< エゼキエル書 5 >

1 人の子よ、鋭いつるぎを取り、それを理髪師のかみそりとして、あなたの頭と、ひげとをそり、はかりで量って、その毛を分けなさい。
Sik’oyo, mwana na moto, kamata mopanga ya minu mpe salela yango lokola jileti mpo na kokata suki ya moto mpe mandefu na yo; kamata lisusu emekelo kilo mpe kabola suki yango na maboke.
2 その三分の一は包囲の期間の終る時、町の中で火で焼き、また三分の一を取り、つるぎで町のまわりでこれを打ち、さらに三分の一を風に散らしなさい。わたしはつるぎを抜いて、彼らのあとを追う。
Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.
3 あなたはその毛を少し取って、衣のすそに包み、
Kasi kamata ndambo moke kaka ya suki, kanga yango na songe ya elamba na yo.
4 またそのうちから少しを取って火の中に投げ入れ、火でこれを焼きなさい。火はその中から出て、イスラエルの全家に及ぶ。
Bongo, na oyo ekotikala, bwaka ndambo na yango na moto mpo ete ezika. Boye, moto oyo ekobima kuna ekopanzana na libota mobimba ya Isalaele.
5 主なる神はこう言われる、わたしはこのエルサレムを万国の中に置き、国々をそのまわりに置いた。
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala Yelusalemi! Natiaki yango na kati-kati ya bikolo, mpe bamboka minene ezingelaki yango.
6 エルサレムは他の国々よりも悪しく、わたしのおきてにそむき、そのまわりの国々よりもわたしの定めにそむいた。すなわち彼らはわたしのおきてを捨て、わたしの定めに歩まなかった。
Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai.
7 それゆえ主はこう言われる、あなたがたはそのまわりにいる異邦人よりも狂暴であって、わたしの定めに歩まず、わたしのおきてを行わず、むしろ、あなたがたの回りにいる異邦人のおきてを守っていた。
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola botambolaki na botomboki koleka bikolo oyo ezali zingazinga na bino, bolandaki mibeko mpe bikateli na Ngai te mpe bolandaki ata kutu bosembo ya bamboka oyo ezingelaki bino te;
8 それゆえ主なる神はこう言われる、見よ、わたしはあなたを攻め、異邦人の目の前で、あなたの中にさばきを行う。
mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Ngai moko nakotelemela yo, Yelusalemi, mpe nakopesa yo etumbu na miso ya bikolo.
9 あなたのもろもろの憎むべき事のために、わたしがまだした事のないような事、またこの後ふたたびしないような事をあなたに対してする。
Likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo osalaka, nakosala yo makambo oyo natikala nanu kosala te na tango ya kala mpe oyo nakotikala kosala te na mikolo ekoya. ›
10 それゆえ、あなたのうちで父はその子を食い、子はその父を食う。わたしはあなたに対してさばきを行い、あなたのうちの残りの者をことごとく四方の風に散らす。
Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.
11 それゆえ、主なる神は言われる、わたしは生きている。あなたはその忌むべき物と、その憎むべき事とをもって、わたしの聖所を汚したので、わたしは必ずあなたの数を減らす。わたしの目はあなたを惜しみ見ず、またわたしはあなたをあわれまない。
Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe: ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino: liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. ›
12 あなたの三分の一はあなたの中で疫病で死に、ききんで滅び、三分の一はあなたのまわりでつるぎに倒れ、三分の一は四方の風に散らされる。わたしはつるぎを抜いてそのあとを追う。
Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.
13 こうしてわたしは怒りを漏らし尽し、憤りを彼らの上に漏らして、満足する。こうして、わたしの憤りを彼らの上に漏らし尽した時、彼らは主であるわたしが熱心に語ったことを知るであろう。
Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai.
14 わたしはまわりにある国々の中と、すべてそばを通る者の目の前であなたを滅亡とあざけりに渡す。
Yo Yelusalemi, nakobebisa yo, okoyokisama soni kati na bikolo nyonso oyo ezingeli yo mpe na miso ya bato nyonso oyo bakolekela na nzela na yo.
15 わたしが怒りと、憤りと、重い懲罰とをもって、あなたに対してさばきを行う時、あなたはそのまわりにある国々のあざけりとなり、そしりとなり、戒めとなり、驚きとなる。これは主であるわたしが語るのである。
Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi.
16 すなわち、わたしがあなたを滅ぼすききんの矢、滅亡の矢をあなたに放つ時、わたしはあなたを滅ぼすために放つのだ。わたしはあなたの上にききんを増し加え、あなたがつえとするパンを打ち砕く。
« Tango nakobwakela yo makonga na Ngai ya mike ya nzala makasi oyo ebomaka mpe oyo ebebisaka, nakosala bongo mpo na kosilisa koboma bino: nakoyeisa nzala makasi koleka kati na yo mpe nakolongola bilei na bibombelo na yo.
17 わたしはあなたにききんと野獣を送って、あなたの子を奪い取り、また疫病と流血にあなたの中を通らせ、またつるぎをあなたに送る。主であるわたしがこれを言う」。
Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. »

< エゼキエル書 5 >