< 申命記 28 >

1 もしあなたが、あなたの神、主の声によく聞き従い、わたしが、きょう、命じるすべての戒めを守り行うならば、あなたの神、主はあなたを地のもろもろの国民の上に立たせられるであろう。
Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili.
2 もし、あなたがあなたの神、主の声に聞き従うならば、このもろもろの祝福はあなたに臨み、あなたに及ぶであろう。
Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino:
3 あなたは町の内でも祝福され、畑でも祝福されるであろう。
Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga.
4 またあなたの身から生れるもの、地に産する物、家畜の産むもの、すなわち牛の子、羊の子は祝福されるであろう。
Mabota na bino ekopambolama; milona na bino mpe bibwele na bino: bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.
5 またあなたのかごと、こねばちは祝福されるであろう。
Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekopambolama.
6 あなたは、はいるにも祝福され、出るにも祝福されるであろう。
Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima.
7 敵が起ってあなたを攻める時は、主はあなたにそれを撃ち敗らせられるであろう。彼らは一つの道から攻めて来るが、あなたの前で七つの道から逃げ去るであろう。
Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.
8 主は命じて祝福をあなたの倉と、あなたの手のすべてのわざにくだし、あなたの神、主が賜わる地であなたを祝福されるであろう。
Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.
9 もし、あなたの神、主の戒めを守り、その道を歩むならば、主は誓われたようにあなたを立てて、その聖なる民とされるであろう。
Yawe akokomisa bino libota na Ye ya bule ndenge alakaki bino tango alapaki ndayi, pamba te bokobatela mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotambola na banzela na Ye.
10 そうすれば地のすべての民は皆あなたが主の名をもって唱えられるのを見てあなたを恐れるであろう。
Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino.
11 主があなたに与えると先祖に誓われた地で、主は良い物、すなわちあなたの身から生れる者、家畜の産むもの、地に産する物を豊かにされるであろう。
Yawe akotondisa bino na bozwi ebele: mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino.
12 主はその宝の蔵である天をあなたのために開いて、雨を季節にしたがってあなたの地に降らせ、あなたの手のすべてのわざを祝福されるであろう。あなたは多くの国民に貸すようになり、借りることはないであろう。
Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.
13 主はあなたをかしらとならせ、尾とはならせられないであろう。あなたはただ栄えて衰えることはないであろう。きょう、わたしが命じるあなたの神、主の戒めに聞き従って、これを守り行うならば、あなたは必ずこのようになるであろう。
Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te.
14 きょう、わたしが命じるこのすべての言葉を離れて右または左に曲り、他の神々に従い、それに仕えてはならない。
Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.
15 しかし、あなたの神、主の声に聞き従わず、きょう、わたしが命じるすべての戒めと定めとを守り行わないならば、このもろもろののろいがあなたに臨み、あなたに及ぶであろう。
Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino:
16 あなたは町のうちでものろわれ、畑でものろわれ、
Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga.
17 あなたのかごも、こねばちものろわれ、
Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe.
18 あなたの身から生れるもの、地に産する物、牛の子、羊の子ものろわれるであろう。
Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino: bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.
19 あなたは、はいるにものろわれ、出るにものろわれるであろう。
Bokolakelama mabe tango bokokota mpe bokolakelama mabe tango bokobima.
20 主はあなたが手をくだすすべての働きにのろいと、混乱と、懲しめとを送られ、あなたはついに滅び、すみやかにうせ果てるであろう。これはあなたが悪をおこなってわたしを捨てたからである。
Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe.
21 主は疫病をあなたの身につかせ、あなたが行って取る地から、ついにあなたを断ち滅ぼされるであろう。
Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
22 主はまた肺病と熱病と炎症と間けつ熱と、かんばつと、立ち枯れと、腐り穂とをもってあなたを撃たれるであろう。これらのものはあなたを追い、ついにあなたを滅ぼすであろう。
Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino: fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino: kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa.
23 あなたの頭の上の天は青銅となり、あなたの下の地は鉄となるであろう。
Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te.
24 主はあなたの地の雨を、ちりと、ほこりに変らせ、それが天からあなたの上にくだって、ついにあなたを滅ぼすであろう。
Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino.
25 主はあなたを敵の前で敗れさせられるであろう。あなたは一つの道から彼らを攻めて行くが、彼らの前で七つの道から逃げ去るであろう。そしてあなたは地のもろもろの国に恐るべき見せしめとなるであろう。
Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.
