< 열왕기하 11 >

1 아하시야의 모친 아달랴가 그 아들의 죽은 것을 보고 일어나 왕의 씨를 진멸하였으나
Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi.
2 요람 왕의 딸 아하시야의 누이 여호세바가 아하시야의 아들 요아스를 왕자들의 죽임을 당하는 중에서 도적하여 내고 저와 그 유모를 침실에 숨겨 아달랴를 피하여 죽임을 당치 않게 한지라
Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali; mpe Atali abomaki Joasi te.
3 요아스가 저와 함께 여호와의 전에 육년을 숨어 있는 동안에 아달랴가 나라를 다스렸더라
Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili.
4 제 칠년에 여호야다가 보내어 가리 사람의 백부장들과 호위병의 백부장들을 불러 데리고 여호와의 전으로 들어가서 저희와 언약을 세우고 저희로 여호와의 전에서 맹세케 한 후에 왕자를 보이 고
Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.
5 명하여 가로되 너희의 행할 것이 이러하니 안식일에 입번한 너희중 삼분 일은 왕궁을 주의하여 지키고
Apesaki bango mitindo oyo: « Tala ndenge bokosala: kati na bandambo misato ya lisanga na bino, ndambo moko bakosala na mokolo ya Saba; ndambo ya liboso bakokengela ndako ya mokonzi,
6 삼분 일은 수르문에 있고 삼분 일은 호위대 뒤에 있는 문에 있어서 이와 같이 왕궁을 주의하여 지켜 방어하고
ndambo ya mibale bakozala na ekuke ya Suri, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke, na sima ya ndako ya bakengeli. Bandambo nyonso misato bakokitana, moko sima na mosusu, kati na mosala ya kokengela Tempelo.
7 안식일에 출번하는 너희중 두 대는 여호와의 전을 주의하여 지켜 왕을 호위하되
Bandambo mibale oyo bakosala te na mokolo ya Saba bakokengela Tempelo ya Yawe mpo na mokonzi.
8 너희는 각각 손에 병기를 잡고 왕을 호위하며 무릇 너희 반열을 침범하는 자는 죽이고 왕의 출입할 때에 시위할지니라
Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. »
9 백부장들이 이에 제사장 여호야다의 모든 명대로 행하여 각기 관할하는 바 안식일에 입번할 자와 출번할 자를 거느리고 제사장 여호야다에게 나아오매
Bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko basalaki nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango, mpe akendeki epai ya Nganga-Nzambe Yeoyada.
10 제사장이 여호와의 전에 있는 다윗왕의 창과 방패를 백부장들에게 주니
Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga mpe banguba oyo ezalaki ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe.
11 호위병이 각각 손에 병기를 잡고 왕을 호위하되 전 우편에서부터 전 좌편까지 단과 전 곁에 서고
Bakengeli bazingelaki mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo.
12 여호야다가 왕자를 인도하여 내어 면류관을 씌우며 율법 책을 주고 기름을 부어 왕을 삼으매 무리가 박수하며 왕의 만세를 부르니라
Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki: « Tika ete mokonzi awumela na bomoi! »
13 아달랴가 호위병과 백성의 소리를 듣고 여호와의 전에 들어가서 백성에게 이르러
Tango Atali ayokaki makelele oyo bato mpe bakengeli bazalaki kosala, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe.
14 보매 왕이 규례대로 대 위에 섰고 장관들과 나팔수가 왕의 곁에 모셨으며 온 국민이 즐거워하여 나팔을 부는지라 아달랴가 옷을 찢으며 외치되 반역이로다 반역이로다 하매
Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: « Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita! »
15 제사장 여호야다가 군대를 거느린 백부장들에게 명하여 가로되 반열 밖으로 몰아내라 무릇 저를 따르는 자는 칼로 죽이라 하니 제사장의 이 말은 여호와의 전에서는 저를 죽이지 말라 함이라
Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko: « Bobimisa ye na molongo! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki: « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe! »
16 이에 저의 길을 열어주매 저가 왕궁 말 다니는 길로 통과하다가 거기서 죽임을 당하였더라
Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.
17 여호야다가 왕과 백성으로 여호와와 언약을 세워 여호와의 백성이 되게 하고 왕과 백성 사이에도 언약을 세우게 하매
Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato.
18 온 국민이 바알의 당으로 가서 그 당을 훼파하고 그 단들과 우상들을 깨뜨리고 그 단 앞에서 바알의 제사장 맛단을 죽이니라 제 사장이 관리들을 세워 여호와의 전을 수직하게 하고
Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe.
19 또 백부장들과 가리 사람과 호위병과 온 국민을 거느리고 왕을 인도하여 여호와의 전에서 내려와서 호위병의 문 길로 말미암아 왕궁에 이르매 저가 왕의 보좌에 앉으니
Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi.
20 온 국민이 즐거워하고 성중이 평온하더라 아달랴를 무리가 왕궁에서 칼로 죽였었더라
Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi.
21 요아스가 위에 나아갈 때에 나이 칠세였더라
Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi.

< 열왕기하 11 >