< エレミヤ書 5 >

1 エルサレムのちまたを行きめぐり、見て、知るがよい。その広場を尋ねて、公平を行い、真実を求める者が、ひとりでもあるか捜してみよ。あれば、わたしはエルサレムをゆるす。
« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.
2 彼らは、「主は生きておられる」と言うけれども、実は、偽って誓うのだ。
Atako balapaka ndayi na maloba oyo: ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »
3 主よ、あなたの目は、真実を顧みられるではありませんか。あなたが彼らを打たれても、痛みを覚えず、彼らを滅ぼされても、懲しめを受けることを拒み、その顔を岩よりも堅くして、悔い改めることを拒みました。
Oh Yawe; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
4 それで、わたしは言った、「これらはただ貧しい愚かな人々で、主の道と、神のおきてを知りません。
Namilobelaki: « Bato oyo bazali kaka bato pamba, bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.
5 わたしは偉い人たちの所へ行って、彼らに語ります。彼らは主の道を知り、神のおきてを知っています」。ところが、彼らも皆おなじように、くびきを折り、なわめを断っていた。
Boye, nakokende epai ya bakambi na bango mpe nakoloba na bango, pamba te bango nde basengeli koyeba nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » Kasi bango nyonso, na motema moko, babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.
6 それゆえ林から、ししが出てきて彼らを殺し、荒野から、おおかみが出てきて彼らを滅ぼす。ひょうは彼らの町々をねらっている。そこから出る者はみな裂かれる。彼らの罪が多く、その背信がはなはだしいからである。
Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi.
7 「わたしはどうしてあなたを、ゆるすことができようか。あなたの子どもらは、わたしを捨てさり、神でもないものをさして誓った。わたしが彼らを満ち足らせた時、彼らは姦淫を行い、遊女の家に群れ集まった。
« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.
8 彼らは肥え太った丈夫な雄馬のように、おのおの、いなないて隣の妻を慕う。
Ndenge mpunda ya mobali etambolaka-tambolaka soki ezali na posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mwasi, ndenge wana mpe moko na moko kati na bango alandaka-landaka mwasi ya moninga mpo na kosangisa na ye nzoto.
9 わたしはこれらの事のために彼らを罰しないでいられようか。このような国民にあだを返さないであろうか」と主は言われる。
Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te? » elobi Yawe? « Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya lolenge oyo?
10 「あなたがたはユダのぶどうの並み木の間を、のぼって行って、滅ぼせ、ただ、ことごとく滅ぼしてはならない。その枝を切り除け、主のものではないからである。
Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.
11 イスラエルの家とユダの家とはわたしにまったく不信であった」と主は言われる。
Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli na boyengebene te na miso na Ngai, » elobi Yawe.
12 「彼らは主について偽り語って言った、『主は何事もなされない、災はわれわれに来ない、またつるぎや、ききんを見ることはない。
Bawanganaki Yawe mpe balobaki: « Yawe akosala eloko moko te! Pasi moko te ekokomela biso; tokotikala na biso komona te ezala mopanga to nzala makasi.
13 預言者らは風となり、彼らのうちに言葉はない。彼らはこのようになる』と」。
Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba, bazali na mateya penza ya koteya te; boye tika ete mabe oyo bazali kosakola ezongela bango moko! »
14 それゆえ万軍の神、主はこう言われる、「彼らがこの言葉を語ったので、見よ、わたしはあなたの口にあるわたしの言葉を火とし、この民をたきぎとする。火は彼らを焼き尽す」。
Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Lokola bato oyo balobi maloba ya boye, nakosala ete maloba na Ngai ezala lokola moto na monoko na yo, mpe bato oyo bazala lokola bakoni oyo moto yango ekozikisa.
15 主は言われる、「イスラエルの家よ、見よ、わたしは遠い国の民をあなたがたのところに攻めこさせる。その国は長く続く国、古い国で、あなたがたはその国の言葉を知らず、人々の語るのを悟ることもできない。
Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo: ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.
16 その箙は開いた墓のようであり、彼らはみな勇士である。
Makonga na bango ezangaka koboma moto te, bongo bango nyonso bazali bilombe ya bitumba.
17 彼らはあなたが刈り入れた物と、あなたの糧食とを食い尽し、あなたのむすこ娘を食い尽し、あなたの羊と牛を食い尽し、あなたのぶどうの木といちじくの木を食い尽し、またつるぎをもって、あなたが頼みとする堅固な町々を滅ぼす」。
Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.
18 主は言われる、「しかしその時でも、わたしはことごとくはあなたを滅ぼさない。
Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te.
19 あなたの民が、『どうしてわれわれの神、主はこれらのすべての事をわれわれになされたのか』と言うならば、あなたは彼らに答えなければならない、『あなたがたがわたしを捨てて、自分の地で異なる神々に仕えたように、あなたがたは自分のものでない地で異邦の人に仕えるようになる』と」。
Tango bato bakotuna: ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye? › Bokozongisela bango: ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›
20 これをヤコブの家にのべ、またユダに示して言え、
Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi mpe botatola yango kati na Yuda:
21 「愚かで、悟りもなく、目があっても見えず、耳があっても聞えない民よ、これを聞け。
Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele: bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.
22 主は言われる、あなたがたはわたしを恐れないのか、わたしの前におののかないのか。わたしは砂を置いて海の境とし、これを永遠の限界として、越えることができないようにした。波はさかまいても、勝つことはできない、鳴りわたっても、これを越えることはできない。
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
23 ところが、この民には強情な、そむく心があり、彼らはわき道にそれて、去ってしまった。
Kasi bato oyo bazali mitema makasi mpe bazali solo batomboki; bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango!
24 彼らは『われわれに雨を与え、秋の雨と春の雨を時にしたがって降らせ、われわれのために刈入れの時を定められたわれわれの神、主を恐れよう』とその心のうちに言わないのだ。
Bamilobelaka te: ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›
25 あなたがたのとがは、これらの事をしりぞけ、あなたがたの罪は、良い物があなたがたに来るのをさまたげた。
Mabe na bino nde ebebisi makambo nyonso, mpe masumu na bino ezangisi bino bolamu.
26 わが民のうちには悪い者があって、鳥をとる人のように身をかがめてうかがい、わなを置いて人を捕える。
Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.
27 かごに鳥が満ちているように、彼らの家は不義の宝で満ちている。それゆえ、彼らは大いなる者、裕福な者となり、
Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya.
28 肥えて、つやがあり、その悪しき行いには際限がない。彼らは公正に、みなしごの訴えをさばいて、それを助けようとはせず、また貧しい人の訴えをさばかない。
Bakoma kitoko mpe ngebungebu; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.
29 主は言われる、わたしはこのような事のために、彼らを罰しないであろうか。わたしはこのような民に、あだを返さないであろうか」。
Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te? » elobi Yawe. « Boni, motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya boye?
30 驚くべきこと、恐るべきことがこの地に起っている。
Makambo ya kokamwa mpe ya somo esalemi na mboka:
31 預言者は偽って預言し、祭司は自分の手によって治め、わが民はこのようにすることを愛している。しかしあなたがたはその終りにはどうするつもりか。
basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka? »

< エレミヤ書 5 >