< 箴言 知恵の泉 8 >

1 知恵は呼ばわらないのか、悟りは声をあげないのか。
Boni, Bwanya azali kobelela te? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te?
2 これは道のほとりの高い所の頂、また、ちまたの中に立ち、
Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana,
3 町の入口にあるもろもろの門のかたわら、正門の入口で呼ばわって言う、
azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba:
4 「人々よ、わたしはあなたがたに呼ばわり、声をあげて人の子らを呼ぶ。
« Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato!
5 思慮のない者よ、悟りを得よ、愚かな者よ、知恵を得よ。
Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli! Bino bazoba, bokoma mayele!
6 聞け、わたしは高貴な事を語り、わがくちびるは正しい事を語り出す。
Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo.
7 わが口は真実を述べ、わがくちびるは悪しき事を憎む。
Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe.
8 わが口の言葉はみな正しい、そのうちに偽りと、よこしまはない。
Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe;
9 これはみな、さとき者の明らかにするところ、知識を得る者の正しとするところである。
nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.
10 あなたがたは銀を受けるよりも、わたしの教を受けよ、精金よりも、むしろ知識を得よ。
Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto,
11 知恵は宝石にまさり、あなたがたの望むすべての物は、これと比べるにたりない。
pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.
12 知恵であるわたしは悟りをすみかとし、知識と慎みとをもつ。
Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.
13 主を恐れるとは悪を憎むことである。わたしは高ぶりと、おごりと、悪しき道と、偽りの言葉とを憎む。
Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.
14 計りごとと、確かな知恵とは、わたしにある、わたしには悟りがあり、わたしには力がある。
Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.
15 わたしによって、王たる者は世を治め、君たる者は正しい定めを立てる。
Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo;
16 わたしによって、主たる者は支配し、つかさたる者は地を治める。
ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka.
17 わたしは、わたしを愛する者を愛する、わたしをせつに求める者は、わたしに出会う。
Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.
18 富と誉とはわたしにあり、すぐれた宝と繁栄もまたそうである。
Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai.
19 わたしの実は金よりも精金よりも良く、わたしの産物は精銀にまさる。
Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.
20 わたしは正義の道、公正な道筋の中を歩み、
Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,
21 わたしを愛する者に宝を得させ、またその倉を満ちさせる。
mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.
22 主が昔そのわざをなし始められるとき、そのわざの初めとして、わたしを造られた。
Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala;
23 いにしえ、地のなかった時、初めに、わたしは立てられた。
aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te.
24 まだ海もなく、また大いなる水の泉もなかった時、わたしはすでに生れ、
Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,
25 山もまだ定められず、丘もまだなかった時、わたしはすでに生れた。
liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango,
26 すなわち神がまだ地をも野をも、地のちりのもとをも造られなかった時である。
tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili.
27 彼が天を造り、海のおもてに、大空を張られたとき、わたしはそこにあった。
Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,
28 彼が上に空を堅く立たせ、淵の泉をつよく定め、
tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,
29 海にその限界をたて、水にその岸を越えないようにし、また地の基を定められたとき、
tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele;
30 わたしは、そのかたわらにあって、名匠となり、日々に喜び、常にその前に楽しみ、
nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye;
31 その地で楽しみ、また世の人を喜んだ。
nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato.
32 それゆえ、子供らよ、今わたしの言うことを聞け、わたしの道を守る者はさいわいである。
Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai: Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai!
33 教訓を聞いて、知恵を得よ、これを捨ててはならない。
Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te!
34 わたしの言うことを聞き、日々わたしの門のかたわらでうかがい、わたしの戸口の柱のわきで待つ人はさいわいである。
Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai!
35 それは、わたしを得る者は命を得、主から恵みを得るからである。
Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.
36 わたしを失う者は自分の命をそこなう、すべてわたしを憎む者は死を愛する者である」。
Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko: moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »

< 箴言 知恵の泉 8 >