26 またあなたの死体は空のもろもろの鳥と、地の獣とのえじきとなり、しかもそれを追い払う者はないであろう。
Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango.
27 主はエジプトの腫物と潰瘍と壊血病とひぜんとをもってあなたを撃たれ、あなたはいやされることはないであろう。
Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito: pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.
28 また主はあなたを撃って気を狂わせ、目を見えなくし、心を混乱させられるであろう。
Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.
29 あなたは盲人が暗やみに手探りするように、真昼にも手探りするであろう。あなたは行く道で栄えることがなく、ただ常にしえたげられ、かすめられるだけで、あなたを救う者はないであろう。
Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.
30 あなたは妻をめとっても、ほかの人が彼女と寝るであろう。家を建てても、その中に住まないであろう。ぶどう畑を作っても、その実を摘み取ることがないであろう。
Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.
31 あなたの牛が目の前でほふられても、あなたはそれを食べることができず、あなたのろばが目の前で奪われても、返されないであろう。あなたの羊が敵のものになっても、それを救ってあなたに返す者はないであろう。
Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino; mpe moto moko te akosunga bino.
32 あなたのむすこや娘は他国民にわたされる。あなたの目はそれを見、終日、彼らを慕って衰えるが、あなたは手を施すすべもないであろう。
Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.
33 あなたの地の産物およびあなたの労して獲た物はみなあなたの知らない民が食べるであろう。あなたは、ただ常にしえたげられ、苦しめられるのみであろう。
Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.
34 こうしてあなたは目に見る事柄によって、気が狂うにいたるであろう。
Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.
35 主はあなたのひざと、はぎとに悪い、いやし得ない腫物を生じさせて、足の裏から頭の頂にまで及ぼされるであろう。
Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.
36 主はあなたとあなたが立てた王とを携えて、あなたもあなたの先祖も知らない国に移されるであろう。あなたはそこで木や石で造ったほかの神々に仕えるであろう。
Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu: banzambe ya banzete mpe ya mabanga.
37 あなたは主があなたを追いやられるもろもろの民のなかで驚きとなり、ことわざとなり、笑い草となるであろう。
Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino.
38 あなたが多くの種を畑に携えて出ても、その収穫は少ないであろう。いなごがそれを食いつくすからである。
Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke; pamba te mabanki ekolia bankona wana.
39 あなたがぶどう畑を作り、それにつちかっても、そのぶどう酒を飲むことができず、その実を集めることもないであろう。虫がそれを食べるからである。
Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.
40 あなたの国にはあまねくオリブの木があるであろう。しかし、あなたはその油を身に塗ることができないであろう。その実がみな落ちてしまうからである。
Bokozala na banzete ya olive na mokili na bino mobimba, kasi bokopakola mafuta na yango te, pamba te bambuma ya olive ekokweya liboso ete ekomela.
41 むすこや、娘があなたに生れても、あなたのものにならないであろう。彼らは捕えられて行くからである。
Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu.
42 あなたのもろもろの木、および地の産物は、いなごが取って食べるであろう。
Mabanki ekolia banzete na bino nyonso mpe bambuma ya mabele na bino.
43 あなたのうちに寄留する他国人は、ますます高くなり、あなたの上に出て、あなたはますます低くなるであろう。
Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita;
44 彼はあなたに貸し、あなたは彼に貸すことができない。彼はかしらとなり、あなたは尾となるであろう。
akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.
45 このもろもろののろいが、あなたに臨み、あなたを追い、ついに追いついて、あなたを滅ぼすであろう。これはあなたの神、主の声に聞き従わず、あなたに命じられた戒めと定めとを、あなたが守らなかったからである。
Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino.
46 これらの事は長くあなたとあなたの子孫のうえにあって、しるしとなり、また不思議となるであろう。
Bilakeli mabe oyo ekozala elembo mpe makambo ya kokamwa epai na bino mpe epai ya bakitani na bino mpo na libela.
47 あなたがすべての物に豊かになり、あなたの神、主に心から喜び楽しんで仕えないので、
Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki;
48 あなたは飢え、かわき、裸になり、すべての物に乏しくなって、主があなたにつかわされる敵に仕えるであろう。敵は鉄のくびきをあなたのくびにかけ、ついにあなたを滅ぼすであろう。
tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.
