< 伝道者の書 10 >

1 死んだはえは、香料を造る者のあぶらを臭くし、少しの愚痴は知恵と誉よりも重い。
Ndenge nzinzi ekufa ekomisaka malasi solo mabe, ndenge wana mpe mwa bozoba ebebisaka bwanya mpe lokumu.
2 知者の心は彼を右に向けさせ、愚者の心は左に向けさせる。
Motema ya moto ya bwanya ekendaka na nzela ya malamu, kasi motema ya zoba ekendaka na nzela ya mabe.
3 愚者は道を行く時、思慮が足りない、自分の愚かなことをすべての人に告げる。
Ata tango zoba atambolaka na nzela, bozangi mayele na ye etalisaka na bato mosusu ete azali zoba.
4 つかさたる者があなたに向かって立腹しても、あなたの所を離れてはならない。温順は大いなるとがを和らげるからである。
Soki mokonzi atombokeli yo, kolongwa na esika na yo ya mosala te; pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.
5 わたしは日の下に一つの悪のあるのを見た。それはつかさたる者から出るあやまちに似ている。
Namonaki mabe moko na se ya moyi, lokola libunga epai ya bakonzi:
6 すなわち愚かなる者が高い地位に置かれ、富める者が卑しい所に座している。
bazoba batombolami na bisika ya lokumu makasi, kasi bazwi batikali na bisika ya se.
7 わたしはしもべたる者が馬に乗り、君たる者が奴隷のように徒歩であるくのを見た。
Namonaki bawumbu kotambola likolo ya bampunda, mpe bakonzi kotambola na makolo lokola bawumbu.
8 穴を掘る者はみずからこれに陥り、石がきをこわす者は、へびにかまれる。
Moto oyo atimoli libulu akoki kokweya kati na yango; mpe moto oyo abuki mir ya lopango, nyoka ekoki koswa ye.
9 石を切り出す者はそれがために傷をうけ、木を割る者はそれがために危険にさらされる。
Moto oyo abukaka mabanga akoki kozoka na yango, oyo apasolaka mabaya akoki mpe kozwa likama.
10 鉄が鈍くなったとき、人がその刃をみがかなければ、力を多くこれに用いねばならない。しかし、知恵は人を助けてなし遂げさせる。
Soki epasola esili minu mpe bapelisi yango te, moto oyo akosalela yango akobimisa makasi mingi; kasi bwanya epesaka elonga.
11 へびがもし呪文をかけられる前に、かみつけば、へび使は益がない。
Soki nyoka eswi moto liboso ete asakanisa yango, litomba ezali lisusu te epai ya moto oyo asakanisaka banyoka.
12 知者の口の言葉は恵みがある、しかし愚者のくちびるはその身を滅ぼす。
Maloba ya moto ya bwanya epesaka esengo, kasi maloba ya zoba elukelaka ye makambo.
13 愚者の口の言葉の初めは愚痴である、またその言葉の終りは悪い狂気である。
Abandaka na maloba ya bozoba mpe asukisaka na maloba ya mabe.
14 愚者は言葉を多くする、しかし人はだれも後に起ることを知らない。だれがその身の後に起る事を告げることができようか。
Zoba alobaka mingi. Moto moko te ayebi makambo oyo ekoya; nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekosalema sima na ye?
15 愚者の労苦はその身を疲れさせる、彼は町にはいる道をさえ知らない。
Mosala ya zoba elembisaka ye, ayebi ata kutu te nzela oyo ememaka na engumba.
16 あなたの王はわらべであって、その君たちが朝から、ごちそうを食べる国よ、あなたはわざわいだ。
Mawa na mokili oyo mokonzi na yango azali mwana moke, mpe oyo bakambi na yango balangwaka masanga na tongo-tongo!
17 あなたの王は自主の子であって、その君たちが酔うためでなく、力を得るために、適当な時にごちそうを食べる国よ、あなたはさいわいだ。
Esengo na mokili oyo mokonzi na yango abotama na libota ya bato minene, mpe oyo bakambi na yango baliaka na tango oyo esengeli mpo na kozwa makasi, kasi mpo na kolangwa masanga te.
18 怠惰によって屋根は落ち、無精によって家は漏る。
Soki moto azali goyigoyi, likolo ya ndako na ye ekobukana; soki maboko na ye elemba, ndako na ye ekotanga mayi.
19 食事は笑いのためになされ、酒は命を楽しませる。金銭はすべての事に応じる。
Basalaka feti mpo na kosepela, mpe masanga ya vino epesaka esengo na motema, mpe mbongo epesaka biyano na makambo nyonso.
20 あなたは心のうちでも王をのろってはならない、また寝室でも富める者をのろってはならない。空の鳥はあなたの声を伝え、翼のあるものは事を告げるからである。
Kolakela mokonzi mabe te, ezala kati na motema na yo; kolakela mozwi mabe te, ezala na mbeto na yo ya kolala, pamba te ndeke ya likolo ekoki komema maloba na yo mpe kopanza sango ya maloba na yo.

< 伝道者の書 10 >