< 詩篇 146 >

1 主をほめたたえよ。わが魂よ、主をほめたたえよ。
Bokumisa Yawe! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe!
2 わたしは生けるかぎりは主をほめたたえ、ながらえる間は、わが神をほめうたおう。
Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
3 もろもろの君に信頼してはならない。人の子に信頼してはならない。彼らには助けがない。
Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
4 その息が出ていけば彼は土に帰る。その日には彼のもろもろの計画は滅びる。
Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
5 ヤコブの神をおのが助けとし、その望みをおのが神、主におく人はさいわいである。
Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye!
6 主は天と地と、海と、その中にあるあらゆるものを造り、とこしえに真実を守り、
Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango; azali sembo seko na seko.
7 しえたげられる者のためにさばきをおこない、飢えた者に食物を与えられる。主は捕われ人を解き放たれる。
Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala; abimisaka bakangami na boloko.
8 主は盲人の目を開かれる。主はかがむ者を立たせられる。主は正しい者を愛される。
Yawe abikisaka miso ya bakufi miso; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama; Yawe alingaka bato ya sembo.
9 主は寄留の他国人を守り、みなしごと、やもめとをささえられる。しかし、悪しき者の道を滅びに至らせられる。
Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.
10 主はとこしえに統べ治められる。シオンよ、あなたの神はよろず代まで統べ治められる。主をほめたたえよ。
Yawe azali Mokonzi seko na seko; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela! Bokumisa Yawe!

< 詩篇 146 >