< 使徒の働き 24 >

1 五日の後、大祭司アナニヤは、長老数名と、テルトロという弁護人とを連れて下り、総督にパウロを訴え出た。
Sima na mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ayaki na Sezarea, elongo na ndambo ya bakambi mpe molobeli Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli.
2 パウロが呼び出されたので、テルトロは論告を始めた。「ペリクス閣下、わたしたちが、閣下のお陰でじゅうぶんに平和を楽しみ、またこの国が、ご配慮によって、
Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo: — Tata moyangeli Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo.
3 あらゆる方面に、またいたるところで改善されていることは、わたしたちの感謝してやまないところであります。
Tata moyangeli Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza.
4 しかし、ご迷惑をかけないように、くどくどと述べずに、手短かに申し上げますから、どうぞ、忍んでお聞き取りのほど、お願いいたします。
Kasi, tolingi te kozwa yo tango molayi. Nabondeli yo: salela biso ngolu ya koyoka biso na mwa tango moke.
5 さて、この男は、疫病のような人間で、世界中のすべてのユダヤ人の中に騒ぎを起している者であり、また、ナザレ人らの異端のかしらであります。
Biso, tomoni ete mosala ya moto oyo ezali: kotia mobulu; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti,
6 この者が宮までも汚そうとしていたので、わたしたちは彼を捕縛したのです。〔そして、律法にしたがって、さばこうとしていたところ、
mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye kolanda Mobeko na biso,
7 千卒長ルシヤが干渉して、彼を無理にわたしたちの手から引き離してしまい、
kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda, ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi.
8 彼を訴えた人たちには、閣下のところに来るようにと命じました。〕それで、閣下ご自身でお調べになれば、わたしたちが彼を訴え出た理由が、全部おわかりになるでしょう」。
Apesaki bato oyo bafundaki ye mitindo ete baya epai na yo.] Soki yo moko otuni ye mituna, okososola ete makambo oyo tofundeli ye ezali ya solo.
9 ユダヤ人たちも、この訴えに同調して、全くそのとおりだと言った。
Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye.
10 そこで、総督が合図をして発言を促したので、パウロは答弁して言った。「閣下が、多年にわたり、この国民の裁判をつかさどっておられることを、よく承知していますので、わたしは喜んで、自分のことを弁明いたします。
Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki: — Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo.
11 お調べになればわかるはずですが、わたしが礼拝をしにエルサレムに上ってから、まだ十二日そこそこにしかなりません。
Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendeki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe.
12 そして、宮の内でも、会堂内でも、あるいは市内でも、わたしがだれかと争論したり、群衆を煽動したりするのを見たものはありませんし、
Mpe bato oyo bafundi ngai batikala nanu kokuta ngai te nazali kotia tembe na moto to nazali kotindika bato ete batomboka, ezala kati na Tempelo to kati na bandako ya mayangani to mpe kati na engumba.
13 今わたしを訴え出ていることについて、閣下の前に、その証拠をあげうるものはありません。
Bakolonga mpe te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sik’oyo.
14 ただ、わたしはこの事は認めます。わたしは、彼らが異端だとしている道にしたがって、わたしたちの先祖の神に仕え、律法の教えるところ、また預言者の書に書いてあることを、ことごとく信じ、
Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli.
15 また、正しい者も正しくない者も、やがてよみがえるとの希望を、神を仰いでいだいているものです。この希望は、彼ら自身も持っているのです。
Boye ngai, ndenge moko na bango, nazalaka na elikya na Nzambe ete bato nyonso bakosekwa, ezala bato ya sembo to bato mabe.
16 わたしはまた、神に対しまた人に対して、良心に責められることのないように、常に努めています。
Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.
17 さてわたしは、幾年ぶりかに帰ってきて、同胞に施しをし、また、供え物をしていました。
Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.
18 そのとき、彼らはわたしが宮できよめを行っているのを見ただけであって、群衆もいず、騒動もなかったのです。
Bakutaki ngai nasilisi komipetola kati na Tempelo; ezalaki na ebele ya bato te elongo na ngai, mobulu mpe te.
19 ところが、アジヤからきた数人のユダヤ人が彼らが、わたしに対して、何かとがめ立てをすることがあったなら、よろしく閣下の前にきて、訴えるべきでした。
Kasi ezali ndambo ya Bayuda ya Azia, oyo bazalaki wana, nde basengelaki kotelema liboso na yo mpo na kofunda ngai, soki solo bazwaki ngai na likambo.
20 あるいは、何かわたしに不正なことがあったなら、わたしが議会の前に立っていた時、彼らみずから、それを指摘すべきでした。
To mpe lisusu, tika ete bato oyo bazali awa baloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai tango nasambaki liboso ya Likita-Monene,
21 ただ、わたしは、彼らの中に立って、『わたしは、死人のよみがえりのことで、きょう、あなたがたの前でさばきを受けているのだ』と叫んだだけのことです」。
longola kaka liloba oyo nabimisaki, wana natelemaki liboso na bango: « Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bakufi bakosekwa! »
22 ここでペリクスは、この道のことを相当わきまえていたので、「千卒長ルシヤが下って来るのを待って、おまえたちの事件を判決することにする」と言って、裁判を延期した。
Felikisi, oyo ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela, azongisaki bango mpe alobaki: — Nakoyekola malamu likambo na bino tango mokonzi ya basoda, Lisiasi, akoya.
23 そして百卒長に、パウロを監禁するように、しかし彼を寛大に取り扱い、友人らが世話をするのを止めないようにと、命じた。
Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama moko ete abatela Polo lokola mokangami kati na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa bandeko na ye nzela mpo ete basunga ye.
24 数日たってから、ペリクスは、ユダヤ人である妻ドルシラと一緒にきて、パウロを呼び出し、キリスト・イエスに対する信仰のことを、彼から聞いた。
Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye, Drusiye, oyo azalaki Moyuda; abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu-Klisto.
25 そこで、パウロが、正義、節制、未来の審判などについて論じていると、ペリクスは不安を感じてきて、言った、「きょうはこれで帰るがよい。また、よい機会を得たら、呼び出すことにする」。
Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye: — Ekoki mpo na sik’oyo! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
26 彼は、それと同時に、パウロから金をもらいたい下ごころがあったので、たびたびパウロを呼び出しては語り合った。
Felikisi azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye, na elikya ete Polo akopesa ye kanyaka.
27 さて、二か年たった時、ポルキオ・フェストが、ペリクスと交代して任についた。ペリクスは、ユダヤ人の歓心を買おうと思って、パウロを監禁したままにしておいた。
Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi oyo, mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo kati na boloko.

< 使徒の働き 24 >