< ルツ記 1 >

1 さばきづかさが世を治めているころ、国に飢きんがあったので、ひとりの人がその妻とふたりの男の子を連れてユダのベツレヘムを去り、モアブの地へ行ってそこに滞在した。
Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi.
2 その人の名はエリメレク、妻の名はナオミ、ふたりの男の子の名はマロンとキリオンといい、ユダのベツレヘムのエフラタびとであった。彼らはモアブの地へ行って、そこにおったが、
Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.
3 ナオミの夫エリメレクは死んで、ナオミとふたりの男の子が残された。
Elimeleki, mobali ya Naomi, akufaki; mpe Naomi atikalaki ye moko elongo na bana na ye mibale ya mibali.
4 ふたりの男の子はそれぞれモアブの女を妻に迎えた。そのひとりの名はオルパといい、ひとりの名はルツといった。彼らはそこに十年ほど住んでいたが、
Bana na ye mibale ya mibali babalaki basi ya Moabi: ya liboso, kombo na ye ezalaki « Oripa; » mpe ya mibale, « Rite. » Sima na bango kowumela kuna mibu pene zomi,
5 マロンとキリオンのふたりもまた死んだ。こうしてナオミはふたりの子と夫とに先だたれた。
Maaloni mpe Kilioni bakufaki. Naomi atikalaki ye moko, azangaki bana na ye mibale ya mibali mpe mobali na ye.
6 その時、ナオミはモアブの地で、主がその民を顧みて、すでに食物をお与えになっていることを聞いたので、その嫁と共に立って、モアブの地からふるさとへ帰ろうとした。
Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.
7 そこで彼女は今いる所を出立し、ユダの地へ帰ろうと、ふたりの嫁を連れて道に進んだ。
Elongo na babokilo na ye mibale ya basi, Naomi alongwaki na esika oyo azalaki kovanda mpe azwaki nzela mpo na kozonga na mokili ya Yuda.
8 しかしナオミはふたりの嫁に言った、「あなたがたは、それぞれ自分の母の家に帰って行きなさい。あなたがたが、死んだふたりの子とわたしに親切をつくしたように、どうぞ、主があなたがたに、いつくしみを賜わりますよう。
Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi: — Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko.
9 どうぞ、主があなたがたに夫を与え、夫の家で、それぞれ身の落ち着き所を得させられるように」。こう言って、ふたりの嫁に口づけしたので、彼らは声をあげて泣き、
Tika ete Yawe apesa na moko na moko na bino bopemi kati na ndako ya mobali mosusu. Bongo Naomi apesaki bango beze, mpe balelaki makasi.
10 ナオミに言った、「いいえ、わたしたちは一緒にあなたの民のところへ帰ります」。
Sima, balobaki na ye: — Tokokende elongo na yo, epai ya bato na yo.
11 しかしナオミは言った、「娘たちよ、帰って行きなさい。どうして、わたしと一緒に行こうというのですか。あなたがたの夫となる子がまだわたしの胎内にいると思うのですか。
Kasi Naomi azongiselaki bango: — Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino?
12 娘たちよ、帰って行きなさい。わたしは年をとっているので、夫をもつことはできません。たとい、わたしが今夜、夫をもち、また子を産む望みがあるとしても、
Bana na ngai, bozonga epai na bino; nakomi mobange makasi, nakokoka lisusu kobala te. Ata soki nakanisi ete nazali nanu na elikya ya kobota, mpe, na butu ya lelo, nasangisi nzoto na mobali, mpe naboti bana mibali,
13 そのためにあなたがたは、子どもの成長するまで待っているつもりなのですか。あなたがたは、そのために夫をもたずにいるつもりなのですか。娘たちよ、それはいけません。主の手がわたしに臨み、わたしを責められたことで、あなたがたのために、わたしは非常に心を痛めているのです」。
boni, bokokoka penza kozela kino bakokola? Bokokoba kaka kozanga kobala mpo na bango? Te, bana na ngai! Mawa na ngai ezali makasi koleka mawa na bino, pamba te loboko na Yawe eyokisi ngai pasi makasi.
14 彼らはまた声をあげて泣いた。そしてオルパはそのしゅうとめに口づけしたが、ルツはしゅうとめを離れなかった。
Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye.
15 そこでナオミは言った、「ごらんなさい。あなたの相嫁は自分の民と自分の神々のもとへ帰って行きました。あなたも相嫁のあとについて帰りなさい」。
Naomi alobaki na Rite: — Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye; yo mpe zonga elongo na ye.
16 しかしルツは言った、「あなたを捨て、あなたを離れて帰ることをわたしに勧めないでください。わたしはあなたの行かれる所へ行き、またあなたの宿られる所に宿ります。あなたの民はわたしの民、あなたの神はわたしの神です。
Kasi Rite azongiselaki ye: — Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.
17 あなたの死なれる所でわたしも死んで、そのかたわらに葬られます。もし死に別れでなく、わたしがあなたと別れるならば、主よ、どうぞわたしをいくえにも罰してください」。
Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.
18 ナオミはルツが自分と一緒に行こうと、固く決心しているのを見たので、そのうえ言うことをやめた。
Tango Naomi amonaki ete Rite atingami kaka kokende na ye elongo, atikaki kotindika ye na makasi.
19 そしてふたりは旅をつづけて、ついにベツレヘムに着いた。彼らがベツレヘムに着いたとき、町はこぞって彼らのために騒ぎたち、女たちは言った、「これはナオミですか」。
Yango wana, bango mibale bakendeki kino bakomaki na Beteleemi. Tango bakomaki na Beteleemi, engumba mobimba eyokaki mawa mpo na bango. Mpe basi batunaki: — Oyo Naomi?
20 ナオミは彼らに言った、「わたしをナオミ(楽しみ)と呼ばずに、マラ(苦しみ)と呼んでください。なぜなら全能者がわたしをひどく苦しめられたからです。
Ye alobaki na bango: — Bobenga ngai lisusu Naomi te, kasi Mara; pamba te Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa mingi.
21 わたしは出て行くときは豊かでありましたが、主はわたしをから手で帰されました。主がわたしを悩まし、全能者がわたしに災をくだされたのに、どうしてわたしをナオミと呼ぶのですか」。
Nazalaki na biloko ebele tango nakendeki, kasi Yawe azongisi ngai maboko pamba. Bongo mpo na nini kobenga ngai lisusu Naomi? Yawe ayokisi ngai pasi, mpe Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa.
22 こうしてナオミは、モアブの地から帰った嫁、モアブの女ルツと一緒に帰ってきて、大麦刈の初めにベツレヘムに着いた。
Ndenge wana nde Naomi azongaki na Yuda wuta na Moabi, elongo na Rite, moto ya Moabi, bokilo na ye ya mwasi. Bakomaki na Beteleemi, na ebandeli ya tango oyo babukaka bambuma ya orje.

< ルツ記 1 >