< 詩篇 12 >

1 聖歌隊の指揮者によってシェミニテにあわせてうたわせたダビデの歌 主よ、お助けください。神を敬う人は絶え、忠信な者は人の子らのなかから消えうせました。
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. Yawe, sunga biso! Pamba te bayengebene bazali lisusu te; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.
2 人はみなその隣り人に偽りを語り、へつらいのくちびると、ふたごころとをもって語る。
Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te.
3 主はすべてのへつらいのくちびると、大きな事を語る舌とを断たれるように。
Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo,
4 彼らは言う、「わたしたちは舌をもって勝を得よう、わたしたちのくちびるはわたしたちのものだ、だれがわたしたちの主人であるか」と。
ba-oyo balobaka: « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso; nani akoluka kozala nkolo na biso? »
5 主は言われる、「貧しい者がかすめられ、乏しい者が嘆くゆえに、わたしはいま立ちあがって、彼らをその慕い求める安全な所に置こう」と。
Yawe alobi: « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »
6 主のことばは清き言葉である。地に設けた炉で練り、七たびきよめた銀のようである。
Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.
7 主よ、われらを保ち、とこしえにこの人々から免れさせてください。
Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.
8 卑しい事が人の子のなかにあがめられている時、悪しき者はいたる所でほしいままに歩いています。
Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai soki bato bapesi bozoba lokumu.

< 詩篇 12 >