< ホセア書 2 >
1 あなたがたの兄弟に向かっては「アンミ(わが民)」と言い、あなたがたの姉妹に向かっては「ルハマ(あわれまれる者)」と言え。
— Loba na bandeko na yo ya mibali: « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi: « Bozali balingami na ngai. »
2 「あなたがたの母とあげつらえ、あげつらえ彼女はわたしの妻ではない、わたしは彼女の夫ではないそして彼女にその顔から淫行を除かせ、その乳ぶさの間から姦淫を除かせよ。
Bopamela mama na bino, bopamela ye; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.
3 そうでなければ、わたしは彼女の着物をはいで裸にし、その生れ出た日のようにし、また荒野のようにし、かわききった地のようにし、かわきによって彼女を殺す。
Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka; mpe akokufa na posa ya mayi.
4 わたしはその子らをあわれまない、彼らは淫行の子らだからである。
Nakolinga bana na ye te, pamba te bazali bana oyo babotami na nzela ya kindumba.
5 彼らの母は淫行をなし、彼らをはらんだ彼女は恥ずべきことを行った。彼女は言った、『わたしはわが恋人たちについて行こう。彼らはパンと水と羊の毛と麻と油と飲み物とを、わたしに与える者である』と。
Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki: « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »
6 それゆえ、わたしはいばらで彼女の道をふさぎ、かきをたてて、彼女にはその道がわからないようにする。
Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te.
7 彼女はその恋人たちのあとを慕って行く、しかし彼らに追いつくことはない。彼らを尋ねる、しかし見いだすことはない。そこで彼女は言う、『わたしは行って、さきの夫に帰ろう。あの時は今よりもわたしによかったから』と。
Akolanda bamakangu na ye, kasi akozwa bango te; akoluka bango, kasi akomona bango te. Bongo akoloba: « Tika nazongela mobali na ngai ya liboso; pamba te elongo na mobali ya liboso, nazalaki na esengo koleka sik’oyo! »
8 彼女に穀物と酒と油とを与えた者、またバアルのために用いた銀と金とを多く彼女に与えた者は、わたしであったことを彼女は知らなかった。
Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.
9 それゆえ、わたしは穀物をその時になって奪い、ぶどう酒をその季節になって奪い、また彼女の裸をおおうために用いる羊の毛と麻とを奪い取る。
Yango wana, nakobotola ble na ngai na tango ya kobuka, vino na ngai ya sika na tango ya kokamola yango; nakobotola bilamba na ngai oyo basala na bapwale ya meme, mpe bilamba na ngai ya lino oyo azalaki kozipa na yango bolumbu na ye.
10 わたしは今、彼女のみだらなことをその恋人たちの目の前にあらわす。だれも彼女をわたしの手から救う者はない。
Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.
11 わたしは彼女のすべての楽しみ、すなわち祝、新月、安息日、すべての祭をやめさせる。
Nakosukisa bisengo na ye nyonso: bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.
12 わたしはまた彼女が先に『これはわたしの恋人らが、わたしに与えた報酬だ』と言った彼女のぶどうの木と、いちじくの木とを荒し、これを林とし、野の獣にこれを食わせる。
Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango: « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.
13 また彼女が耳輪と宝石で身を飾り、その恋人たちを慕って行って、わたしを忘れ、香をたいて仕えたバアルの祭の日のために、わたしは彼女を罰すると主は言われる。
Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
14 それゆえ、見よ、わたしは彼女をいざなって、荒野に導いて行き、ねんごろに彼女に語ろう。
Yango wana, nakobuka ye motema, nakomema ye na esobe; mpe kuna, nakoloba na motema na ye maloba na bolingo.
15 その所でわたしは彼女にそのぶどう畑を与え、アコルの谷を望みの門として与える。その所で彼女は若かった日のように、エジプトの国からのぼって来た時のように、答えるであろう。
Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.
16 主は言われる、その日には、あなたはわたしを『わが夫』と呼び、もはや『わがバアル』とは呼ばない。
Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai: « Mobali na ngai ya libala; » okobenga ngai lisusu te: « Nkolo na ngai. »
17 わたしはもろもろのバアルの名を彼女の口から取り除き、重ねてその名をとなえることのないようにする。
Nakolongola na bibebu na ye bakombo ya banzambe ya Bala; bakobelela lisusu bakombo na yango te.
18 その日には、わたしはまたあなたのために野の獣、空の鳥および地の這うものと契約を結び、また弓と、つるぎと、戦争とを地から断って、あなたを安らかに伏させる。
Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba: nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.
19 またわたしは永遠にあなたとちぎりを結ぶ。すなわち正義と、公平と、いつくしみと、あわれみとをもってちぎりを結ぶ。
Nakolinga yo lokola mwasi na ngai mpo na libela, nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo mpe na bosembo, na bolingo mpe na esengo.
20 わたしは真実をもって、あなたとちぎりを結ぶ。そしてあなたは主を知るであろう。
Nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo; mpe na bongo, okoyeba Yawe malamu.
21 主は言われる、その日わたしは天に答え、天は地に答える。
Na mokolo wana, nakoyanola, elobi Yawe, nakoyanola Lola, mpe Lola ekoyanola mabele.
22 地は穀物と酒と油とに答え、またこれらのものはエズレルに答える。
Mabele ekoyanola ble, vino ya sika mpe mafuta. Bongo, yango nyonso ekoyanola Jizireyeli.
23 わたしはわたしのために彼を地にまき、あわれまれぬ者をあわれみ、わたしの民でない者に向かって、『あなたはわたしの民である』と言い、彼は『あなたはわたしの神である』と言う」。
Nakolona ye mpo na Ngai moko kati na mokili mpo ete azala lokola nzete ya elanga na Ngai; nakotalisa bolingo na Ngai epai na ye oyo nazalaki kobenga Lo-Rukama. Nakoloba na bato oyo nazalaki kobenga Lo-Ami: « Bozali bato na Ngai, » mpe bango bakoloba: « Ozali Nzambe na biso. »