< ヨシュア記 4 >

1 民が皆、ヨルダンを渡り終った時、主はヨシュアに言われた、
Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue:
2 「民のうちから、部族ごとにひとりずつ、合わせて十二人を選び、
« Pona mibali zomi na mibale kati na bato, mobali moko mpo na libota moko.
3 彼らに命じて言いなさい、『ヨルダンの中で祭司たちが足を踏みとどめたその所から、石十二を取り、それを携えて渡り、今夜あなたがたが宿る場所にすえなさい』」。
Pesa bango mitindo oyo: ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › »
4 そこでヨシュアはイスラエルの人々のうちから、部族ごとに、ひとりずつ、かねて定めておいた十二人の者を召し寄せ、
Boye, Jozue abengaki mibali zomi na mibale oyo aponaki kati na bana ya Isalaele, mobali moko mpo na libota moko.
5 ヨシュアは彼らに言った、「あなたがたの神、主の契約の箱の前に立って行き、ヨルダンの中に進み入り、イスラエルの人々の部族の数にしたがって、おのおの石一つを取り上げ、肩にのせて運びなさい。
Jozue alobaki na bango: « Boleka liboso ya Sanduku ya Yawe, Nzambe na bino, kino na kati-kati ya Yordani. Moko na moko kati na bino amema libanga na lipeka na ye kolanda motango ya mabota ya Isalaele
6 これはあなたがたのうちに、しるしとなるであろう。後の日になって、あなたがたの子どもたちが、『これらの石は、どうしたわけですか』と問うならば、
mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino: ‹ Mabanga oyo elakisi nini? ›
7 その時あなたがたは彼らに、むかしヨルダンの水が、主の契約の箱の前で、せきとめられたこと、すなわちその箱がヨルダンを渡った時、ヨルダンの水が、せきとめられたことを告げなければならない。こうして、それらの石は永久にイスラエルの人々の記念となるであろう」。
Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. »
8 イスラエルの人々はヨシュアが命じたようにし、主がヨシュアに言われたように、イスラエルの人々の部族の数にしたがって、ヨルダンの中から十二の石を取り、それを携えて渡り、彼らの宿る場所へ行って、そこにすえた。
Boye, bana ya Isalaele basalaki ndenge Jozue atindaki bango. Bazwaki kati na Yordani, mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya Isalaele, ndenge Yawe alobaki na Jozue. Bamemaki yango kino na molako na bango, epai wapi batiaki yango.
9 ヨシュアはまたヨルダンの中で、契約の箱をかく祭司たちが、足を踏みとどめた所に、十二の石を立てたが、今日まで、そこに残っている。
Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo.
10 箱をかく祭司たちは、主がヨシュアに命じて、民に告げさせられた事が、すべて行われてしまうまで、ヨルダンの中に立っていた。すべてモーセがヨシュアに命じたとおりである。民は急いで渡った。
Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani.
11 民がみな渡り終った時、主の箱と祭司たちとは、民の見る前で渡った。
Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato.
12 ルベンの子孫とガドの子孫、およびマナセの部族の半ばは、モーセが彼らに命じていたように武装して、イスラエルの人々に先立って渡り、
Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango.
13 戦いのために武装したおおよそ四万の者が戦うため、主の前に渡って、エリコの平野に着いた。
Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda.
14 この日、主はイスラエルのすべての人の前にヨシュアを尊い者とされたので、彼らはみなモーセを敬ったように、ヨシュアを一生のあいだ敬った。
Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu.
15 主はヨシュアに言われた、
Yawe alobaki na Jozue:
16 「あかしの箱をかく祭司たちに命じて、ヨルダンから上がってこさせなさい」。
« Pesa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Litatoli mitindo ete babima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »
17 ヨシュアは祭司たちに命じて言った、「ヨルダンから上がってきなさい」。
Jozue apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe: « Bobima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »
18 主の契約の箱をかく祭司たちはヨルダンの中から上がってきたが、祭司たちの足の裏がかわいた地にあがると同時に、ヨルダンの水はもとの所に流れかえって、以前のように、その岸にことごとくあふれた。
Boye Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe babimaki wuta na ebale. Tango kaka batiaki matambe na bango na mokili, mayi ya Yordani ezongaki na esika na yango, etondaki makasi mpe ekomaki kotiola ndenge ezalaki momesano na yango.
19 民は正月の十日に、ヨルダンから上がってきて、エリコの東の境にあるギルガルに宿営した。
Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, bato bakendeki wuta na Yordani mpe batongaki molako na bango na Giligali, na mondelo ya este ya Jeriko.
20 そしてヨシュアは、人々がヨルダンから取ってきた十二の石をギルガルに立て、
Jozue atelemisaki, na Giligali, mabanga zomi na mibale oyo babimisaki na Yordani.
21 イスラエルの人々に言った、「後の日にあなたがたの子どもたちが、その父に『これらの石は、どうしたわけですか』とたずねたならば、
Alobaki na bana ya Isalaele: « Tango bakitani na bino bakotuna batata na bango: ‹ Mabanga oyo elakisi nini? ›
22 『むかしイスラエルがこのヨルダンを、かわいた地にされて渡ったのだ』と言って、その子どもたちに知らせなければならない。
Boyebisa bango: ‹ Bato ya Isalaele bakatisaki Yordani na mabele ya kokawuka. ›
23 すなわちあなたがたの神、主はヨルダンの水を、あなたがたのために干しからして、あなたがたを渡らせてくださった。それはあたかも、あなたがたの神、主が、われわれのために紅海を干しからして、われわれを渡らせてくださったのと同じである。
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akawusaki liboso mayi ya Yordani kino tango bosilisaki kokatisa. Yawe asalaki na Yordani makambo oyo asalaki na ebale monene ya Barozo tango akawusaki yango liboso na biso, kino tango tosilisaki kokatisa yango.
24 このようにされたのは、地のすべての民に、主の手に力のあることを知らせ、あなたがたの神、主をつねに恐れさせるためである」。
Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »

< ヨシュア記 4 >