< 에스겔 34 >

1 여호와의 말씀이 내게 임하여 가라사대
Yawe alobaki na ngai:
2 인자야 너는 이스라엘 목자들을 쳐서 예언하라 그들 곧 목자들에게 예언하여 이르기를 주 여호와의 말씀에 자기만 먹이는 이스라엘 목자들은 화 있을진저 목자들이 양의 무리를 먹이는 것이 마땅치 아니하냐?
« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele! Sakola mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele?
3 너희가 살진 양을 잡아 그 기름을 먹으며 그 털을 입되 양의 무리는 먹이지 아니하는도다
Bolingi kaka kolia mafuta na yango, kolata bilamba oyo esalemi na bapwale na yango mpe koboma bibwele oyo eleki mafuta, kasi bolukaka bolamu ya bibwele yango te!
4 너희가 그 연약한 자를 강하게 아니하며 병든 자를 고치지 아니하며 상한 자를 싸매어 주지 아니하며 쫓긴 자를 돌아오게 아니하며 잃어버린 자를 찾지 아니하고 다만 강포로 그것들을 다스렸도다
Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango!
5 목자가 없으므로 그것들이 흩어지며 흩어져서 모든 들짐승의 밥이 되었도다
Boye, bibwele na Ngai epanzanaki bipai na bipai mpe ekomaki bilei ya banyama ya zamba, pamba te moto akobatela yango azalaki lisusu te.
6 내 양의 무리가 모든 산과 높은 멧부리에마다 유리되었고 내 양의 무리가 온 지면에 흩어졌으되 찾고 찾는 자가 없었도다
Bibwele na Ngai ekomaki kotelengana na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse, epanzanaki na mokili mobimba; moto moko te azalaki koluka yango mpe koluka bolamu na yango.
7 그러므로 목자들아 여호와의 말씀을 들을지어다
Mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe:
8 주 여호와의 말씀에 내가 나의 삶을 두고 맹세하노라 내 양의 무리가 노략거리가 되고 모든 들짐승의 밥이 된 것은 목자가 없음이라 내 목자들이 양을 찾지 아니하고 자기만 먹이고 내 양의 무리를 먹이지 아니하였도다
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai;
9 그러므로 너희 목자들아 여호와의 말씀을 들을지어다
mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe:
10 주 여호와의 말씀에 내가 목자들을 대적하여 내 양의 무리를 그들의 손에서 찾으리니 목자들이 양을 먹이지 못할 뿐 아니라 그들이 다시는 자기를 먹이지 못할지라 내가 내 양을 그들의 입에서 건져내어서 다시는 그 식물이 되지 않게 하리라
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natombokeli babateli bibwele! Nakotuna bango bibwele na Ngai, nakobotola bibwele na Ngai na maboko na bango, nakotika bango lisusu te kobatela yango. Boye, bakokoka lisusu te komilukela bolamu na bango moko. Nakokangola bibwele na Ngai na minoko na bango, mpe ekotikala lisusu bilei na bango te.
11 나 주 여호와가 말하노라 나 곧 내가 내 양을 찾고 찾되
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ngai moko nakoluka bolamu ya bibwele na Ngai mpe nakobatela yango.
12 목자가 양 가운데 있는 날에 양이 흩어졌으면 그 떼를 찾는 것 같이 내가 내 양을 찾아서 흐리고 캄캄한 날에 그 흩어진 모든 곳에서 그것들을 건져낼지라
Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.
13 내가 그것들을 만민 중에서 끌어내며 열방 중에서 모아 그 본토로 데리고 가서 이스라엘 산 위에와 시냇가에와 그 땅 모든 거주지에서 먹이되
Nakobimisa yango wuta na bikolo epai wapi ezali ya kopanzana, nakosangisa yango wuta na mikili mosusu mpe nakozongisa yango na mabele na yango moko; nakoleisa yango na likolo ya bangomba ya Isalaele, kati na mabwaku mpe kati na bamboka nyonso ya mike ya Isalaele.
14 좋은 꼴로 먹이고 그 우리를 이스라엘 높은 산 위에 두리니 그것들이 거기서 좋은 우리에 누워 있으며 이스라엘 산 위에서 살진 꼴을 먹으리라
Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko.
15 나 주 여호와가 말하노라 내가 친히 내 양의 목자가 되어 그것들로 누워 있게 할지라
Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe;
16 그 잃어버린 자를 내가 찾으며 쫓긴 자를 내가 돌아오게 하며 상한 자를 내가 싸매어 주며 병든 자를 내가 강하게 하려니와 살진자와 강한 자는 내가 멸하고 공의대로 그것들을 먹이리라
nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.
17 나 주 여호와가 말하노라 나의 양떼 너희여 내가 양과 양의 사이와 수양과 수염소의 사이에 심판하노라
Mpo na bino, bibwele na Ngai, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu, kati na bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
18 너희가 좋은 꼴 먹은 것을 작은 일로 여기느냐 어찌하여 남은 꼴을 발로 밟았느냐? 너희가 맑은 물 마신 것을 작은 일로 여기느냐 어찌하여 남은 물을 발로 더럽혔느냐
Boni, ekoki te mpo na bino kolia na matiti ya kitoko? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino enyataka-nyataka matiti oyo etikali? Ekoki te mpo na bino komela mayi ya peto? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino ekomisa potopoto mayi oyo etikali?
19 나의 양은 너희 발로 밟은 것을 먹으며 너희 발로 더럽힌 것을 마시는도다 하셨느니라
Bolingi ete bibwele na Ngai elia matiti oyo matambe na bino enyati-nyati mpe emela mayi oyo matambe na bino ekomisi potopoto?
20 그러므로 주 여호와께서 그들에게 대하여 말씀하시기를 나 곧 내가 살찐 양과 파리한 양 사이에 심판하리라
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bango: Tala, nakokata, Ngai moko, makambo kati na ebwele oyo ya mafuta mpe oyo ekonda.
21 너희가 옆구리와 어깨로 밀뜨리고 모든 병든 자를 뿔로 받아 무리로 밖으로 흩어지게 하는도다
Lokola bosalelaki mipanzi mpe mapeka na bino mpo na kotindika bibwele oyo ekonda, mpe maseke na bino mpo na kobundisa yango kino kopanza yango na libanda,
22 그러므로 내가 내 양떼를 구원하여 그들로 다시는 노략거리가 되지 않게 하고 양과 양 사이에 심판하리라
nakobikisa bibwele na Ngai, mpe bakoyiba yango lisusu te; nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu.
23 내가 한 목자를 그들의 위에 세워 먹이게 하리니 그는 내 종 다윗이라 그가 그들을 먹이고 그들의 목자가 될지라
Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele: Davidi, mosali na Ngai; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango.
24 나 여호와는 그들의 하나님이 되고 내 종 다윗은 그들 중에 왕이 되리라 나는 여호와의 말이니라
Ngai Yawe, nakozala Nzambe na yango; mpe Davidi, mosali na Ngai, akozala mokambi kati na yango. Ngai Yawe nde nalobi.
25 내가 또 그들과 화평의 언약을 세우고 악한 짐승을 그 땅에서 그치게 하리니 그들이 빈 들에 평안히 거하며 수풀 가운데서 잘찌라
Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.
26 내가 그들에게 복을 내리며 내 산 사면 모든 곳도 복되게 하여 때를 따라 비를 내리되 복된 장마비를 내리리라!
Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke; nakobetisa bamvula na tango na yango: ekozala bamvula ya mapamboli.
27 그리한즉 밭에 나무가 열매를 맺으며 땅이 그 소산을 내리니 그들이 그 땅에서 평안할지라 내가 그들의 멍엣목을 꺾고 그들로 종을 삼은 자의 손에서 그들을 건져낸 후에 그들이 나를 여호와인 줄 알겠고
Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango.
28 그들이 다시는 이방의 노략거리가 되지 아니하며 땅의 짐승의 삼킨바 되지 아니하고 평안히 거하리니 놀랠 사람이 없으리라
Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango.
29 내가 그들을 위하여 유명한 종식할 땅을 일으키리니 그들이 다시는 그 땅에서 기근으로 멸망하지 아니할지며 다시는 열국의 수치를 받지 아니할지라
Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te.
30 그들이 나 여호와 그들의 하나님이 그들과 함께 있는 줄을 알며 그들 곧 이스라엘 족속이 내 백성인 줄 알리라 나 주 여호와의 말이라
Boye, bakoyeba solo ete Ngai Yawe, Nzambe na bango, nazali elongo na bango, mpe ete bango, libota ya Isalaele, bazali bato na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
31 내 양 곧 내 초장의 양, 너희는 사람이요 나는 너희 하나님이라 나 주 여호와의 말이니라
Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »

< 에스겔 34 >