< 고린도전서 1 >

1 하나님의 뜻을 따라 그리스도 예수의 사도로 부르심을 입은 바울과 및 형제 소스데네는
Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni;
2 고린도에 있는 하나님의 교회 곧 그리스도 예수 안에서 거룩하여지고 성도라 부르심을 입은 자들과 또 각처에서 우리의 주 곧 저희와 우리의 주 되신 예수 그리스도의 이름을 부르는 모든 자들 에게
Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso:
3 하나님 우리 아버지와 주 예수 그리스도로 좇아 은혜와 평강이 있기를 원하노라
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
4 그리스도 예수 안에서 너희에게 주신 하나님의 은혜를 인하여 내가 너희를 위하여 항상 하나님께 감사하노니
Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto;
5 이는 너희가 그의 안에서 모든 일 곧 모든 구변과 모든 지식에 풍족하므로
pamba te, kati na makambo nyonso, botondisamaki na bomengo kati na Klisto, na oyo nyonso etali maloba mpe na oyo etali boyebi,
6 그리스도의 증거가 너희 중에 견고케 되어
kolanda ndenge Nzambe azali kokokisa kati na bino litatoli na biso na tina na Klisto.
7 너희가 모든 은사에 부족함이 없이 우리 주 예수 그리스도의 나타나심을 기다림이라
Boye, bozangi ata likabo moko te ya ngolu ya Nzambe, wana bozali kozela na posa makasi komonisama ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
8 주께서 너희를 우리 주 예수 그리스도의 날에 책망할 것이 없는 자로 끝까지 견고케 하시리라
Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
9 너희를 불러 그의 아들 예수 그리스도 우리 주로 더불어 교제케 하시는 하나님은 미쁘시도다
Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.
10 형제들아 내가 우리 주 예수 그리스도의 이름으로 너희를 권하노니 다 같은 말을 하고 너희 가운데 분쟁이 없이 같은 마음과 같은 뜻으로 온전히 합하라
Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te; bozala motema moko mpe makanisi moko.
11 내 형제들아 글로에의 집 편으로서 너희에게 대한 말이 내게 들리니 곧 너희 가운데 분쟁이 있다는 것이라
Pamba te, bandeko na ngai, bavandi ya ndako ya Kloe bayebisi ngai ete koswana ezali kati na bino.
12 이는 다름아니라 너희가 각각 이르되 나는 바울에게, 나는 아볼로에게, 나는 게바에게, 나는 그리스도에게 속한 자라 하는 것이니
Tala makambo oyo nalingi koloba: Moko kati na bino azali koloba: « Ngai nazali moto ya Polo; » mpe mosusu azali koloba: « Ngai nazali moto ya Apolosi; » mosusu azali koloba: « Ngai nazali moto ya Petelo; » mpe mosusu azali koloba: « Ngai nazali moto ya Klisto. »
13 그리스도께서 어찌 나뉘었느뇨 바울이 너희를 위하여 십자가에 못 박혔으며 바울의 이름으로 너희가 세례를 받았느뇨
Boni, Klisto azali ya kokabwana? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino? Ezali na kombo ya Polo nde bozwaki libatisi?
14 그리스보와 가이오 외에는 너희 중 아무에게도 내가 세례를 주지 아니한 것을 감사하노니
Nazongisaka matondi epai ya Nzambe ete nabatisa moto ata moko te kati na bino, longola kaka Krispisi mpe Gayusi,
15 이는 아무도 나의 이름으로 세례를 받았다 말하지 못하게 하려함이라
mpo ete moko te aloba ete bobatisamaki na kombo na ngai.
16 내가 또한 스데바나 집 사람에게 세례를 주었고 그 외에는 다른 아무에게 세례를 주었는지 알지 못하노라
Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu.
17 그리스도께서 나를 보내심은 세례를 주게 하려 하심이 아니요 오직 복음을 전케 하려 하심이니 말의 지혜로 하지 아니함은 그리스도의 십자가가 헛되지 않게 하려 함이라
Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango.
18 십자가의 도가 멸망하는 자들에게는 미련한 것이요 구원을 얻는 우리에게는 하나님의 능력이라
Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki;
19 기록된 바 내가 지혜 있는 자들의 지혜를 멸하고 총명한 자들의 총명을 폐하리라 하였으니
kolanda ndenge ekomama: « Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. »
20 지혜 있는 자가 어디 있느뇨 선비가 어디 있느뇨 이 세대에 변사가 어디 있느뇨 하나님께서 이 세상의 지혜를 미련케 하신 것이 아니뇨 (aiōn g165)
Wapi moto ya bwanya? Wapi molakisi ya Mobeko? Wapi moto ya mayele ya tango oyo? Boni, Nzambe akomisa te bwanya ya mokili liboma? (aiōn g165)
21 하나님의 지혜에 있어서는 이 세상이 자기 지혜로 하나님을 알지 못하는고로 하나님께서 전도의 미련한 것으로 믿는 자들을 구원 하시기를 기뻐하셨도다
Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.
22 유대인은 표적을 구하고 헬라인은 지혜를 찾으나
Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya,
23 우리는 십자가에 못 박힌 그리스도를 전하니 유대인에게는 거리끼는 것이요 이방인에게는 미련한 것이로되
biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu: ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano.
24 오직 부르심을 입은 자들에게는 유대인이나 헬라인이나 그리스도는 하나님의 능력이요 하나님의 지혜니라
Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe.
25 하나님의 미련한 것이 사람보다 지혜 있고 하나님의 약한 것이 사람보다 강하니라
Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.
26 형제들아 너희를 부르심을 보라 육체를 따라 지혜 있는 자가 많지 아니하며 능한 자가 많지 아니하며 문벌 좋은 자가 많지 아니하도다
Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino: kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu!
27 그러나 하나님께서 세상의 미련한 것들을 택하사 지혜 있는 자들을 부끄럽게 하려 하시고 세상의 약한 것들을 택하사 강한 것들을 부끄럽게 하려 하시며
Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.
28 하나님께서 세상의 천한 것들과 멸시 받는 것들과 없는 것들을 택하사 있는 것들을 폐하려 하시나니
Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina,
29 이는 아무 육체라도 하나님 앞에서 자랑하지 못하게 하려 하심이라
mpo ete moto ata moko te amikumisa liboso ya Nzambe.
30 너희는 하나님께로부터 나서 그리스도 예수 안에 있고 예수는 하나님께로서 나와서 우리에게 지혜와 의로움과 거룩함과 구속함이 되셨으니
Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,
31 기록된 바 자랑하는 자는 주 안에서 자랑하라 함과 같게 하려 함이니라
mpo ete, kolanda ndenge ekomama, « Tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo! »

< 고린도전서 1 >