< 열왕기상 4 >

1 솔로몬 왕이 온 이스라엘의 왕이 되었고
Mokonzi Salomo akonzaki Isalaele mobimba.
2 그의 신하들은 이러하니라 사독의 아들 아사리아는 제사장이요
Tala bakambi oyo bazalaki kosala na ye elongo: Azaria, koko ya Nganga-Nzambe Tsadoki;
3 시사의 아들 엘리호렙과, 아히야는 서기관이요 아힐룻의 아들 여호사밧은 사관이요
Eliyorefi mpe Ayiya, bana mibali ya Shisha, bazalaki bakomi mikanda; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
4 여호야다의 아들 브나야는 군대장관이요, 사독과 아비아달은 제사장이요
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki mokonzi ya mampinga; Tsadoki mpe Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe;
5 나단의 아들 아사리아는 관리장이요, 나단의 아들 사붓은 대신이니 왕의 벗이요
Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi;
6 아히살은 궁내대신이요, 압다의 아들 아도니람은 감역관이더라
Ayishari, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Adonirami, mwana mobali ya Abida, azalaki mokengeli bato ya misala makasi.
7 솔로몬이 또 온 이스라엘 위에 열 두 관장을 두매 그 사람들이 왕과 왕실을 위하여 식물을 예비하되 각기 일년에 한달씩 식물을 예비하였으니
Kati na Isalaele mobimba, Salomo atiaki mpe bayangeli zomi na mibale ya bituka, oyo bazalaki na mokumba ya komema biloko mpo na mokonzi mpe mpo na ndako na ye. Moyangeli moko na moko asengelaki kopesa biloko mpo na sanza moko na mobu.
8 그 이름은 이러하니라 에브라임 산지에는 벤훌이요
Tala bakombo na bango: Beni-Uri: moyangeli ya etuka ya bangomba ya Efrayimi;
9 마가스와, 사알빔과, 벧세메스와, 엘론벧하난에는 벤데겔이요
Beni-Dekeri: moyangeli ya Makatsi, Shaalibimi, Beti-Shemeshi, Eloni mpe Beti-Anani;
10 아룹봇에는 벤헤셋이니 소고와 헤벨 온 땅을 저가 주관하였으며
Beni-Esedi: moyangeli ya Aruboti (Soko mpe mokili mobimba ya Eferi);
11 돌 높은 땅 온 지방에는 벤아비나답이니 저는 솔로몬의 딸 다밧으로 아내를 삼았으며
Beni-Abinadabi: moyangeli ya Dori; abalaki Tafati, mwana mwasi ya Salomo;
12 다아낙과, 므깃도와, 이스르엘 아래 사르단 가에 있는 벧소안 온 땅은 아힐룻의 아들 바아나가 맡았으니 벧소안에서부터 아벨므홀라에 이르고 욕느암 바깥까지 미쳤으며
Baana, mwana mobali ya Ayiludi: moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami;
13 길르앗 라못에는 벤게벨이니 저는 길르앗에 있는 므낫세의 아들 야일의 모든 촌을 주관하였고 또 바산 아르곱 땅의 성벽과 놋빗 장 있는 큰 성읍 육십을 주관하였으며
Beni-Geberi: azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.
14 마하나임에는 잇도의 아들 아히나답이요
Ayinadabi, mwana mobali ya Ido: moyangeli ya Maanayimi;
15 납달리에는 아히마아스니 저는 솔로몬의 딸 바스맛으로 아내를 삼았으며
Ayimaatsi: moyangeli ya Nefitali. Ye mpe abalaki Basimati, mwana mwasi ya Salomo.
16 아셀과 아롯에는 후새의 아들 바아나요
Baana, mwana mobali ya Ushayi: moyangeli ya Aseri mpe ya Bealoti;
17 잇사갈에는 바루아의 아들 여호사밧이요
Jozafati, mwana mobali ya Paruya: moyangeli ya Isakari;
18 베냐민에는 엘라의 아들 시므이요
Shimei, mwana mobali ya Ela: moyangeli ya Benjame.
