< エレミヤ書 34 >
1 バビロンの王ネブカデレザルがその全軍と、彼に従っている地のすべての国の人々、およびもろもろの民を率いて、エルサレムとその町々を攻めて戦っていた時に、主からエレミヤに臨んだ言葉、
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango:
2 「イスラエルの神、主はこう言われる、行ってユダの王ゼデキヤに告げて言いなさい、『主はこう言われる、見よ、わたしはこの町をバビロンの王の手に渡す。彼は火でこれを焼く。
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto.
3 あなたはその手をのがれることはできない、必ず捕えられてその手に渡される。あなたはまのあたりバビロンの王を見、顔と顔を合わせて彼と語る。それからバビロンへ行く』。
Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.
4 しかしユダの王ゼデキヤよ、主の言葉を聞きなさい。主はあなたの事についてこう言われる、『あなたはつるぎで死ぬことはない。
Nzokande, Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, yoka Liloba na Yawe! Tala elaka oyo Yawe apesi yo: Okokufa na mopanga te,
5 あなたは安らかに死ぬ。民はあなたの先祖であるあなたの先の王たちのために香をたいたように、あなたのためにも香をたき、またあなたのために嘆いて「ああ、主君よ」と言う』。わたしがこの言葉をいうのであると主は言われる」。
kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo: ‘Oh mawa, nkolo na ngai!’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › »
6 そこで預言者エレミヤはこの言葉をことごとくエルサレムでユダの王ゼデキヤに告げた。
Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi,
7 その時バビロンの王の軍勢はエルサレム、および残っているユダのすべての町、すなわちラキシとアゼカを攻めて戦っていた。それはユダの町々のうちに、これらの堅固な町がなお残っていたからである。
wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te: Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda.
8 ゼデキヤ王がエルサレムにいるすべての民と契約を立てて、彼らに釈放のことを告げ示した後に、主からエレミヤに臨んだ言葉。
Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi
9 その契約はすなわち人がおのおのそのヘブルびとである男女の奴隷を解放し、その兄弟であるユダヤ人を奴隷としないことを定めたものであった。
mpo ete moto nyonso apesa bawumbu na ye bonsomi, bawumbu oyo bazali Ba-Ebre, bazala mibali to basi; mpe mpo ete moto moko te akoba kokanga ndeko na ye, Moyuda, kati na bowumbu.
10 この契約をしたつかさたちと、すべての民は人がおのおのその男女の奴隷を解放し、再びこれを奴隷としないということに聞き従って、これを解放したが、
Boye, bakambi nyonso mpe bato nyonso oyo basalaki boyokani yango bandimaki kokangola bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi mpe kopesa bango bonsomi, mpo ete bakoba lisusu te kokanga bango na bowumbu; bandimaki, bakokisaki mpe bapesaki bawumbu na bango bonsomi.
11 後に心を翻し、解放した男女の奴隷をひきかえさせ、再びこれを従わせて奴隷とした。
Kasi sima na tango, babongolaki makanisi na bango; bakangaki lisusu na bowumbu mibali mpe basi oyo bango basilaki kopesa bonsomi, mpe bakomisaki bango lisusu bawumbu.
Boye, tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
13 「イスラエルの神、主はこう言われる、わたしはあなたがたの先祖をエジプトの地、その奴隷であった家から導き出した時、彼らと契約を立てて言った、
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu; nalobaki:
14 『あなたがたの兄弟であるヘブルびとで、あなたがたに身を売り、六年の間あなたがたに仕えた者は、六年の終りに、あなたがたおのおのがこれを解放しなければならない。あなたがたは彼を解放して、あなたがたに仕えることをやめさせなければならない』。ところがあなたがたの先祖たちはわたしに聞き従わず、またその耳を傾けなかった。
‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te.
15 しかしあなたがたは今日、心を改め、おのおのその隣り人に釈放のことを告げ示して、わたしの見て正しいとすることを行い、かつわたしの名をもってとなえられる家で、わたしの前に契約を立てた。
Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai: moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai.
16 ところがあなたがたは再び心を翻して、わたしの名を汚し、おのおの男女の奴隷をその願いのままに解放したのをひきかえさせ、再びこれを従わせて、あなたがたの奴隷とした。
Kasi tala sik’oyo makambo bosali: bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino.
17 それゆえに、主はこう仰せられる、あなたがたがわたしに聞き従わず、おのおのその兄弟とその隣に釈放のことを告げ示さなかったので、見よ、わたしはあなたがたのために釈放を告げ示して、あなたがたをつるぎと、疫病と、ききんとに渡すと主は言われる。わたしはあなたがたを地のもろもろの国に忌みきらわれるものとする。
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi; nafungoli yango mpo na kotelemela bino: nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele;
18 わたしの契約を破り、わたしの前に立てた契約の定めに従わない人々を、わたしは彼らが二つに裂いて、その二つの間を通った子牛のようにする。
nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango.
19 すなわち二つに分けた子牛の間を通ったユダのつかさたち、エルサレムのつかさたちと宦官と祭司と、この地のすべての民を、
Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,
20 わたしはその敵の手と、その命を求める者の手に渡す。その死体は空の鳥と野の獣の食物となる。
nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.
21 わたしはまたユダの王ゼデキヤと、そのつかさたちをその敵の手、その命を求める者の手、あなたがたを離れて去ったバビロンの王の軍勢の手に渡す。
Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino.
22 主は言われる、見よ、わたしは彼らに命じて、この町に引きかえしてこさせる。彼らはこの町を攻めて戦い、これを取り、火を放って焼き払う。わたしはユダの町々を住む人のない荒れ地とする」。
Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo: bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »