< 申命記 23 >

1 すべて去勢した男子は主の会衆に加わってはならない。
Mobali moko te oyo baboma mokongo to balongola nzoto ya mibali akoki kokota na lisanga ya Yawe.
2 私生児は主の会衆に加わってはならない。その子孫は十代までも主の会衆に加わってはならない。
Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.
3 アンモンびととモアブびとは主の会衆に加わってはならない。彼らの子孫は十代までも、いつまでも主の会衆に加わってはならない。
Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.
4 これはあなたがたがエジプトから出てきた時に、彼らがパンと水を携えてあなたがたを道に迎えず、アラム・ナハライムのペトルからベオルの子バラムを雇って、あなたをのろわせようとしたからである。
Pamba te bayaki te koyamba bino na mapa mpe na mayi na nzela na bino tango bobimaki na Ejipito; mpe bazwaki Balami, mwana mobali ya Beori, moto ya Petori, wuta na mokili ya Mezopotami, mpo ete alakela bino mabe.
5 しかし、あなたの神、主はバラムの言うことを聞こうともせず、あなたの神、主はあなたのために、そののろいを変えて、祝福とされた。あなたの神、主があなたを愛されたからである。
Kasi Yawe, Nzambe na bino, ayokaki Balami te mpe abongolaki elakeli mabe lipamboli mpo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, alingi bino.
6 あなたは一生いつまでも彼らのために平安をも、幸福をも求めてはならない。
Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango.
7 あなたはエドムびとを憎んではならない。彼はあなたの兄弟だからである。またエジプトびとを憎んではならない。あなたはかつてその国の寄留者であったからである。
Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.
8 そして彼らが産んだ子どもは三代目には、主の会衆に加わることができる。
Bakitani na bango, kobanda na molongo ya misato, nde bakoki kokota na lisanga ya Yawe.
9 敵を攻めるために出て陣営におる時は、すべての汚れた物を避けなければならない。
Tango bokotonga milako mpo na kobundisa banguna na bino, bozala mosika na eloko nyonso oyo ezali mbindo.
10 あなたがたのうちに、夜の思いがけない事によって身の汚れた人があるならば、陣営の外に出なければならない。陣営の内に、はいってはならない。
Soki mobali moko kati na bino azali mbindo, pamba te abimisaki mayi ya mibali na butu, asengeli kokende libanda ya molako mpe kovanda kuna.
11 しかし、夕方になって、水で身を洗い、日が没して後、陣営の内に、はいることができる。
Kasi na pokwa, na tango moyi elalaka, asengeli komisukola nzoto mpe kozonga na molako.
12 あなたはまた陣営の外に一つの所を設けておいて、用をたす時、そこに出て行かなければならない。
Bokopona esika moko na libanda ya molako, mpo na kosala zongo.
13 また武器と共に、くわを備え、外に出て、かがむ時、それをもって土を掘り、向きをかえて、出た物をおおわなければならない。
Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye.
14 あなたの神、主があなたを救い、敵をあなたにわたそうと、陣営の中を歩まれるからである。ゆえに陣営は聖なる所として保たなければならない。主があなたのうちにきたない物のあるのを見て、離れ去られることのないためである。
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, atambolaka kati na molako na bino mpo na kobatela bino mpe kokangola bino na maboko ya banguna na bino. Molako na bino esengeli kozala bule mpo ete akoka komona te eloko moko ya mbindo kati na bino mpe apesa bino mokongo te.
15 主人を避けて、あなたのところに逃げてきた奴隷を、その主人にわたしてはならない。
Soki mowumbu ayei kobombama epai na yo, kozongisa ye te na maboko ya nkolo na ye.
16 その者をあなたがたのうちに、あなたと共におらせ、町の一つのうち、彼が好んで選ぶ場所に住ませなければならない。彼を虐待してはならない。
Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi; konyokola ye te.
17 イスラエルの女子は神殿娼婦となってはならない。またイスラエルの男子は神殿男娼となってはならない。
Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.
18 娼婦の得た価または男娼の価をあなたの神、主の家に携えて行って、どんな誓願にも用いてはならない。これはともにあなたの神、主の憎まれるものだからである。
Bosengeli te kokotisa na Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino, lifuti ya mwasi ya ndumba to ya mobali ya ndumba, mpo na kokokisa ndayi ya lolenge nyonso, pamba te Yawe, Nzambe na bino, amonaka bango nyonso mibale nkele.
19 兄弟に利息を取って貸してはならない。金銭の利息、食物の利息などすべて貸して利息のつく物の利息を取ってはならない。
Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki.
20 外国人には利息を取って貸してもよい。ただ兄弟には利息を取って貸してはならない。これはあなたが、はいって取る地で、あなたの神、主がすべてあなたのする事に祝福を与えられるためである。
Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.
21 あなたの神、主に誓願をかける時、それを果すことを怠ってはならない。あなたの神、主は必ずそれをあなたに求められるからである。それを怠るときは罪を得るであろう。
Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.
22 しかし、あなたが誓願をかけないならば、罪を得ることはない。
Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te.
23 あなたが口で言った事は守って行わなければならない。あなたが口で約束した事は、あなたの神、主にあなたが自発的に誓願したのだからである。
Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.
24 あなたが隣人のぶどう畑にはいる時、そのぶどうを心にまかせて飽きるほど食べてもよい。しかし、あなたの器の中に取り入れてはならない。
Soki okoti na elanga ya vino ya moninga na yo, okoki kolia bambuma nyonso oyo olingi, kasi kotia eloko moko te na kitunga na yo.
25 あなたが隣人の麦畑にはいる時、手でその穂を摘んで食べてもよい。しかし、あなたの隣人の麦畑にかまを入れてはならない。
Soki okoti na elanga ya ble ya moninga na yo, okoki kobuka ble na maboko, kasi kosalela mbeli te.

< 申命記 23 >