< 創世記 16 >

1 アブラムの妻サライは子を産まなかった。彼女にひとりのつかえめがあった。エジプトの女で名をハガルといった。
Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito; kombo na ye « Agari. »
2 サライはアブラムに言った、「主はわたしに子をお授けになりません。どうぞ、わたしのつかえめの所におはいりください。彼女によってわたしは子をもつことになるでしょう」。アブラムはサライの言葉を聞きいれた。
Sarayi alobaki na Abrami: — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.
3 アブラムの妻サライはそのつかえめエジプトの女ハガルをとって、夫アブラムに妻として与えた。これはアブラムがカナンの地に十年住んだ後であった。
Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
4 彼はハガルの所にはいり、ハガルは子をはらんだ。彼女は自分のはらんだのを見て、女主人を見下げるようになった。
Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.
5 そこでサライはアブラムに言った、「わたしが受けた害はあなたの責任です。わたしのつかえめをあなたのふところに与えたのに、彼女は自分のはらんだのを見て、わたしを見下さげます。どうか、主があなたとわたしの間をおさばきになるように」。
Boye, Sarayi alobaki na Abrami: — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
6 アブラムはサライに言った、「あなたのつかえめはあなたの手のうちにある。あなたの好きなように彼女にしなさい」。そしてサライが彼女を苦しめたので、彼女はサライの顔を避けて逃げた。
Abrami alobaki: — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.
7 主の使は荒野にある泉のほとり、すなわちシュルの道にある泉のほとりで、彼女に会い、
Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri.
8 そして言った、「サライのつかえめハガルよ、あなたはどこからきたのですか、またどこへ行くのですか」。彼女は言った、「わたしは女主人サライの顔を避けて逃げているのです」。
Atunaki ye: — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi? Azongisaki: — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.
9 主の使は彼女に言った、「あなたは女主人のもとに帰って、その手に身を任せなさい」。
Anjelu ya Yawe alobaki na ye: — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.
10 主の使はまた彼女に言った、「わたしは大いにあなたの子孫を増して、数えきれないほどに多くしましょう」。
Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu: — Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango.
11 主の使はまた彼女に言った、「あなたは、みごもっています。あなたは男の子を産むでしょう。名をイシマエルと名づけなさい。主があなたの苦しみを聞かれたのです。
Alobaki na ye lisusu: — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo.
12 彼は野ろばのような人となり、その手はすべての人に逆らい、すべての人の手は彼に逆らい、彼はすべての兄弟に敵して住むでしょう」。
Akozala lokola ane ya zamba. Loboko na ye ekobundisa moto nyonso, mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye; akovanda esika moko te na bandeko na ye.
13 そこで、ハガルは自分に語られた主の名を呼んで、「あなたはエル・ロイです」と言った。彼女が「ここでも、わたしを見ていられるかたのうしろを拝めたのか」と言ったことによる。
Agari amitunaki: « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi: Nzambe oyo azali komona ngai.
14 それでその井戸は「ベエル・ラハイ・ロイ」と呼ばれた。これはカデシとベレデの間にある。
Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
15 ハガルはアブラムに男の子を産んだ。アブラムはハガルが産んだ子の名をイシマエルと名づけた。
Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. »
16 ハガルがイシマエルをアブラムに産んだ時、アブラムは八十六歳であった。
Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.

< 創世記 16 >