< 列王記Ⅱ 22 >
1 ヨシヤは八歳で王となり、エルサレムで三十一年の間、世を治めた。母はボヅカテのアダヤの娘で、名をエデダといった。
Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yedida. » Yedida azalaki mwana ya Adaya, moto ya mboka Botsikati.
2 ヨシヤは主の目にかなう事を行い、先祖ダビデの道に歩んで右にも左にも曲らなかった。
Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.
3 ヨシヤ王の第十八年に王はメシュラムの子アザリヤの子である書記官シャパンを主の宮につかわして言った、
Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye:
4 「大祭司ヒルキヤのもとへのぼって行って、主に宮にはいってきた銀、すなわち門を守る者が民から集めたものの総額を彼に数えさせ、
— Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki.
5 それを工事をつかさどる主の宮の監督者の手に渡させ、彼らから主の宮で工事をする者にそれを渡して、宮の破れを繕わせなさい。
Tika ete bapesa mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe mpo ete bafuta basali oyo bazali kobongisa yango:
6 すなわち木工と建築師と石工にそれを渡し、また宮を繕う材木と切り石を買わせなさい。
basharipantie, bangamba mpe batongi ndako. Kaka na mbongo yango, bakosomba lisusu mabaya mpe mabanga bakata mpo na kolendisa Tempelo ya Yawe.
7 ただし彼らは正直に事を行うから、彼らに渡した銀については彼らと計算するに及ばない」。
Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene.
8 その時大祭司ヒルキヤは書記官シャパンに言った、「わたしは主の宮で律法の書を見つけました」。そしてヒルキヤがその書物をシャパンに渡したので、彼はそれを読んだ。
Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda: — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe. Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango.
9 書記官シャパンは王のもとへ行き、王に報告して言った、「しもべどもは宮にあった銀を皆出して、それを工事をつかさどる主の宮の監督者の手に渡しました」。
Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye: — Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango,
10 書記官シャパンはまた王に告げて「祭司ヒルキヤはわたしに一つの書物を渡しました」と言い、それを王の前で読んだ。
mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.
11 王はその律法の書の言葉を聞くと、その衣を裂いた。
Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye
12 そして王は祭司ヒルキヤと、シャパンの子アヒカムと、ミカヤの子アクボルと、書記官シャパンと、王の大臣アサヤとに命じて言った、
mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi:
13 「あなたがたは行って、この見つかった書物の言葉について、わたしのため、民のため、またユダ全国のために主に尋ねなさい。われわれの先祖たちがこの書物の言葉に聞き従わず、すべてわれわれについてしるされている事を行わなかったために、主はわれわれにむかって、大いなる怒りを発しておられるからです」。
— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.
14 そこで祭司ヒルキヤ、アヒカム、アクボル、シャパンおよびアサヤはシャルムの妻である女預言者ホルダのもとへ行った。シャルムはハルハスの子であるテクワの子で、衣装べやを守る者であった。その時ホルダはエルサレムの下町に住んでいた。彼らがホルダに告げたので、
Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo,
15 ホルダは彼らに言った、「イスラエルの神、主はこう仰せられます、『あなたがたをわたしにつかわした人に言いなさい。
Ulida alobaki na bango: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai:
16 主はこう言われます、見よ、わたしはユダの王が読んだあの書物のすべての言葉にしたがって、災をこの所と、ここに住んでいる民に下そうとしている。
« Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga.
17 彼らがわたしを捨てて他の神々に香をたき、自分たちの手で作ったもろもろの物をもって、わたしを怒らせたからである。それゆえ、わたしはこの所にむかって怒りの火を発する。これは消えることがないであろう』。
Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. »
18 ただし主に尋ねるために、あなたがたをつかわしたユダの王にはこう言いなさい、『あなたが聞いた言葉についてイスラエルの神、主はこう仰せられます、
Boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki:
19 あなたは、わたしがこの所と、ここに住んでいる民にむかって、これは荒れ地となり、のろいとなるであろうと言うのを聞いた時、心に悔い、主の前にへりくだり、衣を裂いてわたしの前に泣いたゆえ、わたしもまたあなたの言うことを聞いたのであると主は言われる。
Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.
20 それゆえ、見よ、わたしはあなたを先祖たちのもとに集める。あなたは安らかに墓に集められ、わたしがこの所に下すもろもろの災を目に見ることはないであろう』」。彼らはこの言葉を王に持ち帰った。
Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.