< 歴代誌Ⅰ 28 >
1 ダビデはイスラエルのすべての長官、すなわち部族の長、王に仕えた組の長、千人の長、百人の長、王とその子たちのすべての財産および家畜のつかさ、宦官、有力者、勇士などをことごとくエルサレムに召し集めた。
Davidi abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele, na Yelusalemi: bakonzi ya mabota, bakonzi ya masanga ya basoda oyo bazalaki kosalela mokonzi, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda, babateli bozwi mpe bibwele ya mokonzi, bato oyo balandelaka bana na ye ya mibali elongo na basali ya ndako ya mokonzi, basoda ya mpiko mpe bato nyonso ya lokumu.
2 そしてダビデ王はその足で立ち上がって言った、「わが兄弟たち、わが民よ、わたしに聞きなさい。わたしは主の契約の箱のため、われわれの神の足台のために安住の家を建てようとの志をもち、すでにこれを建てる準備をした。
Mokonzi Davidi atelemaki mpe alobaki: — Boyoka ngai, bandeko na ngai mpe bato na ngai: Nazalaki na likanisi ya kotonga esika ya kopema mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, enyatelo ya makolo ya Nzambe na biso; bongo nabongisaki biloko mpo na kotonga yango.
3 しかし神はわたしに言われた、『おまえはわが名のために家を建ててはならない。おまえは軍人であって、多くの血を流したからである』と。
Kasi Nzambe alobaki na ngai: « Okotonga ndako mpo na Kombo na Ngai te, pamba te ozali moto ya bitumba mpe osopaki makila. »
4 それにもかかわらず、イスラエルの神、主はわたしの父の全家のうちからわたしを選んで長くイスラエルの王とせられた。すなわちユダを選んでかしらとし、ユダの家のうちで、わたしの父の家を選び、わたしの父の子らのうちで、わたしを喜び、全イスラエルの王とせられた。
Nzokande, Yawe, Nzambe ya Isalaele, aponaki ngai kati na libota na ngai mobimba mpo ete nazala mokonzi ya Isalaele mpo na libela. Aponaki Yuda mpo ete azala mokonzi; mpe kati na ndako ya Yuda, aponaki libota ya tata na ngai; mpe kati na bana mibali ya tata na ngai, asepelaki kokomisa ngai mokonzi ya Isalaele mobimba.
5 そして主はわたしに多くの子を賜わり、そのすべての子らのうちからわが子ソロモンを選び、これを主の国の位にすわらせて、イスラエルを治めさせようとせられた。
Kati na bana na ngai nyonso ya mibali, pamba te Yawe apesi ngai bango ebele, aponaki Salomo, mwana na ngai ya mobali, mpo ete avanda na Kiti ya Bokonzi ya Yawe kati na Isalaele.
6 主はまたわたしに言われた、『おまえの子ソロモンがわが家およびわが庭を造るであろう。わたしは彼を選んでわが子となしたからである。わたしは彼の父となる。
Alobaki na ngai: « Mwana na yo, Salomo, nde akotonga Ndako na Ngai mpe lopango na Ngai, pamba te naponaki ye mpo ete azala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala tata mpo na ye.
7 彼がもし今日のように、わが戒めとわがおきてを固く守って行うならば、わたしはその国をいつまでも堅くするであろう』と。
Nakolendisa bokonzi na ye mpo na libela soki akangami makasi na mibeko na Ngai ndenge azali kosala yango lelo. »
8 それゆえいま、主の会衆なる全イスラエルの目の前およびわれわれの神の聞かれる所であなたがたに勧める。あなたがたはその神、主のすべての戒めを守り、これを求めなさい。そうすればあなたがたはこの良き地を所有し、これをあなたがたの後の子孫に長く嗣業として伝えることができる。
Sik’oyo, napesi bino mokumba liboso ya Isalaele mobimba, ya lisanga ya Yawe, mpe liboso ya Nzambe na biso, oyo azali koyoka biso: Bosala keba mpo na kolanda mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bino, mpo ete bozwa mokili oyo ya kitoko mpe kotika yango lokola libula epai ya bakitani na bino mpo na libela.
9 わが子ソロモンよ、あなたの父の神を知り、全き心をもって喜び勇んで彼に仕えなさい。主はすべての心を探り、すべての思いを悟られるからである。あなたがもし彼を求めるならば会うことができる。しかしあなたがもしかれを捨てるならば彼は長くあなたを捨てられるであろう。
Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.
10 それであなたは慎みなさい。主はあなたを選んで聖所とすべき家を建てさせようとされるのだから心を強くしてこれを行いなさい」。
Yeba sik’oyo ete Yawe aponi yo mpo ete otongela Ye Ndako oyo ekozala Esika na Ye ya Bule. Yika mpiko mpe sala mosala.
