< ヨシュア記 16 >

1 ヨセフの子孫が、くじによって獲た地の境は、エリコのほとりのヨルダン、すなわちエリコの水の東から起って、荒野に延び、エリコから山地に上っている荒野を経て、ベテルに至り、
Eteni ya mabele ya bakitani ya Jozefi ebandaki wuta na Yordani, pene ya Jeriko, na ngambo ya este ya mayi ya Jeriko, na esobe oyo emata na Jeriko na mokili ya bangomba ya Beteli.
2 ベテルからルズにおもむき、アルキびとの領地であるアタロテに進み、
Ekendeki longwa na Beteli kino na Luze, elekaki na ngambo ya bandelo ya bato ya Ariki mpe Ataroti,
3 西に下ってヤフレテびとの領地に達し、下ベテホロンの地域に及び、ゲゼルに達し、海に至って尽きる。
ekitaki kino na ngambo ya weste na mondelo ya bato ya Yafeleti kino na etuka ya Beti-Oroni ya se, kino na Gezeri ya suka mpe esukaki na Ebale monene.
4 こうしてヨセフの子孫のマナセと、エフライムとは、その嗣業を受けた。
Boye bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bazwaki eteni ya mabele lokola libula.
5 エフライムの子孫が、その家族にしたがって獲た地の境は、次のとおりである。彼らの嗣業の東の境は、アタロテ・アダルであって、上ベテホロンに達し、
Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango: Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo;
6 その境は、その所から海に及ぶ。北にはミクメタテがあり、東ではその境はタアナテシロで曲り、進んでヤノアの東に至り、
ekobaki kino na Ebale monene. Na ngambo ya weste, mondelo ezalaki longwa na Mikimeta na ngambo ya nor, ebalukaki na ngambo ya este na Tanati-Silo, elekelaki wana kino na Yanoa, na ngambo ya este.
7 ヤノアからアタロテとナアラに下り、エリコに達し、ヨルダンに至って尽きる。
Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani.
8 タップアからその境は西に進んで、カナの川に達し、海に至って尽きる。これはエフライムの子孫の部族が、その家族にしたがって獲た嗣業である。
Longwa na Tapua, ekendeki na ngambo ya weste kino na moluka ya Kana mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. Yango nde ezalaki eteni ya libula ya bakitani ya libota ya Efrayimi, kolanda bituka na bango.
9 このほかにマナセの子孫の嗣業のうちにも、エフライムの子孫のために分け与えられた町々があって、そのすべての町々と、それに属する村々を獲た。
Ebakisamaki mpe bingumba nyonso elongo na bamboka na yango ya mike-mike oyo epesamelaki bato ya libota ya Efrayimi kati na libula ya bato ya libota ya Manase.
10 ただし、ゲゼルに住むカナンびとを、追い払わなかったので、カナンびとは今日までエフライムの中に住み、奴隷となって追い使われている。
Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.

< ヨシュア記 16 >