< 雅歌 4 >

1 わが愛する者よ、見よ、あなたは美しい、見よ、あなたは美しい。あなたの目は、顔おおいのうしろにあって、はとのようだ。あなたの髪はギレアデの山を下るやぎの群れのようだ。
Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko, ozali penza kitoko makasi! Miso na yo, na se ya vwale, elala lokola ebenga; suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ekitaka na ngomba Galadi.
2 あなたの歯は洗い場から上ってきた毛を切られた雌羊の群れのようだ。みな二子を産んで、一匹も子のないものはない。
Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme oyo balongoli bapwale, bongo bawuti kosukola yango. Meme moko na moko ezali na lipasa na yango; moko te ezangi mwana.
3 あなたのくちびるは紅の糸のようで、その口は愛らしい。あなたのほおは顔おおいのうしろにあって、ざくろの片われのようだ。
Bibebu na yo ezali lokola kitendi ya motane, mpe elobeli na yo epesaka esengo; matama na yo ezali lokola mbuma ya grenade, na se ya vwale.
4 あなたの首は武器倉のために建てたダビデのやぐらのようだ。その上には一千の盾を掛けつらね、みな勇士の大盾である。
Kingo na yo ezali lokola ndako molayi ya Davidi, oyo batongi mpo na kobomba bibundeli; banguba nkoto moko ediembisami kuna, banguba ya basoda ya mpiko.
5 あなたの両乳ぶさは、かもしかの二子である二匹の子じかが、ゆりの花の中に草を食べているようだ。
Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko, oyo ezali kolia kati na bafololo oyo babengaka lisi.
6 日の涼しくなるまで、影の消えるまで、わたしは没薬の山および乳香の丘へ急ぎ行こう。
Kino tongo ekotana mpe molili ekolimwa, nakokende na ngomba ya mire mpe na ngomba moke ya ansa.
7 わが愛する者よ、あなたはことごとく美しく、少しのきずもない。
Mwasi na ngai ya motema, mobimba na yo ezali kitoko mingi; ata elembo moko te emonani mabe kati na yo.
8 わが花嫁よ、レバノンからわたしと一緒にきなさい、レバノンからわたしと一緒にきなさい。アマナの頂を去り、セニルおよびヘルモンの頂を去り、ししの穴、ひょうの山を去りなさい。
Longwa na Libani mpe yaka elongo na ngai, mwasi na ngai ya motema; longwa na Libani, yaka elongo na ngai. Tala wuta na basonge ya bangomba Amana, Seniri mpe Erimoni epai wapi ezali na ndako ya bankosi mpe ngomba ya bankoyi.
9 わが妹、わが花嫁よ、あなたはわたしの心を奪った。あなたはただひと目で、あなたの首飾のひと玉で、わたしの心を奪った。
Obetisi ngai motema makasi, Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema; obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo, mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.
10 わが妹、わが花嫁よ、あなたの愛は、なんと麗しいことであろう。あなたの愛はぶどう酒よりも、あなたの香油のかおりはすべての香料よりも、いかにすぐれていることであろう。
Solo, bolingo na yo eleki elengi, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema! Solo, bolingo na yo eleki vino na kitoko; solo ya mafuta na yo eleki malasi nyonso na kitoko.
11 わが花嫁よ、あなたのくちびるは甘露をしたたらせ、あなたの舌の下には、蜜と乳とがある。あなたの衣のかおりはレバノンのかおりのようだ。
Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi, mwasi na ngai ya motema; se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki, mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.
12 わが妹、わが花嫁は閉じた園、閉じた園、封じた泉のようだ。
Ozali elanga ekangama, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema; ozali etima oyo ezipami mpe liziba oyo ekangami.
13 あなたの産み出す物は、もろもろの良き実をもつざくろの園、ヘンナおよびナルド、
Ozali kopesa pio lokola elanga ya banzete ya grenade, oyo ezali na bambuma kitoko, elongo na banzete ya solo kitoko: ene mpe nare,
14 ナルド、さふらん、しょうぶ、肉桂、さまざまの乳香の木、没薬、ろかい、およびすべての尊い香料である。
nare mpe safarani, kaneli ya solo kitoko, sinamoni, elongo na lolenge nyonso ya banzete oyo epesaka malasi ya ansa, ya aloe mpe ya mire, mpe malasi nyonso oyo eleki kitoko.
15 あなたは園の泉、生ける水の井、またレバノンから流れ出る川である。
Ozali liziba kati na elanga, etima oyo etiolaka wuta na Libani.
16 北風よ、起れ、南風よ、きたれ。わが園を吹いて、そのかおりを広く散らせ。わが愛する者がその園にはいってきて、その良い実を食べるように。
Oh mopepe ya nor, lamuka; oh mopepe ya sude, yaka! Pepa kati na elanga na ngai, mpe tika ete solo kitoko na yango epanzana kino mosika! Tika ete mwasi na ngai ya motema aya kati na elanga na ye mpe alia mbuma na yango ya elengi makasi!

< 雅歌 4 >