< 골로새서 1 >

1 하나님의 뜻으로 말미암아 그리스도 예수의 사도 된 바울과 형제 디모데는
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote;
2 골로새에 있는 성도들 곧 그리스도 안에서 신실한 형제들에게 편지하노니 우리 아버지 하나님으로부터 은혜와 평강이 너희에게 있을지어다
Epai ya bandeko oyo, kati na engumba Kolose, bazali bule mpe bayengebene kati na Klisto: Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso!
3 우리가 너희를 위하여 기도할 때마다 하나님 곧 우리 주 예수 그리스도의 아버지께 감사하노라
Tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tango tosambelaka mpo na bino,
4 이는 그리스도 예수 안에 너희의 믿음과 모든 성도에 대한 사랑을 들음이요
pamba te toyokaki sango ya kondima na bino kati na Yesu-Klisto, mpe sango ya bolingo na bino mpo na basantu nyonso.
5 너희를 위하여 하늘에 쌓아 둔 소망을 인함이니 곧 너희가 전에 복음 진리의 말씀을 들은 것이라
Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu
6 이 복음이 이미 너희에게 이르매 너희가 듣고 참으로 하나님의 은혜를 깨달은 날부터 너희 중에서와 같이 또한 온 천하에서도 열매를 맺어 자라는도다
oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.
7 이와 같이 우리와 함께 종 된 사랑하는 에바브라에게 너희가 배웠나니 그는 너희를 위하여 그리스도의 신실한 일군이요
Ezali molingami Epafrasi, moninga na biso ya mosala, nde ateyaki bino Sango Malamu yango; azali mosali ya Klisto mpe asalaka na bosembo epai na bino.
8 성령 안에서 너희 사랑을 우리에게 고한 자니라
Ezali mpe kaka ye moto ayebisaki biso ndenge nini Molimo atindikaka bino na bolingo.
9 이로써 우리도 듣던 날부터 너희를 위하여 기도하기를 그치지 아니하고 구하노니 너희로 하여금 모든 신령한 지혜와 총명에 하나님의 뜻을 아는 것으로 채우게 하시고
Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,
10 주께 합당히 행하여 범사에 기쁘시게 하고 모든 선한 일에 열매를 맺게 하시며 하나님을 아는 것에 자라게 하시고
mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,
11 그 영광의 힘을 좇아 모든 능력으로 능하게 하시며 기쁨으로 모든 견딤과 오래 참음에 이르게 하시고
mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka;
12 우리로 하여금 빛 가운데서 성도의 기업의 부분을 얻기에 합당하게 하신 아버지께 감사하게 하시기를 원하노라
mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te:
13 그가 우리를 흑암의 권세에서 건져내사 그의 사랑의 아들의 나라로 옮기셨으니
Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,
14 그 아들 안에서 우리가 구속 곧 죄 사함을 얻었도다
oyo, kati na Ye, tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.
15 그는 보이지 아니하시는 하나님의 형상이요 모든 창조물보다 먼저 나신 자니
Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,
16 만물이 그에게 창조되되 하늘과 땅에서 보이는 것들과 보이지 않는 것들과 혹은 보좌들이나 주관들이나 정사들이나 권세들이나 만물이 다 그로 말미암고 그를 위하여 창조되었고
pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.
17 또한 그가 만물보다 먼저 계시고 만물이 그 안에 함께 섰느니라
Yesu azali liboso na nyonso, mpe nyonso esimbama kati na Ye;
18 그는 몸인 교회의 머리라 그가 근본이요 죽은 자들 가운데서 먼저 나신 자니 이는 친히 만물의 으뜸이 되려 하심이요
azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,
19 아버지께서는 모든 충만으로 예수 안에 거하게 하시고
pamba te, kati na Ye, Nzambe asepelaki kovandisa bonzambe na Ye nyonso
20 그의 십자가의 피로 화평을 이루사 만물 곧 땅에 있는 것들이나 하늘에 있는 것들을 그로 말미암아 자기와 화목케 되기를 기뻐하심이라
mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.
21 전에 악한 행실로 멀리 떠나 마음으로 원수가 되었던 너희를
Nzokande na kala, bozalaki mosika ya Nzambe mpe bozalaki banguna na Ye mpo na mabe nyonso oyo bozalaki kokanisa mpe kosala.
22 이제는 그의 육체의 죽음으로 말미암아 화목케 하사 너희를 거룩하고 흠 없고 책망할 것이 없는 자로 그 앞에 세우고자 하셨으니
Kasi sik’oyo, Nzambe azongisi boyokani kati na Ye mpe bino na nzela ya kufa ya Yesu, Mwana na Ye, oyo akabaki nzoto na Ye ya bomoto lokola mbeka mpo na kotalisa bino epai ya Nzambe lokola bato ya bule, bazanga pamela mpe bazanga mbeba.
23 만일 너희가 믿음에 거하고 터 위에 굳게 서서 너희 들은 바 복음의 소망에서 흔들리지 아니하면 그리하리라 이 복음은 천하 만민에게 전파된 바요 나 바울은 이 복음의 일군이 되었노라
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
24 내가 이제 너희를 위하여 받는 괴로움을 기뻐하고 그리스도의 남은 고난을 그의 몸된 교회를 위하여 내 육체에 채우노라
Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.
25 내가 교회 일군 된 것은 하나님이 너희를 위하여 내게 주신 경륜을 따라 하나님의 말씀을 이루려 함이니라
Nakoma mosali na yango kolanda mokumba oyo Nzambe apesa ngai: mokumba ya koteya bino Liloba na Nzambe na mobimba na yango.
26 이 비밀은 만세와 만대로부터 옴으로 감취었던 것인데 이제는 그의 성도들에게 나타났고 (aiōn g165)
Sango Malamu ezali mabombami oyo Nzambe abomba wuta na ebandeli, kasi alakisi yango sik’oyo epai ya basantu na Ye. (aiōn g165)
27 하나님이 그들로 하여금 이 비밀의 영광이 이방인 가운데 어떻게 풍성한 것을 알게 하려 하심이라 이 비밀은 너희 안에 계신 그리스도시니 곧 영광의 소망이니라
Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali: Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.
28 우리가 그를 전파하여 각 사람을 권하고 모든 지혜로 각 사람을 가르침은 각 사람을 그리스도 안에서 완전한 자로 세우려 함이니
Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto.
29 이를 위하여 나도 내 속에서 능력으로 역사하시는 이의 역사를 따라 힘을 다하여 수고하노라
Ezali mpo na yango nde nasalaka mpe nabundaka na nzela ya makasi ya Klisto, oyo esalaka na nguya kati na ngai.

< 골로새서 1 >