< 고린도전서 14 >
1 사랑을 따라 구하라 신령한 것을 사모하되 특별히 예언을 하려고 하라
Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola.
2 방언을 말하는 자는 사람에게 하지 아니하고 하나님께 하나니 이는 알아 듣는 자가 없고 그 영으로 비밀을 말함이니라
Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.
3 그러나 예언하는 자는 사람에게 말하여 덕을 세우며 권면하며 안위하는 것이요
Kasi moto oyo asakolaka alobaka nde na bato mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango.
4 방언을 말하는 자는 자기의 덕을 세우고 예언하는 자는 교회의 덕을 세우나니
Moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alendisaka kaka kondima na ye moko, kasi moto oyo asakolaka alendisaka kondima ya Lingomba mobimba.
5 나는 너희가 다 방언 말하기를 원하나 특별히 예언하기를 원하노라 방언을 말하는 자가 만일 교회의 덕을 세우기 위하여 통역하지 아니하면 예언하는 자만 못하니라
Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
6 그런즉 형제들아 내가 너희에게 나아가서 방언을 말하고 계시나 지식이나 예언이나 가르치는 것이나 말하지 아니하면 너희에게 무엇이 유익하리요
Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi?
7 혹 저나 거문고와 같이 생명 없는 것이 소리를 낼 때에 그 음의 분별을 내지 아니하면 저 부는 것인지 거문고 타는 것인지 어찌 알게 되리요
Ezali mpe ndenge moko mpo na bibetelo mindule lokola flite to lindanda: soki ezali kobimisa te mingongo ekesana, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to lindanda ezali kobimisa?
8 만일 나팔이 분명치 못한 소리를 내면 누가 전쟁을 예비하리요
Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba?
9 이와 같이 너희도 혀로서 알아 듣기 쉬운 말을 하지 아니하면 그 말하는 것을 어찌 알리요 이는 허공에다 말하는 것이라
Ezali mpe ndenge moko mpo na bino: soki na minoko na bino, bozali kaka koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki penza koyeba makambo oyo bozali koloba? Wana, bokoloba na pamba.
10 세상에 소리의 종류가 이같이 많되 뜻 없는 소리는 없나니
Kati na mokili, nkota ezali ya ndenge na ndenge, mpe lokota moko te kati na yango ezangi tina.
11 그러므로 내가 그 소리의 뜻을 알지 못하면 내가 말하는 자에게 야만(野蠻)이 되고 말하는 자도 내게 야만이 되리니
Nzokande, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya lokota oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, mpe ye akozala mopaya epai na ngai.
12 그러면 너희도 신령한 것을 사모하는 자인즉 교회의 덕 세우기를 위하여 풍성하기를 구하라
Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, bolukaka mingi kozala na yango ebele mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
13 그러므로 방언을 말하는 자는 통역하기를 기도할지니
Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na nkota oyo eyebani te abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba.
14 내가 만일 방언으로 기도하면 나의 영이 기도하거니와 나의 마음은 열매를 맺히지 못하리라
Pamba te soki nasambeli na nkota oyo eyebani te, molimo na ngai ekozala kosambela, kasi mayele na ngai ekosala te.
15 그러면 어떻게 할꼬? 내가 영으로 기도하고 또 마음으로 기도하며 내가 영으로 찬미하고 또 마음으로 찬미하리라
Boye, nasala nini? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.
16 그렇지 아니하면 네가 영으로 축복할 때에 무식한 처지에 있는 자가 네가 무슨 말을 하는지 알지 못하고 네 감사에 어찌 아멘 하리요
Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.
17 너는 감사를 잘하였으나 그러나 다른 사람은 덕 세움을 받지 못하리라
Ozali kozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu azali kokola te kati na kondima.
18 내가 너희 모든 사람보다 방언을 더 말하므로 하나님께 감사하노라
Nazongisaka matondi epai ya Nzambe mpo ete nalobaka nkota oyo eyebani te, koleka bino nyonso.
19 그러나 교회에서 네가 남을 가르치기 위하여 깨달은 마음으로 다섯 마디 말을 하는 것이 일만 마디 방언으로 말하는 것보다 나으니라
Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ete naloba maloba nkoto zomi na nkota oyo eyebani te.
20 형제들아 지혜에는 아이가 되지 말고 악에는 어린 아이가 되라 지혜에 장성한 사람이 되라
Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.
