< 列王記Ⅰ 22 >
1 スリヤとイスラエルの間に戦争がなくて三年を経た。
Bitumba ezalaki te kati ya Isalaele mpe Siri mibu misato.
2 しかし三年目にユダの王ヨシャパテがイスラエルの王の所へ下っていったので、
Kasi na mobu ya misato, Jozafati, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala mokonzi ya Isalaele.
3 イスラエルの王はその家来たちに言った、「あなたがたは、ラモテ・ギレアデがわれわれの所有であることを知っていますか。しかもなおわれわれはスリヤの王の手からそれを取らずに黙っているのです」。
Mokonzi ya Isalaele alobaki na bakalaka na ye: « Boyebi malamu ete Ramoti ya Galadi ezalaka ya biso! Nzokande, tosalaka eloko moko te mpo na kobotola yango na maboko ya mokonzi ya Siri. »
4 彼はヨシャパテに言った、「ラモテ・ギレアデで戦うためにわたしと一緒に行かれませんか」。ヨシャパテはイスラエルの王に言った、「わたしはあなたと一つです。わたしの民はあなたの民と一つです。わたしの馬はあなたの馬と一つです」。
Alobaki mpe na Jozafati: — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi? Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele: — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.
5 ヨシャパテはまたイスラエルの王に言った、「まず、主の言葉を伺いなさい」。
Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele: — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.
6 そこでイスラエルの王は預言者四百人ばかりを集めて、彼らに言った、「わたしはラモテ・ギレアデに戦いに行くべきでしょうか、あるいは控えるべきでしょうか」。彼らは言った、「上っていきなさい。主はそれを王の手にわたされるでしょう」。
Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango: — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Bazongiselaki ye: — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.
7 ヨシャパテは言った、「ここには、われわれの問うべき主の預言者がほかにいませんか」。
Kasi Jozafati atunaki lisusu: — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe?
8 イスラエルの王はヨシャパテに言った、「われわれが主に問うことのできる人が、まだひとりいます。イムラの子ミカヤです。彼はわたしについて良い事を預言せず、ただ悪い事だけを預言するので、わたしは彼を憎んでいます」。ヨシャパテは言った、「王よ、そう言わないでください」。
Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati: — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki: — Tika ete mokonzi aloba bongo te!
9 そこでイスラエルの王は役人を呼んで、「急いでイムラの子ミカヤを連れてきなさい」と言った。
Bongo, mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye: « Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. »
10 さてイスラエルの王およびユダの王ヨシャパテは王の服を着て、サマリヤの門の入口の広場に、おのおのその王座にすわり、預言者たちは皆その前で預言していた。
Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango.
11 ケナアナの子ゼデキヤは鉄の角を造って言った、「主はこう仰せられます、『あなたはこれらの角をもってスリヤびとを突いて彼らを滅ぼしなさい』」。
Nzokande moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Na maseke oyo okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. › »
12 預言者たちは皆そのように預言して言った、「ラモテ・ギレアデに上っていって勝利を得なさい。主はそれを王の手にわたされるでしょう」。
Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko: « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »
13 さてミカヤを呼びにいった使者は彼に言った、「預言者たちは一致して王に良い事を言いました。どうぞ、あなたも、彼らのひとりの言葉のようにして、良い事を言ってください」。
Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye: — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango: sakola elonga mpo na mokonzi!
14 ミカヤは言った、「主は生きておられます。主がわたしに言われる事を申しましょう」。
Kasi Mishe azongisaki: — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
15 彼が王の所へ行くと、王は彼に言った、「ミカヤよ、われわれはラモテ・ギレアデに戦いに行くべきでしょうか、あるいは控えるべきでしょうか」。彼は王に言った、「上っていって勝利を得なさい。主はそれを王の手にわたされるでしょう」。
Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye: — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Mishe azongisaki: — Kende! Okolonga! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
16 しかし王は彼に言った、「幾たびあなたを誓わせたら、あなたは主の名をもって、ただ真実のみをわたしに告げるでしょうか」。
Kasi mokonzi alobaki na ye: — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe?
17 彼は言った、「わたしはイスラエルが皆、牧者のない羊のように、山に散っているのを見ました。すると主は『これらの者は飼主がいない。彼らをそれぞれ安らかに、その家に帰らせよ』と言われました」。
Mishe azongisaki: — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi: « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia! »
18 イスラエルの王はヨシャパテに言った、「彼がわたしについて良い事を預言せず、ただ悪い事だけを預言すると、あなたに告げたではありませんか」。
Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai; asakolaka kaka makambo ya mabe!
19 ミカヤは言った、「それゆえ主の言葉を聞きなさい。わたしは主がその玉座にすわり、天の万軍がそのかたわらに、右左に立っているのを見たが、
Mishe alobaki: — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
20 主は『だれがアハブをいざなってラモテ・ギレアデに上らせ、彼を倒れさせるであろうか』と言われました。するとひとりはこの事を言い、ひとりはほかの事を言いました。
Yawe atuni: « Nani akokosa Akabi mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna? » Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye.
21 その時一つの霊が進み出て、主の前に立ち、『わたしが彼をいざないましょう』と言いました。
Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki: « Ngai oyo! Nakokosa ye. » Yawe atunaki molimo yango: « Okosala yango ndenge nini? »
22 主は『どのような方法でするのか』と言われたので、彼は『わたしが出て行って、偽りを言う霊となって、すべての預言者の口に宿りましょう』と言いました。そこで主は『おまえは彼をいざなって、それを成し遂げるであろう。出て行って、そうしなさい』と言われました。
Molimo yango ezongisaki: « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki: « Solo, okolonga kokosa ye! Kende mpe sala bongo. »
23 それで主は偽りを言う霊をあなたのすべての預言者の口に入れ、また主はあなたの身に起る災を告げられたのです」。
Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo!
24 するとケナアナの子ゼデキヤは近寄って、ミカヤのほおを打って言った、「どのようにして主の霊がわたしを離れて、あなたに語りましたか」。
Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki: — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo?
25 ミカヤは言った、「あなたが奥の間にはいって身を隠すその日に、わかるでしょう」。
Mishe azongisaki: — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
26 イスラエルの王は言った、「ミカヤを捕え、町のつかさアモンと、王の子ヨアシの所へ引いて帰って、
Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo: — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi.
27 言いなさい、『王がこう言います、この者を獄屋に入れ、わずかのパンと水をもって彼を養い、わたしが勝利を得て帰ってくるのを待て』」。
Boloba na bango: « Tala makambo oyo mokonzi alobi: ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
28 ミカヤは言った、「もしあなたが勝利を得て帰ってこられるならば、主がわたしによって語られなかったのです」。また彼は言った、「あなたがた、すべての民よ、聞きなさい」。
Mishe alobaki: — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te! Abakisaki: — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi!
29 こうしてイスラエルの王とユダの王ヨシャパテはラモテ・ギレアデに上っていった。
Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi.
30 イスラエルの王はヨシャパテに言った、「わたしは姿を変えて、戦いに行きます。あなたは王の服を着けなさい」。イスラエルの王は姿を変えて戦いに行った。
Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: « Nakomibongola wana nakokende na bitumba; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. » Boye mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba.
31 さて、スリヤの王は、その戦車長三十二人に命じて言った、「あなたがたは、小さい者とも大きい者とも戦わないで、ただイスラエルの王とだけ戦いなさい」。
Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar: « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. »
32 戦車長らはヨシャパテを見たとき、これはきっとイスラエルの王だと思ったので、身をめぐらして、これと戦おうとすると、ヨシャパテは呼ばわった。
Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki: « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Balandaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi.
33 戦車長らは彼がイスラエルの王でないのを見たので、彼を追うことをやめて引き返した。
Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar, basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye.
34 しかし、ひとりの人が何心なく弓をひいて、イスラエルの王の胸当と草摺の間を射たので、彼はその戦車の御者に言った、「わたしは傷を受けた。戦車をめぐらして、わたしを戦場から運び出せ」。
Kasi moto moko ya Siri abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar: « Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. »
35 その日戦いは激しくなった。王は戦車の中にささえられて立ち、スリヤびとにむかっていたが、ついに、夕暮になって死んだ。傷の血は戦車の底に流れた。
Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri; mpe na pokwa, akufaki. Makila oyo ebimaki na pota na ye esopanaki kati na shar.
36 日の没するころ、軍勢の中に呼ばわる声がした、「めいめいその町へ、めいめいその国へ帰れ」。
Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga: « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye! »
37 王は死んで、サマリヤへ携え行かれた。人々は王をサマリヤに葬った。
Boye mokonzi akufaki, mpe bamemaki ye na Samari; mpe bakundaki ye kuna.
38 またその戦車をサマリヤの池で洗ったが、犬がその血をなめた。また遊女がそこで身を洗った。主が言われた言葉のとおりである。
Basukolaki shar na ye na liziba moko oyo ezalaki na Samari epai wapi basi ya ndumba bazalaki kosukola; mpe bambwa elembolaki makila na ye kolanda maloba oyo Yawe alobaki.
39 アハブのそのほかの事績と、彼がしたすべての事と、その建てた象牙の家と、その建てたすべての町は、イスラエルの王の歴代志の書にしるされているではないか。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
40 こうしてアハブはその先祖と共に眠って、その子アハジヤが代って王となった。
Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
41 アサの子ヨシャパテはイスラエルの王アハブの第四年にユダの王となった。
Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele.
42 ヨシャパテは王となった時、三十五歳であったが、エルサレムで二十五年世を治めた。その母の名はアズバといい、シルヒの娘であった。
Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.
43 ヨシャパテは父アサのすべての道に歩み、それを離れることなく、主の目にかなう事をした。ただし高き所は除かなかったので、民はなお高き所で犠牲をささげ、香をたいた。
Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
44 ヨシャパテはまたイスラエルの王と、よしみを結んだ。
Jozafati abikaki na kimia elongo na mokonzi ya Isalaele.
45 ヨシャパテのその他の事績と、彼があらわした勲功およびその戦争については、ユダの王の歴代志の書にしるされているではないか。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, misala na ye mpe bitumba na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
46 彼は父アサの世になお残っていた神殿男娼たちを国のうちから追い払った。
Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi.
47 そのころエドムには王がなく、代官が王であった。
Na tango wana, mokonzi azalaki te kati na mokili ya Edomi. Ezalaki kaka na moyangeli moko oyo azalaki kotambolisa kuna.
48 ヨシャパテはタルシシの船を造って、金を獲るためにオフルに行かせようとしたが、その船はエジオン・ゲベルで難破したため、ついに行かなかった。
Jozafati asalisaki bamasuwa ya Tarsisi mpo na kokende koluka wolo na Ofiri; kasi elongaki te kokende, pamba te bamasuwa ebukanaki na Etsioni-Geberi.
49 そこでアハブの子アハジヤはヨシャパテに「わたしの家来をあなたの家来と一緒に船で行かせなさい」と言ったが、ヨシャパテは承知しなかった。
Boye Akazia, mwana mobali ya Akabi, alobaki na Jozafati: « Tika ete basali na ngai bakende nzela moko na basali na yo na bamasuwa! » Kasi Jozafati aboyaki.
50 ヨシャパテはその先祖と共に眠って、父ダビデの町に先祖と共に葬られ、その子ヨラムが代って王となった。
Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
51 アハブの子アハジヤはユダの王ヨシャパテの第十七年にサマリヤでイスラエルの王となり、二年イスラエルを治めた。
Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na sambo na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi na Isalaele na Samari. Asalaki mibu mibale na bokonzi.
52 彼は主の目の前に悪を行い、その父の道と、その母の道、およびかのイスラエルに罪を犯させたネバテの子ヤラベアムの道に歩み、
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe; pamba te alandaki banzela ya tata na ye, ya mama na ye mpe ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki ete Isalaele asala lisumu.
53 バアルに仕えて、それを拝み、イスラエルの神、主を怒らせた。すべて彼の父がしたとおりであった。
Asalelaki nzambe Bala mpe agumbamelaki yango; na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge kaka tata na ye asalaki.