< 申命記 34 >
1 モーセはモアブの平野からネボ山に登り、エリコの向かいのピスガの頂へ行った。そこで主は彼にギレアデの全地をダンまで示し、
Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba: wuta na Galadi kino na Dani,
2 ナフタリの全部、エフライムとマナセの地およびユダの全地を西の海まで示し、
etuka nyonso ya Nefitali, ya Efrayimi mpe ya Manase; mokili nyonso ya Yuda kino na ebale monene Mediterane,
3 ネゲブと低地、すなわち、しゅろの町エリコの谷をゾアルまで示された。
mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari.
4 そして主は彼に言われた、「わたしがアブラハム、イサク、ヤコブに、これをあなたの子孫に与えると言って誓った地はこれである。わたしはこれをあなたの目に見せるが、あなたはそこへ渡って行くことはできない」。
Bongo Yawe alobaki na ye: « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango: ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »
5 こうして主のしもべモーセは主の言葉のとおりにモアブの地で死んだ。
Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye.
6 主は彼をベテペオルに対するモアブの地の谷に葬られたが、今日までその墓を知る人はない。
Ye moko Nzambe akundaki ye kati na Moabi, na lubwaku oyo etalana na Beti-Peori; mpe kino lelo, moto moko te ayebi esika oyo kunda na ye ezali.
7 モーセは死んだ時、百二十歳であったが、目はかすまず、気力は衰えていなかった。
Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te.
8 イスラエルの人々はモアブの平野で三十日の間モーセのために泣いた。そしてモーセのために泣き悲しむ日はついに終った。
Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.
9 ヌンの子ヨシュアは知恵の霊に満ちた人であった。モーセが彼の上に手を置いたからである。イスラエルの人々は彼に聞き従い、主がモーセに命じられたとおりにおこなった。
Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
10 イスラエルには、こののちモーセのような預言者は起らなかった。モーセは主が顔を合わせて知られた者であった。
Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso,
11 主はエジプトの地で彼をパロとそのすべての家来およびその全地につかわして、もろもろのしるしと不思議を行わせられた。
oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba;
12 モーセはイスラエルのすべての人の前で大いなる力をあらわし、大いなる恐るべき事をおこなった。
pamba te moto moko te atikalaki komonisa misala ya nguya mpe ya somo lokola misala oyo Moyize asalaki na miso ya bana nyonso ya Isalaele.