49 すなわち主は遠い所から、地のはてから一つの民を、はげたかが飛びかけるように、あなたに攻めきたらせられるであろう。これはあなたがその言葉を知らない民、
Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te; ekobundisa bino.
50 顔の恐ろしい民であって、彼らは老人の身を顧みず、幼い者をあわれまず、
Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te.
51 あなたの家畜が産むものや、地の産物を食って、あなたを滅ぼし、穀物をも、酒をも、油をも、牛の子をも、羊の子をも、あなたの所に残さず、ついにあなたを全く滅ぼすであろう。
Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.
52 その民は全国ですべての町を攻め囲み、ついにあなたが頼みとする、堅固な高い石がきをことごとく撃ちくずし、あなたの神、主が賜わった国のうちのすべての町々を攻め囲むであろう。
Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
53 あなたは敵に囲まれ、激しく攻めなやまされて、ついにあなたの神、主が賜わったあなたの身から生れた者、むすこ、娘の肉を食べるに至るであろう。
Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
54 あなたがたのうちのやさしい、温和な男でさえも、自分の兄弟、自分のふところの妻、最後に残っている子供にも食物を惜しんで与えず、
Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te: ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.
55 自分が自分の子供を食べ、その肉を少しでも、この人々のだれにも与えようとはしないであろう。これは敵があなたのすべての町々を囲み、激しく攻め悩まして、何をもその人に残さないからである。
Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso.
56 またあなたがたのうちのやさしい、柔和な女、すなわち柔和で、やさしく、足の裏を土に付けようともしない者でも、自分のふところの夫や、むすこ、娘にもかくして、
Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi,
57 自分の足の間からでる後産や、自分の産む子をひそかに食べるであろう。敵があなたの町々を囲み、激しく攻めなやまして、すべての物が欠乏するからである。
mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.
58 もしあなたが、この書物にしるされているこの律法のすべての言葉を守り行わず、あなたの神、主というこの栄えある恐るべき名を恐れないならば、
Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino;
59 主はあなたとその子孫の上に激しい災を下されるであろう。その災はきびしく、かつ久しく、その病気は重く、かつ久しいであろう。
Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo: bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te.
60 主はまた、あなたが恐れた病気、すなわちエジプトのもろもろの病気を再び臨ませて、あなたの身につかせられるであろう。
Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino.
61 またこの律法の書にのせてないもろもろの病気と、もろもろの災とを、主はあなたが滅びるまで、あなたの上に下されるであろう。
Yawe akotindela bino lisusu lolenge nyonso ya bokono mpe bapota oyo ekomami te kati na buku oyo ya Mobeko, kino bokobebisama.
62 あなたがたは天の星のように多かったが、あなたの神、主の声に聞き従わなかったから、残る者が少なくなるであろう。
Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino.
63 さきに主があなたがたを良くあしらい、あなたがたを多くするのを喜ばれたように、主は今あなたがたを滅ぼし絶やすのを喜ばれるであろう。あなたがたは、はいって取る地から抜き去られるであろう。
Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.
64 主は地のこのはてから、かのはてまでのもろもろの民のうちにあなたがたを散らされるであろう。その所で、あなたもあなたの先祖たちも知らなかった木や石で造ったほかの神々にあなたは仕えるであろう。
Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu: banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.
65 その国々の民のうちであなたは安きを得ず、また足の裏を休める所も得られないであろう。主はその所で、あなたの心をおののかせ、目を衰えさせ、精神を打ちしおれさせられるであろう。
Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba.
66 あなたの命は細い糸にかかっているようになり、夜昼恐れおののいて、その命もおぼつかなく思うであろう。
Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka.
67 あなたが心にいだく恐れと、目に見るものによって、朝には『ああ夕であればよいのに』と言い、夕には『ああ朝であればよいのに』と言うであろう。
Na tongo, bokoloba: « Pokwa ekokoma tango nini? » Mpe na pokwa, bokoloba: « Tongo ekotana tango nini? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona.
68 主はあなたを舟に乗せ、かつてわたしがあなたに告げて、『あなたは再びこれを見ることはない』と言った道によって、あなたをエジプトへ連れもどされるであろう。あなたがたはそこで男女の奴隷として敵に売られるが、だれも買う者はないであろう」。
Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.

< 申命記 28 >