< 고린도후서 7 >

1 그런즉 사랑하는 자들아 이 약속을 가진 우리가 하나님을 두려워하는 가운데서 거룩함을 온전히 이루어 육과 영의 온갖 더러운 것에서 자신을 깨끗케 하자
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
2 마음으로 우리를 영접하라 우리가 아무에게도 불의를 하지 않고 아무에게도 해롭게 하지 않고 아무에게도 속여 빼앗은 일이 없노라
Bopesa biso esika kati na mitema na bino! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko.
3 내가 정죄하려고 이 말을 하는 것이 아니라 이전에 말하였거니와 너희로 우리 마음에 있어 함께 죽고 함께 살게 하고자 함이라
Nalobi bongo te mpo ete bosalaki ngai mabe. Nasilaki koyebisa bino ete bozali na esika ya motuya kati na mitema na biso, ezala mpo na kokufa to mpo na kozala na bomoi elongo na bino.
4 내가 너희를 향하여 하는 말이 담대한 것도 많고 너희를 위하여 자랑하는 것도 많으니 내가 우리의 모든 환난 가운데서도 위로가 가득하고 기쁨이 넘치는도다
Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.
5 우리가 마게도냐에 이르렀을때에도 우리 육체가 편치 못하고 사방으로 환난을 당하여 밖으로는 다툼이요 안으로는 두려움이라
Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso: bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso.
6 그러나 비천한 자들을 위로하시는 하나님이 디도의 옴으로 우리를 위로하셨으니
Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito.
7 저의 온 것뿐 아니요 오직 저가 너희에게 받은 그 위로로 위로하고 너희의 사모함과 애통함과 나를 위하여 열심 있는 것을 우리에게 고함으로 나로 더욱 기쁘게 하였느니라
Tolendisamaki na nzela ya boyei ya Tito kaka te, kasi mpe na nzela ya kobondisama oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa makasi oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino, mpe komipesa na bino mpo na ngai. Mpe nyonso wana esalaki ete esengo na ngai ebakisama lisusu makasi.
8 그러므로 내가 편지로 너희를 근심하게 한 것을 후회하였으나 지금은 후회하지 아니함은 그 편지가 너희로 잠시만 근심하게 한 줄을 앎이라
Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na nzela ya mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi te kati na motema na ngai. Solo, esalaki ngai nanu pasi na motema, na kotala ndenge eyokisaki bino mawa mpo na mwa tango moke.
9 내가 지금 기뻐함은 너희로 근심하게 한 까닭이 아니요 도리어 너희가 근심함으로 회개함에 이른 까닭이라 너희가 하나님의 뜻대로 근심하게 된 것은 우리에게서 아무 해(害)도 받지 않게 하려 함이라
Kasi sik’oyo, nazali kosepela: ezali te mpo boyokaki mawa, kasi mpo ete mawa yango ememaki bino na kobongola mitema. Pamba te mawa na bino ezalaki malamu na miso ya Nzambe; mpe na bongo, tosalaki bino mabe te.
10 하나님의 뜻대로 하는 근심은 후회할 것이 없는 구원에 이르게 하는 회개를 이루는 것이요 세상 근심은 사망을 이루는 것이니라
Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.
11 보라! 하나님의 뜻대로 하게 한 이 근심이 너희로 얼마나 간절하게 하며, 얼마나 변명하게 하며, 얼마나 분하게 하며, 얼마나 두렵게 하며, 얼마나 사모하게 하며, 얼마나 열심 있게 하며, 얼마나 벌하게 하였는가 너희가 저 일에 대하여 일절 너희 자신의 깨끗함을 나타내었느니라
Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino: bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo.
12 그런즉 내가 너희에게 쓴 것은 그 불의 행한 자를 위한 것도 아니요 그 불의 당한 자를 위한 것도 아니요 오직 우리를 위한 너희의 간절함이 하나님 앞에서 너희에게 나타나게 하려 함이로라
Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te likolo na moto oyo asalaki mabe to likolo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete bolingo na bino mpo na biso etalisama kati na bino liboso ya Nzambe.
13 이로 인하여 우리가 위로를 받았고 우리의 받은 위로 위에 디도의 기쁨으로 우리가 더욱 많이 기뻐함은 그의 마음이 너희 무리를 인하여 안심함을 얻었음이니라
Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema.
14 내가 그에게 너희를 위하여 자랑한 것이 있더라도 부끄럽지 아니하니 우리가 너희에게 이른 말이 다 참된 것같이 디도 앞에서 우리의 자랑한 것도 참되게 되었도다
Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.
15 저가 너희 모든 사람들이 두려워하고 떪으로 자기를 영접하여 순종한 것을 생각하고 너희를 향하여 그의 심정이 더욱 깊었으니
Mpe bolingo na ye mpo na bino nyonso ekomaka lisusu monene tango akanisaka botosi na bino nyonso mpe ndenge boyambaki ye na kobanga mpe na kolenga.
16 내가 너희를 인하여 범사에 담대한 고로 기뻐하노라
Nazali na esengo ya kotiela bino motema na makambo nyonso.

< 고린도후서 7 >