< 전도서 6 >

1 내가 해 아래서 한가지 폐단 있는 것을 보았나니 이는 사람에게 중한 것이라
Namoni mabe mosusu na se ya moyi, mpe ezali kilo makasi mpo na bato:
2 어떤 사람은 그 심령의 모든 소원에 부족함이 없어 재물과 부요와 존귀를 하나님께 받았으나 능히 누리게 하심을 얻지 못하였으므로 다른 사람이 누리나니 이것도 헛되어 악한 병이로다
ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.
3 사람이 비록 일백 자녀를 낳고 또 장수하여 사는 날이 많을지라도 그 심령에 낙이 족하지 못하고 또 그 몸이 매장되지 못하면 나는 이르기를 낙태된 자가 저보다 낫다 하노니
Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye;
4 낙태된 자는 헛되이 왔다가 어두운 중에 가매 그 이름이 어두움에 덮이니
pamba te, mwana oyo abotami ya kokufa, abotami pamba, azongi kati na molili, mpe bakokanisa ye lisusu te;
5 햇빛을 보지 못하고 알지 못하나 이가 저보다 평안함이라
atako amoni moyi te to atikali koyeba ata eloko moko te, azali na kimia koleka mozwi.
6 저가 비록 천 년의 갑절을 산다 할지라도 낙을 누리지 못하면 마침내 다 한 곳으로 돌아가는 것뿐이 아니냐
Ata awumeli na bomoi mibu nkoto moko mbala mibale, akotikala komona esengo te. Boni, bato nyonso bakendaka kaka esika moko te?
7 사람의 수고는 다 그 입을 위함이나 그 식욕은 차지 아니하느니라
Pasi nyonso oyo moto amonaka ezali mpo ete akokisa baposa na ye, nzokande baposa yango esilaka kaka te.
8 지혜자가 우매자보다 나은 것이 무엇이뇨 인생 앞에서 행할 줄 아는 가난한 자는 무엇이 유익한고
Moto ya bwanya aleki moto oyo azangi mayele na nini? Litomba nini mobola azali na yango ata ayebi kotambola liboso ya bato mosusu?
9 눈으로 보는 것이 심령의 공상보다 나으나 이것도 헛되어 바람을 잡으려는 것이로다
Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi: yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
10 이미 있는 무엇이든지 오래 전부터 그 이름이 칭한 바 되었으며 사람이 무엇인지도 이미 안 바 되었나니 자기보다 강한 자와 능히 다툴 수 없느니라
Ekelamu nyonso oyo ezali esila koyebana na kombo na yango, mpe eyebani malamu soki moto azali nani: akoki te kotelemela oyo aleki ye na makasi.
11 헛된 것을 더하게 하는 많은 일이 있나니 사람에게 무엇이 유익하랴
Soki maloba eleki mingi, makambo ya pamba-pamba eyaka mpe ebele; bongo litomba na yango ezali penza nini?
12 헛된 생명의 모든 날을 그림자같이 보내는 일평생에 사람에게 무엇이 낙인지 누가 알며 그 신후에 해 아래서 무슨 일이 있을 것을 누가 능히 그에게 고하리요
Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi?

< 전도서 6 >