< エレミヤ書 26 >

1 ユダの王ヨシヤの子エホヤキムが世を治めた初めのころ、主からこの言葉があった、
Tala liloba oyo Yawe alobaki, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda:
2 「主はこう仰せられる、主の宮の庭に立ち、わたしがあなたに命じて言わせるすべての言葉を、主の宮で礼拝するために来ているユダの町々の人々に告げなさい。ひと言をも言い残しておいてはならない。
« Tala liloba oyo Yawe alobi: Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo; kolongola ata liloba moko te.
3 彼らが聞いて、おのおのその悪い道を離れることがあるかも知れない。そのとき、わたしは彼らの行いの悪いために、災を彼らに下そうとしたのを思いなおす。
Tango mosusu bakoyoka, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe; bongo Ngai nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kotindela bango pasi likolo ya misala na bango ya mabe.
4 あなたは彼らに言いなさい、『主はこう仰せられる、もしあなたがたがわたしに聞き従わず、わたしがあなたがたの前に定めおいた律法を行わず、
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Soki boyokeli Ngai te, soki boboyi kotosa malakisi oyo napesaki bino
5 わたしがあなたがたに、しきりにつかわすわたしのしもべである預言者の言葉に聞き従わないならば、(あなたがたは聞き従わなかったが、)
mpe boboyi kotosa maloba ya basali na Ngai, basakoli, oyo nazalaki kotindela bino tango na tango atako boboyaki koyokela bango,
6 わたしはこの宮をシロのようにし、またこの町を地の万国にのろわれるものとする』」。
nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »
7 祭司と預言者およびすべての民は、エレミヤが主の宮でこれらの言葉を語るのを聞いた。
Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bazalaki koyoka Jeremi koloba maloba oyo kati na Tempelo ya Yawe.
8 エレミヤが主に命じられたすべての言葉を民に告げ終った時、祭司と預言者および民はみな彼を捕えて言った、「あなたは死ななければならない。
Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki: « Okokufa!
9 なぜあなたは主の名によって預言し、この宮はシロのようになり、この町は荒されて住む人もなくなるであろうと言ったのか」と。民はみな主の宮に集まってエレミヤを取り囲んだ。
Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te? » Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe.
10 ユダのつかさたちはこの事を聞いて王の宮殿を出て主の宮に上り、主の宮の「新しい門」の入口に座した。
Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe.
11 祭司と預言者らは、つかさたちとすべての民に訴えて言った、「この人は死刑に処すべき者です。あなたがたが自分の耳で聞かれたように、この町に逆らう預言をしたのです」。
Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso: « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino! »
12 その時エレミヤは、つかさたちとすべての民に言った、「主はわたしをつかわし、この宮とこの町にむかって、預言をさせられたので、そのすべての言葉をあなたがたは聞いた。
Jeremi alobaki na bakambi mpe na bato nyonso: « Yawe atindi ngai kosakola mpo na Ndako mpe engumba oyo, makambo nyonso oyo bosili koyoka.
13 それで、あなたがたは今、あなたがたの道と行いを改め、あなたがたの神、主の声に聞き従いなさい。そうするならば主はあなたがたに災を下そうとしたことを思いなおされる。
Bobongola sik’oyo bizaleli mpe misala na bino, mpe botosa Yawe, Nzambe na bino; mpe Yawe akobongola mokano oyo asilaki kozwa, mpe akotindela bino lisusu te pasi oyo alakaki bino.
14 見よ、わたしはあなたがたの手の中にある。あなたがたの目に、良いと見え、正しいと思うことをわたしに行うがよい。
Bongo mpo na ngai, nazali na maboko na bino, bosala ngai makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu mpe sembo.
15 ただ明らかにこのことを知っておきなさい。もしあなたがたがわたしを殺すならば、罪なき者の血はあなたがたの身と、この町と、その住民とに帰する。まことに主がわたしをつかわして、このすべての言葉をあなたがたの耳に、告げさせられたからである」。
Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. »
16 つかさたちと、すべての民とは、祭司と預言者に言った、「この人は死刑に処すべき者ではない。われわれの神、主の名によってわれわれに語ったのである」。
Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli: « Esengeli te koboma moto oyo! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »
17 その時この地の長老たち数人が立って、そこに集まっているすべての者に告げて言った、
Ndambo ya bakambi ya mokili batelemaki mpe balobaki na lisanga mobimba ya bato:
18 「ユダの王ヒゼキヤの世に、モレシテびとミカはユダのすべての民に預言して言った、『万軍の主はこう仰せられる、シオンは畑のように耕され、エルサレムは石塚となり、宮の山は木のおい茂る高い所となる』。
« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda; alobaki na bato nyonso ya Yuda: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›
19 ユダの王ヒゼキヤと、すべてのユダの人は彼を殺そうとしたことがあろうか。ヒゼキヤは主を恐れ、主の恵みを求めたので、主は彼らに災を下すとお告げになったのを思いなおされたではないか。しかし、われわれは、自分の身に大きな災を招こうとしている」。
Boni, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, to moto mosusu kati na Yuda abomaki ye? Ezekiasi atosaki Yawe te mpe asalelaki mosakoli Mishe ngolu te? Yawe abongolaki mokano na Ye te ya kotindela bango pasi oyo alakaki? Tokomibendela biso moko pasi ya makasi na pamba. »
20 主の名によって預言した人がほかにもあった。すなわちキリアテ・ヤリムのシマヤの子ウリヤである。彼はエレミヤとおなじような言葉をもって、この町とこの地にむかって預言した。
Nzokande, Iri, mwana mobali ya Shemaya, moto ya Kiriati-Yearimi, azalaki mpe kosakola na Kombo na Yawe. Azalaki kaka kosakola makambo moko na Jeremi na tina na engumba mpe mokili oyo.
21 エホヤキム王と、そのすべての勇士と、すべてのつかさたちはその言葉を聞いた。そして王は彼を殺そうと思ったが、ウリヤはこれを聞いて恐れ、エジプトに逃げて行ったので、
Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito.
22 エホヤキム王は人をエジプトにつかわした。すなわちアクボルの子エルナタンと他の数名の人を、エジプトにつかわした。
Mokonzi Yeoyakimi atindaki Elinatani, mwana mobali ya Akibori, na Ejipito elongo na bato mosusu.
23 彼らはウリヤをエジプトから引き出し、エホヤキム王のもとに連れてきたので、王はつるぎをもって彼を殺し、その死体を共同墓地に捨てさせた。
Babimisaki Iri na Ejipito mpe bamemaki ye epai ya mokonzi Yeoyakimi oyo abomaki ye na mopanga mpe apesaki mitindo ete babwaka ebembe na ye kati na kunda oyo bakundaka bato pamba.
24 しかしシャパンの子アヒカムはエレミヤを助け、民の手に渡されて殺されることのないようにした。
Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.

< エレミヤ書 26 >