< 에스더 1 >

1 이 일은 아하수에로 왕 때에 된 것이니 아하수에로는 인도로 구스까지 일백 이십 칠 도를 치리하는 왕이라
Tala makambo oyo esalemaki na tango ya mokonzi Kizerisesi oyo azalaki kokamba bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, longwa na Ende kino na Kushi.
2 당시에 아하수에로 왕이 수산 궁에서 즉위하고
Na tango wana, Kizerisesi akendeki kovanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na Size, engumba mokonzi batonga makasi.
3 위에 있은지 삼년에 그 모든 방백과 신복을 위하여 잔치를 베푸니 바사와 메대의 장수와 각 도의 귀족과 방백들이 다 왕 앞에 있는지라
Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu: bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka.
4 왕이 여러 날 곧 일백 팔십일 동안에 그 영화로운 나라의 부함과 위엄의 혁혁함을 나타내니라
Na feti yango, azalaki kolakisa ebele ya bomengo ya bokonzi na ye mpe kongenga ya lokumu monene oyo azalaki na yango. Feti yango esalaki mikolo nkama moko na tuku mwambe.
5 이 날이 다하매 왕이 또 도성 수산 대소 인민을 위하여 왕궁 후원 뜰에서 칠일 동안 잔치를 베풀새
Sima na mikolo yango, mokonzi asalisaki kati na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, feti mosusu oyo esalaki mikolo sambo mpo na bato nyonso, ezala babola to bazwi, oyo bazalaki kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi.
6 백색, 녹색, 청색 휘장을 자색 가는 베줄로 대리석 기둥 은고리에 매고 금과 은으로 만든 걸상을 화반석, 백석, 운모석, 흑석을 깐 땅에 진설하고
Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge: mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo.
7 금잔으로 마시게 하니 잔의 식양이 각기 다르고 왕의 풍부한대로 어주가 한이 없으며
Bazalaki kokabola masanga ya vino na bakopo ya wolo; kopo na kopo ezalaki na lolenge na yango. Bongo vino ezalaki penza ebele kolanda motema ya kokaba ya mokonzi.
8 마시는 것도 규모가 있어 사람으로 억지로 하지 않게 하니 이는 왕이 모든 궁내 관리에게 명하여 각 사람으로 마음대로 하게 함이더라
Mokonzi apesaki mitindo ete moto nyonso oyo abengami na feti amela masanga ndenge alingi, pamba te atindaki bato nyonso oyo bakabolaka masanga kopesa na moto nyonso masanga ya vino kolanda posa ya moto na moto.
9 왕후 와스디도 아하수에로 왕궁에서 부녀들을 위하여 잔치를 베푸니라
Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi.
10 제 칠일에 왕이 주흥이 일어나서 어전 내시 므후만과, 비스다와, 하르보나와, 빅다와, 아박다와, 세달과, 가르가스 일곱 사람을 명하여
Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye: Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.
11 왕후 와스디를 청하여 왕후의 면류관을 정제하고 왕의 앞으로 나아오게 하여 그 아리따움을 뭇 백성과 방백들에게 보이게 하라 하니 이는 왕후의 용모가 보기에 좋음이라
Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko.
12 그러나 왕후 와스디가 내시의 전하는 왕명을 좇아 오기를 싫어하니 왕이 진노하여 중심이 불 붙는듯 하더라
Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda.
13 왕이 사례를 아는 박사들에게 묻되 (왕이 규례와 법률을 아는 자에게 묻는 전례가 있는데
Asololaki na bato na ye ya bwanya oyo bayebaka kososola tango, pamba te ezalaki momesano ete makambo ya mokonzi esengeli koya liboso ya bato nyonso ya bwanya, ba-oyo bayebi malamu makambo etali mibeko mpe bosembo, mpo ete basosola yango.
14 때에 왕에게 가까이 하여 왕의 기색을 살피며 나라 첫 자리에 앉은 자는 바사와 메대의 일곱 방백 곧 가르스나와, 세달과, 아드마다와, 다시스와, 메레스와, 마르스나와, 므무간이라)
Nzokande, ezalaki na bato sambo ya lokumu, bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bazalaki bapesi toli oyo mokonzi azalaki kolinga makasi; bazalaki kosangana na mayangani ya mokonzi mpe basimbaki misala oyo eleki minene. Bakombo na bango ezalaki: Karishena, Shetari, Adimata, Tarsisi, Meresi, Marisena mpe Memukani.
15 왕후 와스디가 내시의 전하는 아하수에로 왕명을 좇지 아니하니 규례대로 하면 어떻게 처치할꼬
Mokonzi atunaki bango: — Kolanda mobeko, esengi kosala nini epai ya Vasti, mwasi ya mokonzi, mpo ete aboyi kotosa mitindo ya mokonzi Kizerisesi, mitindo oyo basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki ye?
16 므무간이 왕과 방백 앞에서 대답하여 가로되 `왕후 와스디가 왕에게만 잘못할 뿐 아니라 아하수에로 왕의 각 도 방백과 뭇 백성에게도 잘못하였나이다
Memukani azongiselaki mokonzi liboso ya bakalaka na ye: — Vasti, mwasi ya mokonzi, asali mabe kaka liboso ya mokonzi te; kasi mpe, liboso ya bakalaka nyonso mpe ya bato nyonso kati bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.
17 아하수에로왕이 명하여 왕후 와스디를 청하여도 오지 아니하였다 하는 왕후의 행위의 소문이 모든 부녀에게 전파되면 저희도 그 남편을 멸시할 것인즉
Pamba te sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi ekoyebana kati na basi nyonso; na bongo, bakokoma kotiola bokonzi ya mibali na bango na koloba: « Mokonzi Kizerisesi kutu apesaki mitindo ete babenga Vasti mpo ete akende liboso na ye, kasi mwasi ya mokonzi aboyaki kokende! »
18 오늘이라도 바사와 메대의 귀부인들이 왕후의 행위를 듣고 왕의 모든 방백에게 그렇게 말하리니 멸시와 분노가 많이 일어나리이다
Kaka na mokolo ya lelo, basi ya bakalaka ya bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bayoki sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi, bakozongisela bakalaka nyonso ya mokonzi kaka ndenge moko. Boye, kozanga na bango limemia mpe botosi ekoluka ete mibali na bango bakoma na kanda.
19 왕이 만일 선히 여기실진대 와스디로 다시는 왕 앞에 오지 못하게 하는 조서를 내리되 바사와 메대의 법률 중에 기록하여 변역함이 없게 하고 그 왕후의 위를 저보다 나은 사람에게 주소서
Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi: Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.
20 왕의 조서가 이 광대한 전국에 반포되면 귀천을 무론하고 모든 부녀가 그 남편을 존경하리이다'
Boye tango mobeko ya mokonzi ekopanzana na mokili na ye mobimba, basi nyonso bakotosa mibali na bango, ezala babola to bazwi.
21 왕과 방백들이 그 말을 선히 여긴지라 왕이 므무간의 말대로 행하여
Toli oyo esepelisaki mokonzi elongo na bakalaka na ye. Mokonzi asalaki ndenge Memukani alobaki.
22 각 도 각 백성의 문자와 방언대로 모든 도에 조서를 내려 이르기를 남편으로 그 집을 주관하게 하고 자기 민족의 방언대로 말하게 하라 하였더라
Atindaki mikanda na bituka nyonso ya mokili: etuka na etuka kolanda ndenge ezali ekomeli na yango; mpe bato na bato, kolanda lokota na bango. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi ya ndako na ye mpe koloba monoko ya mboka na ye.

< 에스더 1 >