11 こうしてダビデは神殿の廊およびその家、その倉、その上の室、その内の室、贖罪所の室などの計画をその子ソロモンに授け、
Davidi apesaki Salomo, mwana na ye ya mobali, elili ya ndako moke ya kokotela na Tempelo, ya bandako mosusu ya Tempelo, ya bibombelo na yango, ya bashambre na yango ya likolo, ya bashambre na yango ya kati mpe ya esika ya bolimbisi masumu.
12 またその心にあったすべてのもの、すなわち主の宮の庭、周囲のすべての室、神の家の倉、ささげ物の倉などの計画を授け、
Apesaki ye elili ya nyonso oyo molimo atiaki na makanisi na ye na tina na lopango ya Tempelo ya Yawe, ya bashambre nyonso ya zingazinga, ya biloko ya talo ya Ndako ya Nzambe mpe ya biloko ya bule.
13 また祭司およびレビびとの組と、主の宮のもろもろの務の仕事と、主の宮のもろもろの勤めの器物について授け、
Davidi apesaki ye mibeko na tina na masanga ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi, na tina na misala nyonso mpe bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe.
14 またもろもろの勤めに用いるすべての金の器を造る金の目方、およびもろもろの勤めに用いる銀の器の目方を定めた。
Mpo na bisalelo ya mosala, Davidi atalisaki kilo ya wolo oyo ekoki mpo na bisalelo nyonso ya wolo; kilo ya palata oyo ekoki mpo na bisalelo nyonso ya palata:
15 すなわち金の燭台と、そのともしび皿の目方、おのおのの燭台と、そのともしび皿の金の目方を定め、また銀の燭台についてもおのおのの燭台の用法にしたがって燭台と、そのともしび皿の銀の目方を定めた。
kilo ya wolo mpo na bitelemiselo ya minda basala na wolo mpe minda na yango ya wolo kolanda kilo ya etelemiselo moko na moko ya minda elongo na minda na yango; kilo ya palata mpo na etelemiselo moko na moko ya minda, basala na palata mpe minda na yango ya palata kolanda mosala ya etelemiselo moko na moko ya mwinda;
16 また供えのパンの机については、そのおのおのの机のために金の目方を定め、また銀の机のためにも銀を定め、
kilo ya wolo mpo na mesa moko na moko ya mapa oyo ebulisami, kilo ya palata mpo na bamesa ya palata;
17 また肉さし、鉢、かめに用いる純金の目方を定め、金の大杯についてもおのおのの目方を定め、銀の大杯についてもおのおのの目方を定め、
kilo ya wolo ya peto mpo na bakanya, basani oyo basalelaka mpo na kosopa mayi, mpe mpo na bakopo ya milayi; kilo ya wolo mpo na kopo moko na moko ya moke moko; kilo ya palata mpo na moko na moko ya bakopo mike ya palata;
18 また香の祭壇のために精金の目方を定め、また翼を伸べて主の契約の箱をおおっているケルビムの金の車のひな型の金を定めた。
mpe kilo ya wolo ya peto mpo na etumbelo ya malasi. Apesaki ye lisusu elili ya shar ya basheribe ya wolo oyo mapapu na yango ezali ya kofungwama mpe ezipi Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
19 ダビデはすべての工作が計画にしたがってなされるため、これについて主の手によって書かれたものにより、これをことごとく明らかにした。
Davidi alobaki: — Nyonso oyo nazali na yango na mokanda oyo, ekomami na loboko na Yawe; Ye moko apesi ngai mayele mpo na kososola misala nyonso oyo elili ezali kotalisa.
20 ダビデはその子ソロモンに言った、「あなたは心を強くし、勇んでこれを行いなさい。恐れてはならない。おののいてはならない。主なる神、わたしの神があなたとともにおられるからである。主はあなたを離れず、あなたを捨てず、ついに主の宮の務のすべての工事をなし終えさせられるでしょう。
Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali: — Yika mpiko mpe sala mosala! Kobanga te, kozala mpe na somo te; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.
21 見よ、神の宮のすべての務のためには祭司とレビびとの組がある。またもろもろの勤めのためにすべての仕事を喜んでする巧みな者が皆あなたと共にある。またつかさたちおよびすべての民もあなたの命じるところをことごとく行うでしょう」。
Ezali mpe na masanga ebele ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi oyo babongisami mpo na misala ya ndenge na ndenge kati na Tempelo ya Yawe. Na mosala oyo nyonso, okozwa lisungi ya bato oyo bayebi mosala malamu, oyo bamipesa bango moko mpo na misala ya ndenge na ndenge. Bakonzi mpe bato nyonso bakotosa mitindo na yo.