< ヨブ 記 25 >

1 そこでシュヒびとビルダデは答えて言った、
Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:
2 「大権と恐れとは神と共にある。彼は高き所で平和を施される。
« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.
3 その軍勢は数えることができるか。何物かその光に浴さないものがあるか。
Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te?
4 それで人はどうして神の前に正しくありえようか。女から生れた者がどうして清くありえようか。
Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto?
5 見よ、月さえも輝かず、星も彼の目には清くない。
Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,
6 うじのような人、虫のような人の子はなおさらである」。
toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba! »

< ヨブ 記 25 >