< ヨブ 記 12 >
2 「まことに、あなたがたのみ、人である、知恵はあなたがたと共に死ぬであろう。
« Solo, bozali penza bato; tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino!
3 しかしわたしも、あなたがたと同様に悟りをもつ。わたしはあなたがたに劣らない。だれがこのような事を知らないだろうか。
Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino, boleki ngai na eloko te. Nani ayebi te makambo wana nyonso?
4 わたしは神に呼ばわって、聞かれた者であるのに、その友の物笑いとなっている。正しく全き人は物笑いとなる。
Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola!
5 安らかな者の思いには、不幸な者に対する侮りがあって、足のすべる者を待っている。
Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.
6 かすめ奪う者の天幕は栄え、神を怒らす者は安らかである。自分の手に神を携えている者も同様だ。
Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.
7 しかし獣に問うてみよ、それはあなたに教える。空の鳥に問うてみよ、それはあなたに告げる。
Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo; tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo;
8 あるいは地の草や木に問うてみよ、彼らはあなたに教える。海の魚もまたあなたに示す。
loba na mabele, ekoteya yo; to tika ete mbisi ya ebale monene epesa yo sango.
9 これらすべてのもののうち、いずれか主の手がこれをなしたことを知らぬ者があろうか。
Kati na yango, ekelamu nini eyebi te ete loboko ya Yawe nde esalaki nyonso wana?
10 すべての生き物の命、およびすべての人の息は彼の手のうちにある。
Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.
11 口が食物を味わうように、耳は言葉をわきまえないであろうか。
Boni, litoyi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei?
12 老いた者には知恵があり、命の長い者には悟りがある。
Bwanya ezalaka kati na bampaka te? Bomoi ya molayi epesaka mayele te?
13 知恵と力は神と共にあり、深慮と悟りも彼のものである。
Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe, toli mpe mayele ezali ya Ye.
14 彼が破壊すれば、再び建てることができない。彼が人を閉じ込めれば、開き出すことができない。
Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa, bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga.
15 彼が水を止めれば、それはかれ、彼が水を出せば、地をくつがえす。
Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka; kasi soki afungoli yango, mokili ezindaka.
16 力と深き知恵は彼と共にあり、惑わされる者も惑わす者も彼のものである。
Makasi mpe elonga ezali ya Ye; moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi, bango mibale bazali ya Ye.
17 彼は議士たちを裸にして連れ行き、さばきびとらを愚かにし、
Amemaka bapesi toli na bowumbu mpe akomisaka basambisi bato ya maboma;
18 王たちのきずなを解き、彼らの腰に腰帯を巻き、
afungolaka minyololo ya bakonzi mpe akangaka liputa na baloketo na bango;
19 祭司たちを裸にして連れ行き、力ある者を滅ぼし、
amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi;
20 みずから頼む者たちの言葉を奪い、長老たちの分別を取り去り、
akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, alongolaka mikolo bososoli;
21 君たちの上に侮りを注ぎ、強い者たちの帯を解き、
asopelaka bakonzi soni, abotolaka bibundeli ya bato ya makasi;
22 暗やみの中から隠れた事どもをあらわし、暗黒を光に引き出し、
abimisaka na pwasa, makambo ya sekele, makambo oyo ezali kati na molili, mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo;
23 国々を大きくし、またこれを滅ぼし、国々を広くし、また捕え行き、
atombolaka bikolo mpe abebisaka yango, akomisaka minene mindelo ya bikolo mpe apanzaka yango;
24 地の民の長たちの悟りを奪い、彼らを道なき荒野にさまよわせ、
alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo mpe asalaka ete batambola kati na bisobe oyo ezanga nzela
25 光なき暗やみに手探りさせ、酔うた者のようによろめかせる。
mpo ete batepatepa kati na molili, na kozanga pole; mpe asalaka ete batepatepa lokola moto alangwe masanga.