< 歴代誌Ⅱ 27 >
1 ヨタムは王となった時二十五歳で、十六年の間エルサレムで世を治めた。その母はザドクの娘で名をエルシャといった。
Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki.
2 ヨタムはその父ウジヤがしたように主の良しと見られることをした。しかし主の宮には、はいらなかった。民はなお悪を行った。
Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki; kasi ye, atikalaki kokota te kati na Tempelo ya Yawe. Atako bongo, bato bakobaki kosala makambo mabe.
3 彼は主の宮の上の門を建て、オペルの石がきを多く築き増し、
Yotami atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe mpe asalaki misala ebele na mir, na ngomba Ofeli.
4 またユダの山地に数個の町を建て、林の間に城とやぐらを築いた。
Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba.
5 彼はアンモンびとの王と戦ってこれに勝った。その年アンモンの人々は銀百タラント、小麦一万コル、大麦一万コルを彼に贈った。アンモンの人々は第二年にも第三年にも同じように彼に納めた。
Yotami abundisaki mokonzi ya bato ya Amoni mpe alongaki bango. Na mobu wana mpe na mibu mibale oyo elandaki, bato ya Amoni bafutaki ye lokola mpako ya mokonzi bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, bakilo nkoto minei na nkama mitano ya ble mpe bakilo nkoto minei na nkama mitano ya orje.
6 ヨタムはその神、主の前にその行いを堅くしたので力ある者となった。
Yotami akomaki na nguya makasi, pamba te azalaki kotambola na bosembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
7 ヨタムのその他の行為、そのすべての戦いおよびその行いなどは、イスラエルとユダの列王の書にしるされている。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami, bitumba mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.
8 彼は王となった時、二十五歳で、十六年の間エルサレムで世を治めた。
Azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi.
9 ヨタムはその先祖と共に眠ったので、ダビデの町に葬られ、その子アハズが彼に代って王となった。
Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.