< 詩篇 66 >

1 聖歌隊の指揮者によってうたわせた歌、さんび 全地よ、神にむかって喜び呼ばわれ。
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko!
2 そのみ名の栄光を歌え。栄えあるさんびをささげよ。
Boyemba banzembo ya lokumu mpo na nkembo ya Kombo na Ye, bopesa lokumu na Ye nkembo.
3 神に告げよ。「あなたのもろもろのみわざは恐るべきかな。大いなるみ力によって、あなたの敵はみ前に屈服し、
Boloba na Nzambe: « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.
4 全地はあなたを拝み、あなたをほめうたい、み名をほめうたうであろう」と。 (セラ)
Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »
5 来て、神のみわざを見よ。人の子らにむかってなされることは恐るべきかな。
Boya kotala misala ya Nzambe! Misala na Ye ya minene mpo na bana ya bato ebongi na kobanga yango.
6 神は海を変えて、かわいた地とされた。人々は徒歩で川を渡った。その所でわれらは神を喜んだ。
Abongolaki ebale monene mabele ya kokawuka; bakatisaki ebale na makolo ekawuka. Tozali kosepela kati na Ye.
7 神は大能をもって、とこしえに統べ治め、その目はもろもろの国民を監視される。そむく者はみずからを高くしてはならない。 (セラ)
Na nguya na Ye, akonzaka mpo na libela; miso na Ye ekengelaka bikolo. Tika ete batomboki batombokela Ye te.
8 もろもろの民よ、われらの神をほめよ。神をほめたたえる声を聞えさせよ。
Bino bikolo, bopambola Nzambe na biso! Bosala ete lokito ya masanzoli na Ye eyokana!
9 神はわれらを生きながらえさせ、われらの足のすべるのをゆるされない。
Asalaka ete totangama kati na bato ya bomoi. Abatelaki makolo na biso mpo ete tokweya te.
10 神よ、あなたはわれらを試み、しろがねを練るように、われらを練られた。
Pamba te, Nzambe, omekaki biso, olekisaki biso kati na moto ndenge basalaka mpo na palata.
11 あなたはわれらを網にひきいれ、われらの腰に重き荷を置き、
Okangaki biso kati na motambo; otiaki mikumba ya kilo, na baloketo na biso.
12 人々にわれらの頭の上を乗り越えさせられた。われらは火の中、水の中を通った。しかしあなたはわれらを広い所に導き出された。
Otikaki moto komatela biso na moto. Tolekaki kati na moto mpe kati na mayi, mpe obimisaki biso kati na yango mpo na komema biso na bofuluki.
13 わたしは燔祭をもってあなたの家に行き、わたしの誓いをあなたに果します。
Nakokota kati na Ndako na Yo, nakomemela Yo makabo ya kotumba, nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.
14 これはわたしが悩みにあったとき、わたしのくちびるの言い出したもの、わたしの口が約束したものです。
Bandayi oyo bibebu na ngai moko etatolaki mpe monoko na ngai elobaki na tango nazalaki kati na pasi.
15 わたしは肥えたものの燔祭を雄羊のいけにえの煙と共にあなたにささげ、雄牛と雄やぎとをささげます。 (セラ)
Lokola bambeka ya kotumba, nakobonzela Yo banyama minene, bameme elongo na bambeka ya malasi; nakobonzela Yo bangombe mpe bantaba ya mibali.
16 すべて神を恐れる者よ、来て聞け。神がわたしのためになされたことを告げよう。
Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.
17 わたしは声をあげて神に呼ばわり、わが舌をもって神をあがめた。
Nabelelaki Ye na monoko na ngai, mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.
18 もしわたしが心に不義をいだいていたならば、主はお聞きにならないであろう。
Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai, Nkolo alingaki koyoka ngai te.
19 しかし、まことに神はお聞きになり、わが祈の声にみこころをとめられた。
Nzokande, Nzambe ayokaki ngai, ayokaki na bokebi libondeli na ngai.
20 神はほむべきかな。神はわが祈をしりぞけず、そのいつくしみをわたしから取り去られなかった。
Tika ete Nzambe akumisama! Aboyaki te koyoka libondeli na ngai mpe kotalisa ngai bolingo na Ye.

< 詩篇 66 >