< 사도행전 14 >

1 이에 이고니온에서 두 사도가 함께 유대인의 회당에 들어가 말하니 유대와 헬라의 허다한 무리가 믿더라
Na engumba Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendeki, lokola momesano, na ndako ya mayangani ya Bayuda; bateyaki kuna, mpe bato ebele, Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi.
2 그러나 순종치 아니하는 유대인들이 이방인들의 마음을 선동하여 형제들에게 악감을 품게 하거늘
Kasi Bayuda oyo baboyaki kondimela batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokela bandeko.
3 두 사도가 오래 있어 주를 힘입어 담대히 말하니 주께서 저희 손으로 표적과 기사를 행하게 하여 주사 자기 은혜의 말씀을 증거하시니
Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene.
4 그 성내 무리가 나뉘어 유대인을 좇는 자도 있고 두 사도를 좇는 자도 있는지라
Bato ya engumba yango bakabwanaki: ndambo bazalaki sima na Bayuda, mpe ndambo mosusu, sima na bantoma.
5 이방인과 유대인과 그 관원들이 두 사도를 능욕하며 돌로 치려고 달려드니
Bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda, elongo na bakambi na bango, bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga;
6 저희가 알고 도망하여 루가오니아의 두 성 루스드라와 더베와 및 그 근방으로 가서
kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likawoni: Listre, Derbe mpe bazingazinga na yango.
7 거기서 복음을 전하니라
Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya Sango Malamu.
8 루스드라에 발을 쓰지 못하는 한 사람이 있어 앉았는데 나면서 앉은뱅이 되어 걸어 본 적이 없는 자라
Kati na engumba Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye, atikala kotambola te.
9 바울의 말하는 것을 듣거늘 바울이 주목하여 구원 받을 만한 믿음이 그에게 있는 것을 보고
Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama
10 큰 소리로 가로되 `네 발로 바로 일어서라' 하니 그 사람이 뛰어 걷는지라
mpe alobaki na ye na mongongo makasi: — Telema ngwi na makolo na yo! Mbala moko, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola.
11 무리가 바울의 행한 일을 보고 루가오니아 방언으로 소리질러 가로되 신들이 사람의 형상으로 우리 가운데 내려오셨다 하여
Tango ebele ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na lokota ya bato ya Likawoni: — Banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso!
12 바나바는 쓰스라 하고 바울은 그 중에 말하는 자이므로 허메라 하더라
Kombo oyo babengaki na yango Barnabasi ezali « Zewusi, » mpe kombo oyo babengaki na yango Polo ezali « Erimesi, » pamba te Polo nde azalaki koloba.
13 성 밖 쓰스 신당의 제사장이 소와 화관들을 가지고 대문 앞에 와서 무리와 함께 제사하고자 하니
Nganga-nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki na libanda ya ekuke ya engumba, amemaki na bikuke ya engumba bangombe ya mibali elata bafololo mpe bililingi elingama-lingama lokola basheni, pamba te ye mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye balingaki kotumbela bango mbeka.
14 두 사도 바나바와 바울이 듣고 옷을 찢고 무리 가운데 뛰어 들어가서 소리질러
Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo, bayokaki sango ya likambo yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendeki mbangu epai ebele ya bato bazalaki na koganga:
15 가로되 `여러분이여, 어찌하여 이러한 일을 하느냐? 우리도 너희와 같은 성정을 가진 사람이라 너희에게 복음을 전하는 것은 이 헛된 일을 버리고 천지와 바다와 그 가운데 만유를 지으시고 살아 계신 하나님께로 돌아오라 함이라
— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
16 하나님이 지나간 세대에는 모든 족속으로 자기의 길들을 다니게 묵인하셨으나
Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi.
17 그러나 자기를 증거하지 아니 하신 것이 아니니 곧 너희에게 하늘로서 비를 내리시며 결실기를 주시는 선한 일을 하사 음식과 기쁨으로 너희 마음에 만족케 하셨느니라' 하고
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
18 이렇게 말하여 겨우 무리를 말려 자기들에게 제사를 못하게 하니라
Atako balobaki bongo, balongaki na pasi kopekisa ebele ya bato wana kobonzela bango mbeka.
19 유대인들이 안디옥과 이고니온에서 와서 무리를 초인하여 돌로 바울을 쳐서 죽은 줄로 알고 성 밖에 끌어 내치니라
Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.
20 제자들이 둘러 섰을 때에 바울이 일어나 성에 들어갔다가 이튿날 바나바와 함께 더베로 가서
Kasi tango bayekoli bazingelaki Polo, atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo mokolo oyo elandaki, akendeki na Derbe elongo na Barnabasi.
21 복음을 그 성에서 전하여 많은 사람을 제자로 삼고 루스드라와 이고니온과 안디옥으로 돌아가서
Sima na Polo mpe Barnabasi koteya Sango Malamu kati na engumba wana mpe kokomisa bato ebele bayekoli, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe;
22 제자들의 마음을 굳게 하여 이 믿음에 거하라 권하고 또 우리가 하나님 나라에 들어가려면 많은 환난을 겪어야 할 것이라 하고
bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba: — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.
23 각 교회에서 장로들을 택하여 금식 기도하며 저희를 그 믿은 바 주께 부탁하고
Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki.
24 비시디아 가운데로 지나가서 밤빌리아에 이르러
Sima na bango koleka etuka ya Pisidi, bakomaki na Pafili.
25 도를 버가에서 전하고 앗달리아로 내려가서
Bateyaki Liloba kati na Perje mpe, sima na yango, bakendeki na libongo ya Atalia.
26 거기서 배 타고 안디옥에 이르니 이곳은 두 사도의 이룬 그 일을 위하여 전에 하나님의 은혜에 부탁하던 곳이라
Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa.
27 이르러 교회를 모아 하나님이 함께 행하신 모든 일과 이방인들에게 믿음의 문을 여신 것을 고하고
Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima.
28 제자들과 함께 오래 있으니라
Mpe bawumelaki wana tango molayi elongo na bayekoli.

< 사도행전 14 >