpe ya Amati.
18 동방은 하우란과 다메섹과 및 길르앗과 이스라엘 땅 사이에 있는 요단강이니 북편 지계에서부터 동해까지 척량하라 이는 그 동방이요
Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari. Yango nde ekozala mondelo ya ngambo ya este.
19 남방은 다말에서부터 므리봇 가데스 물에 이르고 애굽 시내를 따라 대해에 이르나니 이는 그 남방이요
Na ngambo ya sude, mondelo yango ekobanda longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi, ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane. Yango nde ekozala mondelo ya sude.
20 서방은 대해라 남편 지계에서부터 맞은편 하맛 어귀까지 이르나니 이는 그 서방이니라
Na ngambo ya weste, ebale monene Mediterane ekozala mondelo. Mondelo yango ekobanda longwa na mondelo ya sude ya ebale monene Mediterane kino na esika oyo etalana na Lebo-Amati. Yango nde ekozala mondelo ya weste.
21 그런즉 너희가 이스라엘 모든 지파대로 이 땅을 나누어 차지하라
Bokokabola mokili yango kati na bino kolanda mabota ya Isalaele.
22 너희는 이 땅을 나누되 제비 뽑아 너희와 너희 가운데 우거하는 외인 곧 너희 가운데서 자녀를 낳은 자의 기업이 되게 할지니 너희는 그 외인을 본토에서 난 이스라엘 족속같이 여기고 그들로 이스라엘 지파 중에서 너희와 함께 기업을 얻게 하되
Bokobeta zeke mpo na kokabola yango lokola libula mpo na bino mpe bapaya oyo bavandaka kati na bino mpe babota bana kati na bino. Bokokamata bango lokola bana mboka ya Isalaele. Bango mpe bakobeta zeke mpo na kozwa libula elongo na bino kati na mabota ya Isalaele.
23 외인이 우거하는 그 지파에서 그 기업을 줄지니라 나 주 여호와의 말이니라
Boye ezali kati na libota nyonso oyo mopaya akovanda nde bokopesa ye libula na ye, » elobi Nkolo Yawe.