< 역대하 33 >
1 므낫세가 위에 나아갈 때에 나이 십 이세라 예루살렘에서 오십 오년을 치리하며
Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi.
2 여호와 보시기에 악을 행하여 여호와께서 이스라엘 자손 앞에서 쫓아내신 이방 사람의 가증한 일을 본받아
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.
3 그 부친 히스기야의 헐어버린 산당을 다시 세우며 바알들을 위하여 단을 쌓으며 아세라 목상을 만들며 하늘의 일월 성신을 숭배하여 섬기며
Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki; atongaki mpe bitumbelo mpo na banzambe Bala mpe atelemisaki makonzi mpo na nzambe mwasi Ashera. Afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.
4 여호와께서 전에 이르시기를 내가 내 이름을 예루살렘에 영영히 두리라 하신 여호와의 전에 단들을 쌓고
Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki: « Kombo na Ngai ekozala kati na Yelusalemi mpo na libela. »
5 또 여호와의 전 두 마당에 하늘의 일월 성신을 위하여 단들을 쌓고
Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo.
6 또 힌놈의 아들 골짜기에서 그 아들들을 불 가운데로 지나게 하며 또 점치며 사술과 요술을 행하며 신접한 자와 박수를 신임하여 여호와 보시기에 악을 많이 행하여 그 진노를 격발하였으며
Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi; asalelaki kindoki, soloka mpe maji; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe; na bongo, apelisaki kanda na Ye.
7 또 자기가 만든 아로새긴 목상을 하나님의 전에 세웠더라 옛적에 하나님이 이 전에 대하여 다윗과 그 아들 솔로몬에게 이르시기를 내가 이스라엘 모든 지파 중에서 택한 이 전과 예루살렘에 내 이름을 영원히 둘찌라
Atiaki kati na Tempelo ya Yawe nzambe ya ekeko oyo asalisaki; nzokande, Nzambe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali: — Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.
8 만일 이스라엘 사람이 내가 명한 일 곧 모세로 전한 모든 율법과 율례와 규례를 지켜 행하면 내가 그들의 발로 다시는 그 열조에게 정하여 준 땅에서 옮기지 않게 하리라 하셨으나
Nakolongola lisusu te makolo ya bato ya Isalaele na mokili oyo napesaki epai ya batata na bango, soki kaka bamipesi na kosala makambo nyonso oyo natindaki bango na tina na mibeko nyonso, mitindo mpe malako oyo napesaki bango na nzela ya Moyize.
9 유다와 예루살렘 거민이 므낫세의 꾀임을 받고 악을 행한 것이 여호와께서 이스라엘 자손 앞에서 멸하신 열방보다 더욱 심하였더라
Kasi Manase apengwisaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi; boye basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele.
10 여호와께서 므낫세와 그 백성에게 이르셨으나 저희가 듣지 아니한고로
Yawe akebisaki Manase mpe bato na Ye, kasi baboyaki koyoka.
11 여호와께서 앗수르 왕의 군대 장관들로 와서 치게 하시매 저희가 므낫세를 사로잡고 쇠사슬로 결박하여 바벨론으로 끌어 간지라
Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.
12 저가 환난을 당하여 그 하나님 여호와께 간구하고 그 열조의 하나님 앞에 크게 겸비하여
Kati na pasi na ye, Manase abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki makasi liboso ya Nzambe ya batata na ye.
13 기도한고로 하나님이 그 기도를 받으시며 그 간구를 들으시사 저로 예루살렘에 돌아와서 다시 왕위에 거하게 하시매 므낫세가 그제야 여호와께서 하나님이신 줄을 알았더라
Abondelaki Ye, mpe Yawe alembisaki motema, ayokaki libondeli na ye mpe azongisaki ye na Yelusalemi, kati na mokili na ye. Manase asosolaki ete Yawe kaka nde azali Nzambe.
14 그 후에 다윗성 밖 기혼 서편 골짜기 안에 외성을 쌓되 생선문 어귀까지 이르러 오벨을 둘러 심히 높이 쌓고 또 유다 모든 견고한 성읍에 군대 장관을 두며
Sima na makambo oyo nyonso, Manase atongaki mir, na libanda ya engumba ya Davidi, na ngambo ya weste ya etima ya Giyoni, na lubwaku oyo ekenda kino na ekuke ya Mbisi; ezingelaki ngomba moke ya Ofeli. Asalaki yango molayi makasi, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki bakonzi ya basoda kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi.
15 이방 신들과 여호와의 전의 우상을 제하며 여호와의 전을 건축한 산에와 예루살렘에 쌓은 모든 단을 다 성 밖에 던지고
Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe banzambe ya bapaya mpe ya bikeko, abwakaki libanda ya engumba bitumbelo nyonso oyo atongaki na ngomba moke ya Tempelo mpe kati na Yelusalemi.
16 여호와의 단을 중수하고 화목제와 감사제를 그 단 위에 드리고 유다를 명하여 이스라엘 하나님 여호와를 섬기라 하매
Bongo atongaki lisusu etumbelo ya Yawe, abonzaki na likolo na yango mbeka ya boyokani elongo na makabo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpe apesaki mitindo epai ya bato ya Yuda ete basalela Yawe, Nzambe ya Isalaele.
17 백성이 그 하나님 여호와께만 제사를 드렸으나 오히려 산당에서 제사를 드렸더라
Atako bato bakobaki kotumba bambeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, kasi bazalaki kosala yango kaka mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na bango.
18 므낫세의 남은 사적과 그 하나님께 기도한 말씀과 선견자가 이스라엘 하나님 여호와의 이름을 받들고 권한 말씀이 모두 이스라엘 열왕의 행장에 기록되었고
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, libondeli na ye epai ya Nzambe na ye mpe maloba oyo bamoni makambo balobaki na ye na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
19 또 그 기도와 그 기도를 들으신것과 그 모든 죄와 건과와 겸비하기 전에 산당을 세운 곳과 아세라 목상과 우상을 세운 곳들이 다 호새의 사기에 기록되니라
Libondeli na ye mpe ndenge Yawe alimbisaki mabe na ye, masumu na ye nyonso, bozangi boyengebene na ye epai ya Nzambe, molongo ya bisika nyonso epai wapi atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atelemisaki makonzi ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe oyo azalaki kofukamela liboso ete ayokisama soni, nyonso wana ekomama kati na mikanda ya Ozayi.
20 므낫세가 그 열조와 함께 자매 그 궁에 장사하고 그 아들 아몬이 대신하여 왕이 되니라
Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
21 아몬이 위에 나아갈 때에 나이 이십 이세라 예루살렘에서 이년을 치리하며
Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi.
22 그 부친 므낫세의 행함 같이 여호와 보시기에 악을 행하여 그 부친 므낫세가 만든 아로새긴 모든 우상에게 제사하여 섬겼으며
Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki; agumbamelaki banzambe nyonso ya bikeko oyo Manase, tata na ye, asalaki mpe abonzelaki yango bambeka.
23 이 아몬이 그 부친 므낫세의 스스로 겸비함 같이 여호와 앞에서 스스로 겸비치 아니하고 더욱 범죄하더니
Amoni amikitisaki te lokola Manase, tata na ye, liboso ya Yawe, kasi asalaki lisusu mabe koleka.
24 그 신복이 반역하여 왕을 궁중에서 죽이매
Bakalaka na ye basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi.
25 국민이 아몬왕을 반역한 사람들을 다 죽이고 그 아들 요시야로 대신하여 왕을 삼으니라
Kasi bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita; mpe na esika na ye, bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi.