< 列王記Ⅰ 5 >

1 さてツロの王ヒラムは、ソロモンが油を注がれ、その父に代って、王となったのを聞いて、家来をソロモンにつかわした。ヒラムは常にダビデを愛したからである。
Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi.
2 そこでソロモンはヒラムに人をつかわして言った、
Salomo azongiselaki Irami maloba oyo:
3 「あなたの知られるとおり、父ダビデはその周囲にあった敵との戦いのゆえに、彼の神、主の名のために宮を建てることができず、主が彼らをその足の裏の下に置かれるのを待ちました。
— Oyebi malamu ete Davidi, tata na ngai, alongaki te kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na ye, likolo ya bitumba oyo azalaki na yango na bikolo oyo ezingelaki ye, kino tango Yawe atiaki bikolo yango na se ya matambe na ye.
4 ところが今わが神、主はわたしに四方の太平を賜わって、敵もなく、災もなくなったので、
Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai.
5 主が父ダビデに『おまえに代って、おまえの位に、わたしがつかせるおまえの子、その人がわが名のために宮を建てるであろう』と言われたように、わが神、主の名のために宮を建てようと思います。
Sik’oyo, nazwi mokano ya kotonga Ndako mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na ngai, ndenge Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai: « Ezali mwana na yo ya mobali oyo nakovandisa na kiti na yo ya bokonzi mpo na kokitana na yo nde akotonga Ndako mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
6 それゆえ、あなたは命令を下して、レバノンの香柏をわたしのために切り出させてください。わたしのしもべたちをあなたのしもべたちと一緒に働かせます。またわたしはすべてあなたのおっしゃるとおり、あなたのしもべたちの賃銀をあなたに払います。あなたの知られるとおり、わたしたちのうちにはシドンびとのように木を切るに巧みな人がないからです」。
Boye, pesa mitindo ete bakatela ngai banzete ya sedele ya Libani. Basali na ngai bakosunga basali na yo, mpe ngai nakofuta yo lifuti oyo okokata mpo na basali na yo, pamba te oyebi malamu ete ezali na bato te kati na biso oyo bayebi kokata banzete lokola bino, bato ya Sidoni.
7 ヒラムはソロモンの言葉を聞いて大いに喜び、「きょう、主はあがむべきかな。主はこのおびただしい民を治める賢い子をダビデに賜わった」と言った。
Tango Irami ayokaki maloba ya Salomo, asepelaki na yango makasi mpe alobaki: — Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo apesaki Davidi mwana oyo atondi na bwanya mpo na kokamba ekolo monene oyo!
8 そしてヒラムはソロモンに人をつかわして言った、「わたしはあなたが申しおくられたことを聞きました。香柏の材木と、いとすぎの材木については、すべてお望みのようにいたします。
Irami atindelaki Salomo eyano oyo: — Nayambaki maloba oyo otindelaki ngai mpe nakosala nyonso oyo ozali na yango posa: banzete ya sedele mpe ya sipele.
9 わたしのしもべどもにそれをレバノンから海に運びおろさせましょう。わたしはそれをいかだに組んで、海路、あなたの指示される場所まで送り、そこでそれをくずしましょう。あなたはそれを受け取ってください。また、あなたはわたしの家のために食物を供給して、わたしの望みをかなえてください」。
Basali na ngai bakomema banzete yango wuta na Libani kino na ebale monene, bakokangisa yango na basinga mpo na kotinda yango na nzela ya ebale monene; mpe nakosala ete ekoma kino na esika oyo okoyebisa ngai. Kuna nde nakofungola yango basinga; mpe yo, okoki kozwa mpe komema yango. Kasi yo, okokokisa posa na ngai oyo: okobanda kopesa basali ya ndako na ngai bilei.
10 こうしてヒラムはソロモンにすべて望みのように香柏の材木と、いとすぎの材木を与えた。
Irami apesaki epai ya Salomo banzete ya sedele mpe ya sipele nyonso oyo azalaki na yango na bosenga.
11 またソロモンはヒラムにその家の食物として小麦二万コルを与え、またオリブをつぶして取った油二万コルを与えた。このようにソロモンは年々ヒラムに与えた。
Salomo mpe, na ngambo na ye, azalaki kopesa mobu na mobu epai ya Irami batone nkoto motoba ya ble, balitele nkoto libwa ya mafuta ya olive ya kitoko koleka, mpo na ndako ya mokonzi.
12 主は約束されたようにソロモンに知恵を賜わった。またヒラムとソロモンの間は平和であって、彼らふたりは条約を結んだ。
Yawe apesaki Salomo bwanya kolanda elaka oyo apesaki ye. Boye, kimia ezalaki kati na Irami mpe Salomo, mpe bango mibale basalaki boyokani.
13 ソロモン王はイスラエルの全地から強制的に労働者を徴募した。その徴募人員は三万人であった。
Mokonzi Salomo azwaki kati na Isalaele mobimba bato nkoto tuku misato mpo na kosala misala makasi.
14 ソロモンは彼らを一か月交代に一万人ずつレバノンにつかわした。すなわち一か月レバノンに、二か月家にあり、アドニラムは徴募の監督であった。
Akabolaki bango na masanga misato ya bato nkoto zomi: babandaki kosala sanza moko, na Libani, mpe basanza mibale na ndako; lisanga moko sima na mosusu. Adonirami azalaki mokambi ya bato ya misala makasi.
15 ソロモンにはまた荷を負う者が七万人、山で石を切る者が八万人あった。
Salomo azwaki lisusu na mosala bato nkoto tuku sambo mpo na komema mikumba, bato nkoto tuku mwambe mpo na kopasola mabanga kati na ngomba;
16 ほかにソロモンには工事を監督する上役の官吏が三千三百人あって、工事に働く民を監督した。
mpe bakambi ya misala, nkoto misato na nkama misato, bazalaki kolandela misala na bokambami ya bakonzi ya misala ya Salomo.
17 王は命じて大きい高価な石を切り出させ、切り石をもって宮の基をすえさせた。
Mokonzi apesaki mitindo ete bapasola mabanga minene mpe ya kitoko mpo na kosalela yango moboko ya Tempelo.
18 こうしてソロモンの建築者と、ヒラムの建築者およびゲバルびとは石を切り、材木と石とを宮を建てるために備えた。
Basali ya Salomo mpe ya Irami, elongo na basali oyo bawutaki na engumba Biblosi, bamikotisaki na mosala ya kokata yango, kopasola mabaya mpe kobongisa mabanga mpo na kotonga Tempelo.

< 列王記Ⅰ 5 >