< エレミヤ書 44 >
1 エジプトの地に住んでいるユダヤ人すなわちミグドル、タパネス、メンピス、パテロスの地に住む者の事についてエレミヤに臨んだ言葉、
Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi:
2 「万軍の主、イスラエルの神はこう言われる、あなたがたはわたしがエルサレムとユダの町々に下した災を見た。見よ、これらは今日、すでに荒れ地となって住む人もない。
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi
3 これは彼らが悪を行って、わたしを怒らせたことによるのである。すなわち彼らは自分も、あなたがたも、あなたがたの先祖たちも知らなかった、ほかの神々に行って、香をたき、これに仕えた。
likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.
4 わたしは自分のしもべであるすべての預言者たちを、しきりにあなたがたにつかわして、『どうか、わたしの忌みきらうこの憎むべき事をしないように』と言わせたけれども、
Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino: ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›
5 彼らは聞かず、耳を傾けず、ほかの神々に香をたいて、その悪を離れなかった。
Kasi batikalaki koyoka te mpe batosaki te; batikaki mabe na bango te mpe bakobaki kaka kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.
6 それゆえ、わたしは怒りと憤りをユダの町々とエルサレムのちまたに注ぎ、それを焼いたので、それらは今日のように荒れ、滅びてしまった。
Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo.
7 万軍の神、イスラエルの神、主は今こう言われる、あなたがたはなぜ大いなる悪を行って自分自身を害し、ユダのうちから、あなたがたの男と女と、子供と乳のみ子を断って、ひとりも残らないようにしようとするのか。
Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi: Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te?
8 なぜあなたがたはその手のわざをもってわたしを怒らせ、あなたがたが行って住まうエジプトの地で、ほかの神々に香をたいて自分の身を滅ぼし、地の万国のうちに、のろいとなり、はずかしめとなろうとするのか。
Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.
9 ユダの地とエルサレムのちまたで行ったあなたがたの先祖たちの悪、ユダの王たちの悪、その妻たちの悪、およびあなたがた自身の悪、あなたがたの妻たちの悪をあなたがたは忘れたのか。
Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi?
10 彼らは今日に至るまで悔いず、また恐れず、あなたがたとあなたがたの先祖たちの前に立てた、わたしの律法とわたしの定めとに従って歩まないのである。
Kino lelo, bamikitisi te, batosi Ngai te, batosi mibeko mpe malako na Ngai te, oyo napesaki bino mpe batata na bino.
11 それゆえ万軍の主、イスラエルの神はこう言われる、見よ、わたしは顔をあなたがたに向けて災を下し、ユダの人々をことごとく断つ。
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda.
12 またわたしは、エジプトの地に住むために、むりに行ったあのユダの残りの者を取り除く。彼らはみな滅ぼされてエジプトの地に倒れる。彼らは、つるぎとききんに滅ぼされ、最も小さい者から最も大いなる者まで、つるぎとききんによって死ぬ。そして、のろいとなり、恐怖となり、ののしりとなり、はずかしめとなる。
Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.
13 わたしはエルサレムを罰したように、つるぎと、ききんと、疫病をもってエジプトに住んでいる者を罰する。
Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu.
14 それゆえ、エジプトの地へ行ってそこに住んでいるユダの残りの者のうち、のがれ、または残って、帰り住まおうと願うユダの地へ帰る者はひとりもない。少数ののがれる者のほかには、帰ってくる者はない」。
Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. »
15 その時、自分の妻がほかの神々に香をたいたことを知っている人々、およびその所に立っている女たちの大いなる群衆、ならびにエジプトの地のパテロスに住んでいる民はエレミヤに答えて言った、
Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi:
16 「あなたが主の名によってわたしたちに述べられた言葉は、わたしたちは聞くことができません。
— Te! Tokoyoka te makambo oyo ozali koyebisa biso na kombo ya Yawe.