21 율법에 기록된바 주께서 가라사대 내가 다른 방언하는 자와 다른 입술로 이 백성에게 말할지라도 저희가 오히려 듣지 아니하리라 하였으니
Ekomama boye kati na Mobeko: « Ekozala na nkota ya bapaya, na nzela ya nkota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo; kasi atako bongo, bakoyoka ngai te, » elobi Nkolo.
22 그러므로 방언은 믿는 자들을 위하지 않고 믿지 아니하는 자들을 위하는 표적이나 예언은 믿지 아니하는 자들을 위하지 않고 믿는 자들을 위함이니
Yango wana, nkota oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bazali bandimi te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi; nzokande lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bazali bandimi te.
23 그러므로 온 교회가 함께 모여 다 방언으로 말하면 무식한 자들이나 믿지 아니하는 자들이 들어와서 너희를 미쳤다 하지 아니하겠느냐?
Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba nkota oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bazali bandimi te bakoti kuna, boni, bakoloba te ete bozali na liboma?
24 그러나 다 예언을 하면 믿지 아니하는 자들이나 무식한 자들이 들어와서 모든 사람에게 책망을 들으며 모든 사람에게 판단을 받고
Nzokande, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo azali mondimi te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna, boni, akomimona te lokola moto ya masumu? Akomitungisa te kati na motema na ye?
25 그 마음의 숨은 일이 드러나게 되므로 엎드리어 하나님께 경배하며 하나님이 참으로 너희 가운데 계시다 전파하리라
Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba: « Solo, Nzambe azali kati na bino. »
26 그런즉 형제들아 어찌할꼬 너희가 모일 때에 각각 찬송시도 있으며 가르치는 말씀도 있으며 계시도 있으며 방언도 있으며 통역함도 있나니 모든 것을 덕을 세우기 위하여 하라
Bandeko, toloba lisusu nini? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na lokota oyo eyebani te, mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
27 만일 누가 방언으로 말하거든 두 사람이나 다불과 세 사람이 차서를 따라 하고 한 사람이 통역할 것이요
Soki bato bazali koloba na nkota oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato, baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango.
28 만일 통역하는 자가 없거든 교회에서는 잠잠하고 자기와 및 하나님께 말할 것이요
Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, wana tika ete ye oyo azali koloba lokota oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai ya Nzambe.
29 예언하는 자는 둘이나 셋이나 말하고 다른 이들은 분변할 것이요
Mpo na oyo etali basakoli, tika ete mibale to misato basakola, mpe bamosusu baluka kososola malamu makambo oyo bazali koloba.
30 만일 곁에 앉은 다른 이에게 계시가 있거든 먼저 하던 자는 잠잠할지니라
Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli, wana mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba asengeli kokanga monoko.
31 너희는 다 모든 사람으로 배우게 하고 모든 사람으로 권면을 받게 하기 위하여 하나씩 하나씩 예언할 수 있느니라
Pamba te bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama.
32 예언하는 자들의 영이 예언하는 자들에게 제재를 받나니
Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli, oyo ezali kokamba ye.
33 하나님은 어지러움의 하나님이 아니시요 오직! 화평의 하나님이시니라
Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,
34 모든 성도의 교회에서 함과 같이 여자는 교회에서 잠잠하라! 저희의 말하는 것을 허락함이 없나니 율법에 이른 것같이 오직 복종할 것이요
basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.
35 만일 무엇을 배우려거든 집에서 자기 남편에게 물을지니 여자가 교회에서 말하는 것은 부끄러운 것임이라
Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango kati na ndako, pamba te ezali soni mpo na mwasi koloba kati na mayangani.
36 하나님의 말씀이 너희에게로부터 난 것이냐 또는 너희에게만 임한 것이냐
Boni, bokanisi ete Maloba ya Nzambe ewutaki nde epai na bino to ekomaki kaka epai na bino moko?
37 만일 누구든지 자기를 선지자나 혹 신령한 자로 생각하거든 내가 너희에게 편지한 것이 주의 명령인 줄 알라
Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo.
38 만일 누구든지 알지 못하면 그는 알지 못한 자니라
Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te.
39 그런즉 내 형제들아 예언하기를 사모하며 방언 말하기를 금하지 말라
Yango wana, bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba nkota oyo eyebani te.
40 모든 것을 적당하게 하고 질서대로 하라!
Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.