< 創世記 25 >

1 アブラハムは再び妻をめとった。名をケトラという。
Abrayami abalaki mwasi mosusu, kombo na ye « Ketura. »
2 彼女はジムラン、ヨクシャン、メダン、ミデアン、イシバクおよびシュワを産んだ。
Ketura abotelaki ye: Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.
3 ヨクシャンの子はシバとデダン。デダンの子孫はアシュリびと、レトシびと、レウミびとである。
Yokishani azalaki tata ya Saba mpe Dedani. Tala bato oyo bazalaki bakitani ya Dedani: Bato ya Ashuri, ya Letushi mpe ya Lewumi.
4 ミデアンの子孫はエパ、エペル、ヘノク、アビダ、エルダアであって、これらは皆ケトラの子孫であった。
Madiani azalaki tata ya Efa, ya Eferi, ya Enoki, ya Abida mpe ya Elida. Bato oyo nyonso bazalaki bakitani ya Ketura.
5 アブラハムはその所有をことごとくイサクに与えた。
Abrayami atikaki biloko na ye nyonso na maboko ya Izaki.
6 またそのそばめたちの子らにもアブラハムは物を与え、なお生きている間に彼らをその子イサクから離して、東の方、東の国に移らせた。
Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.
7 アブラハムの生きながらえた年は百七十五年である。
Abrayami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku sambo na mitano.
8 アブラハムは高齢に達し、老人となり、年が満ちて息絶え、死んでその民に加えられた。
Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye.
9 その子イサクとイシマエルは彼をヘテびとゾハルの子エフロンの畑にあるマクペラのほら穴に葬った。これはマムレの向かいにあり、
Bana na ye ya mibali, Izaki mpe Isimaeli, bakundaki ye na lilita ya mabanga ya Makipela pene ya Mamire, kati na elanga ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, moto ya Iti.
10 アブラハムがヘテの人々から、買い取った畑であって、そこにアブラハムとその妻サラが葬られた。
Abrayami asombaki elanga yango epai ya bato ya Iti. Ezalaki kuna nde bakundaki mwasi na ye Sara.
11 アブラハムが死んだ後、神はその子イサクを祝福された。イサクはベエル・ラハイ・ロイのほとりに住んだ。
Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi.
12 サラのつかえめエジプトびとハガルがアブラハムに産んだアブラハムの子イシマエルの系図は次のとおりである。
Tala molongo ya bakitani ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, oyo Agari, moto ya Ejipito mpe mwasi mosali ya Sara, abotelaki Abrayami.
13 イシマエルの子らの名を世代にしたがって、その名をいえば次のとおりである。すなわちイシマエルの長子はネバヨテ、次はケダル、アデビエル、ミブサム、
Tala bakombo ya bana mibali ya Isimaeli kolanda ndenge babotamela: Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli; Kedari, Adibeli, Mibisami,
14 ミシマ、ドマ、マッサ、
Mishima, Duma, Masa,
15 ハダデ、テマ、エトル、ネフシ、ケデマ。
Adadi, Tema, Yeturi, Nafishi mpe Kedima.
16 これはイシマエルの子らであり、村と宿営とによる名であって、その氏族による十二人の君たちである。
Bango nde bazalaki bana mibali zomi na mibale ya Isimaeli. Moko na moko azalaki mokambi ya libota, mpe apesaki kombo na ye na mboka na ye mpe na molako na ye.
17 イシマエルのよわいは百三十七年である。彼は息絶えて死に、その民に加えられた。
Isimaeli awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. Akataki motema mpe akufaki; akendeki kokutana na bakoko na ye.
18 イシマエルの子らはハビラからエジプトの東、シュルまでの間に住んで、アシュルに及んだ。イシマエルはすべての兄弟の東に住んだ。
Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso.
19 アブラハムの子イサクの系図は次のとおりである。アブラハムの子はイサクであって、
Tala libota ya Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Abrayami azalaki tata ya Izaki,
20 イサクは四十歳の時、パダンアラムのアラムびとベトエルの娘で、アラムびとラバンの妹リベカを妻にめとった。
mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
21 イサクは妻が子を産まなかったので、妻のために主に祈り願った。主はその願いを聞かれ、妻リベカはみごもった。
Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.
22 ところがその子らが胎内で押し合ったので、リベカは言った、「こんなことでは、わたしはどうなるでしょう」。彼女は行って主に尋ねた。
Kati na libumu na ye, bana bazalaki kowelana. Alobaki: « Likambo nini oyo ekomeli ngai? » Boye, akendeki kotuna Yawe.
23 主は彼女に言われた、「二つの国民があなたの胎内にあり、二つの民があなたの腹から別れて出る。一つの民は他の民よりも強く、兄は弟に仕えるであろう」。
Yawe alobaki na ye: « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
24 彼女の出産の日がきたとき、胎内にはふたごがあった。
Wana tango na ye ya kobota ekokaki, azalaki na mapasa mibale kati na libumu na ye.
25 さきに出たのは赤くて全身毛ごろものようであった。それで名をエサウと名づけた。
Lipasa ya liboso oyo abimaki azalaki motane mpe nzoto na ye mobimba ezalaki etonda na bapwale lokola elamba ya bapwale; yango wana babengaki ye « Ezawu. »
26 その後に弟が出た。その手はエサウのかかとをつかんでいた。それで名をヤコブと名づけた。リベカが彼らを産んだ時、イサクは六十歳であった。
Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki.
27 さてその子らは成長し、エサウは巧みな狩猟者となり、野の人となったが、ヤコブは穏やかな人で、天幕に住んでいた。
Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako.
28 イサクは、しかの肉が好きだったので、エサウを愛したが、リベカはヤコブを愛した。
Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.
29 ある日ヤコブが、あつものを煮ていた時、エサウは飢え疲れて野から帰ってきた。
Mokolo moko, wana Jakobi azalaki kolamba elubu, Ezawu oyo awutaki na bilanga ayaki na kolemba.
30 エサウはヤコブに言った、「わたしは飢え疲れた。お願いだ。赤いもの、その赤いものをわたしに食べさせてくれ」。彼が名をエドムと呼ばれたのはこのためである。
Ezawu alobaki na Jakobi: — Nalembi makasi; tika ngai nalia elubu oyo, elubu oyo kaka. Yango wana bazalaki mpe kobenga ye Edomi.
31 ヤコブは言った、「まずあなたの長子の特権をわたしに売りなさい」。
Jakobi azongisaki: — Tekela ngai liboso boyaya na yo.
32 エサウは言った、「わたしは死にそうだ。長子の特権などわたしに何になろう」。
Ezawu azongisaki: — Tala, nakokufa na nzala. Boyaya na ngai ekopesa ngai nini?
33 ヤコブはまた言った、「まずわたしに誓いなさい」。彼は誓って長子の特権をヤコブに売った。
Kasi Jakobi alobaki: — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi.
34 そこでヤコブはパンとレンズ豆のあつものとをエサウに与えたので、彼は飲み食いして、立ち去った。このようにしてエサウは長子の特権を軽んじた。
Jakobi apesaki Ezawu lipa mpe elubu ya misili. Ezawu aliaki mpe amelaki, bongo atelemaki mpe akendeki. Ezali ndenge wana nde Ezawu atiolaki boyaya na ye.

< 創世記 25 >