17 わたしたちは誓ったことをみな行い、わたしたちが、もと行っていたように香を天后にたき、また酒をその前に注ぎます。すなわち、ユダの町々とエルサレムのちまたで、わたしたちとわたしたちの先祖たちおよびわたしたちの王たちと、わたしたちのつかさたちが行ったようにいたします。その時には、わたしたちは糧食には飽き、しあわせで、災に会いませんでした。
Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala: tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.
18 ところが、わたしたちが、天后に香をたくことをやめ、酒をその前に注がなくなった時から、すべての物に乏しくなり、つるぎとききんに滅ぼされました」。
Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
19 また女たちは言った、「わたしたちが天后に香をたき、酒をその前に注ぐに当って、これにかたどってパンを造り、酒を注いだのは、わたしたちの夫が許したことではありませんか」。
Basi babakisaki: — Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye?
20 そこでエレミヤは男女のすべての人、およびこの答をしたすべての民に言った、
Bongo Jeremi alobaki na bato nyonso, mibali mpe basi, oyo bapesaki ye eyano wana:
21 「ユダの町々とエルサレムのちまたで、あなたがたとあなたがたの先祖たち、およびあなたがたの王たちとあなたがたのつかさたち、およびその地の民が香をたいたことは、主がこれを忘れず、また、心にとどめておられることではないか。
— Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili?
22 主はあなたがたの悪しきわざのため、あなたがたの憎むべき行いのために、もはや忍ぶことができなくなられた。それゆえ、あなたがたの地は今日のごとく荒れ地となり、驚きとなり、のろいとなり、住む人のない地となった。
Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
23 あなたがたが香をたき、主に罪を犯し、主の声に聞き従わず、その律法と、定めと、あかしに従って歩まなかったので、今日のようにこの災があなたがたに臨んだのである」。
Mpo ete botumbaki malasi ya ansa lokola mbeka mpe bosalaki masumu liboso ya Yawe, mpo ete botosaki Yawe te mpe bolandaki te Mobeko na Ye, bikateli na Ye mpe malako na Ye, yango wana pasi oyo ekomeli bino ndenge bozali komona yango lelo.
24 エレミヤはまたすべての民と女たちに言った、「あなたがたすべてエジプトの地にいるユダの人々よ、主の言葉を聞きなさい。
Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso: — Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe:
25 万軍の主、イスラエルの神はこう言われる、あなたがたとあなたがたの妻たちは口で言い、手で行い、『わたしたちは天后に香をたき、酒を注いで立てた誓いを必ずなし遂げる』と言う。それならば、あなたがたの誓いをかため、あなたがたの誓いをなし遂げなさい。
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki: « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino!
26 それゆえ、あなたがたすべてエジプトの地にいるユダの人々よ、主の言葉を聞きなさい。主は言われる、わたしは自分の大いなる名をさして誓う、すなわちエジプトの全地に、ユダの人々で、その口に、『主なる神は生きておられる』と言って、わたしの名をとなえるものは、もはやひとりもないようになる。
Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito: « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba: ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi! ›
27 見よ、わたしは彼らを見守っている、それは幸を与えるためではなく、災を下すためである。エジプトの地にいるユダの人々は、つるぎとききんによって滅び絶える。
Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.
28 しかし、つるぎをのがれるわずかの者はエジプトの地を出てユダの地に帰る。そしてユダの残っている民でエジプトに来て住んだ者は、わたしの言葉が立つか、彼らの言葉が立つか、いずれであるかを知るようになる。
Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama: ya Ngai to ya bango.
29 主は言われる、わたしがこの所であなたがたを罰するしるしはこれである。わたしはこのようにしてわたしがあなたがたに災を下そうと言った事の必ず立つことを知らせよう。
Ekozala elembo ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, » elobi Yawe, « mpo ete boyeba solo ete pasi oyo nalakaki bino ekokokisama kaka. »
30 すなわち主はこう言われる、見よ、わたしはユダの王ゼデキヤを、その命を求める敵であるバビロンの王ネブカデレザルの手に渡したように、エジプトの王パロ・ホフラをその敵の手、その命を求める者の手に渡す」。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »