< ペテロの手紙第二 3 >

1 愛する人たち。いま私がこの第二の手紙をあなたがたに書き送るのは、これらの手紙により、記憶を呼びさまさせて、あなたがたの純真な心を奮い立たせるためなのです。
Balingami na ngai, tala mokanda ya mibale oyo nakomeli bino. Kati na mikanda nyonso mibale, nazali koluka kolamusa, kati na makanisi na bino, malakisi oyo bozwaki, mpo ete bokoma kokanisa na lolenge ya peto,
2 それは、聖なる預言者たちによって前もって語られたみことばと、あなたがたの使徒たちが語った、主であり救い主である方の命令とを思い起こさせるためなのです。
mpo ete bokanisa lisusu maloba oyo basakoli ya bule balobaki na tango ya kala mpe Mibeko oyo Nkolo mpe Mobikisi apesaki na nzela ya bantoma na bino.
3 まず第一に、次のことを知っておきなさい。終わりの日に、あざける者どもがやって来てあざけり、自分たちの欲望に従って生活し、
Liboso na nyonso, boyeba ete, na mikolo ya suka, batioli bakobima, bakotambola kolanda baposa na bango moko
4 次のように言うでしょう。「キリストの来臨の約束はどこにあるのか。先祖たちが眠った時からこのかた、何事も創造の初めからのままではないか。」
mpe bakoloba: « Boni, alakaki te ete akoya? Wapi ye sik’oyo? Pamba te, banda bakoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali na yango kaka ndenge ezalaka wuta na ebandeli ya mokili. »
5 こう言い張る彼らは、次のことを見落としています。すなわち、天は古い昔からあり、地は神のことばによって水から出て、水によって成ったのであって、
Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.
6 当時の世界は、その水により、洪水におおわれて滅びました。
Babosanaka mpe ete ezali lisusu na nzela ya mayi yango nde mokili ya tango wana ebebisamaki wana ezindaki kati na mayi.
7 しかし、今の天と地は、同じみことばによって、火に焼かれるためにとっておかれ、不敬虔な者どものさばきと滅びとの日まで、保たれているのです。
Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu.
8 しかし、愛する人たち。あなたがたは、この一事を見落としてはいけません。すなわち、主の御前では、一日は千年のようであり、千年は一日のようです。
Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana: mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.
9 主は、ある人たちがおそいと思っているように、その約束のことを遅らせておられるのではありません。かえって、あなたがたに対して忍耐深くあられるのであって、ひとりでも滅びることを望まず、すべての人が悔い改めに進むことを望んでおられるのです。
Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.
10 しかし、主の日は、盗人のようにやって来ます。その日には、天は大きな響きをたてて消えうせ、天の万象は焼けてくずれ去り、地と地のいろいろなわざは焼き尽くされます。
Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.
11 このように、これらのものはみな、くずれ落ちるものだとすれば、あなたがたは、どれほどきよい生き方をする敬虔な人でなければならないことでしょう。
Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe
12 そのようにして、神の日の来るのを待ち望み、その日の来るのを早めなければなりません。その日が来れば、そのために、天は燃えてくずれ、天の万象は焼け溶けてしまいます。
wana bozali kozela mokolo ya Nzambe mpe kosala ete mokolo yango eya noki. Na mokolo yango, Likolo elongo na biloko nyonso ekozika mpe ekonyangwama na moto.
13 しかし、私たちは、神の約束に従って、正義の住む新しい天と新しい地を待ち望んでいます。
Nzokande, biso, kolanda elaka na Ye, tozali kozela Likolo ya sika mpe mabele ya sika epai wapi bosembo ekozala.
14 そういうわけで、愛する人たち。このようなことを待ち望んでいるあなたがたですから、しみも傷もない者として、平安をもって御前に出られるように、励みなさい。
Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka.
15 また、私たちの主の忍耐は救いであると考えなさい。それは、私たちの愛する兄弟パウロも、その与えられた知恵に従って、あなたがたに書き送ったとおりです。
Boyeba malamu ete ezali mpo na lobiko na bino nde Nkolo na biso azali nanu kokanga motema, ndenge Polo, ndeko na biso ya bolingo, akomelaki bino, kolanda bwanya oyo Nzambe apesaki ye.
16 その中で、ほかのすべての手紙でもそうなのですが、このことについて語っています。その手紙の中には理解しにくいところもあります。無知な、心の定まらない人たちは、聖書の他の個所のばあいもそうするのですが、それらの手紙を曲解し、自分自身に滅びを招いています。
Azali kokoma bongo kati na mikanda nyonso epai wapi azali kolobela makambo yango. Kati na mikanda yango, ezali na makambo mosusu ya makasi mpo na kososola; bongo bato oyo bazangi boyebi mpe balendisama malamu te na kondima bazali kobongola ndimbola na yango, ndenge kaka bazali mpe kobongola ndimbola ya biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko.
17 愛する人たち。そういうわけですから、このことをあらかじめ知っておいて、よく気をつけ、無節操な者たちの迷いに誘い込まれて自分自身の堅実さを失うことにならないようにしなさい。
Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino;
18 私たちの主であり救い主であるイエス・キリストの恵みと知識において成長しなさい。このキリストに、栄光が、今も永遠の日に至るまでもありますように。アーメン。 (aiōn g165)
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela! Amen! (aiōn g165)

< ペテロの手紙第二 3 >

The Great Flood
The Great Flood