19 아모리 사람의 왕 시혼과 바산왕 옥의 나라 길르앗 땅에는 우리의 아들 게벨이니 그 땅에서는 저 한사람만 관장이 되었더라
Geberi, mwana mobali ya Uri: moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani). Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango.
20 유다와 이스라엘의 인구가 바닷가의 모래 같이 많게 되매 먹고 마시며 즐거워하였으며
Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.
21 솔로몬이 하수에서부터 블레셋 사람의 땅에 이르기까지와 애굽지경에 미치기까지의 모든 나라를 다스리므로 그 나라들이 공을 바쳐 솔로몬의 사는 동안에 섬겼더라
Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye.
22 솔로몬의 일일분 식물은 가는 밀가루가 삼십석이요, 굵은 밀가루가 육십석이요,
Tala bilei ya Salomo ya mokolo na mokolo: bakilo nkoto libwa ya semule mpe bakilo nkoto zomi na mwambe ya farine,
23 살진 소가 열이요, 초장의 소가 스물이요, 양이 일백이며, 그 외에 수사슴과, 노루와, 암사슴과, 살진 새들이었더라
bangombe zomi ya mafuta, bangombe tuku mibale ya esobe, bameme mpe bantaba nkama moko, bakisa bamboloko, bambuli, bankayi mpe bandeke ya mafuta.
24 솔로몬이 하수 이편을 딥사에서부터 가사까지 모두 다스리므로 하수 이편의 모든 왕이 다 관할한 바 되매 저가 사방에 둘린 민족과 평화가 있었으니
Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga.
25 솔로몬의 사는 동안에 유다와 이스라엘이 단에서부터 브엘세바에 이르기 까지 각기 포도나무 아래와 무화과나무 아래서 안연히 살았더라
Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi.
26 솔로몬의 병거의 말의 외양간이 사만이요, 마병이 일만 이천이며
Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale.
27 그 관장들은 각각 자기 달에 솔로몬왕과 왕의 상에 참여하는 모든 자를 위하여 먹을 것을 예비하여 부족함이 없게 하였으며
Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga.
28 또 저희가 각기 직무를 따라 말과 준마에게 먹일 보리와 꼴을 그 말의 있는 곳으로 가져왔더라
Bazalaki mpe komema bambuma ya orje mpe matiti mpo na bampunda, ndenge mobateli biloko ya mokonzi azalaki kokatela bango.
29 하나님이 솔로몬에게 지혜와 총명을 심히 많이 주시고 또 넓은 마음을 주시되 바닷가의 모래 같이 하시니
Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene.
30 솔로몬의 지혜가 동양 모든 사람의 지혜와 애굽의 모든 지혜보다 뛰어난지라
Bwanya ya Salomo ezalaki makasi koleka bwanya ya bato nyonso ya ngambo ya este mpe ya Ejipito.
31 저는 모든 사람보다 지혜로와서 예스라 사람 에단과, 마홀의 아들 헤만과 갈골과, 다르다보다 나으므로 그 이름이 사방 모든 나라에 들렸더라
Azalaki na bwanya koleka bato nyonso; koleka ata Etani, moto ya Ezera; Emani, Kalikoli mpe Darida, bana mibali ya Maoli. Boye, sango na ye epanzanaki kati na bikolo nyonso ya zingazinga.
32 저가 잠언 삼천을 말하였고 그 노래는 일천 다섯이며
Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano.
33 저가 또 초목을 논하되 레바논 백향목으로부터 담에 나는 우슬초까지 하고 저가 또 짐승과 새와 기어 다니는 것과 물고기를 논한지라
Alobaki na tina na banzete, kobanda na nzete ya sedele ya Libani kino na nzete ya izope oyo ebimaka na mir; azalaki mpe koloba na tina na banyama mpe bandeke, na tina na bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe na tina na bambisi ya mayi.
34 모든 민족 중에서 솔로몬의 지혜의 소문을 들은 천하 모든 왕 중에서 그 지혜를 들으러 왔더라
Bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili, oyo bazalaki koyoka sango ya bwanya ya Salomo, bazalaki kotinda bato, wuta na bikolo na bango, mpo na kokende koyoka bwanya na ye.

< 열왕기상 4 >