< 使徒の働き 15 >
1 ある人たちがユダヤから下って来て,兄弟たちにこう教えていた。「モーセの慣習に従って割礼を受けない限り,あなた方は救われない」。
Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko: — Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko.
2 それで,パウロやバルナバと彼らとの間に少なからぬ不和と議論が生じたので,人々は,パウロとバルナバ,および自分たちのうちのほかの幾人かがエルサレムに上り,この議論のことで使徒たちや長老たちを訪ねることを決めた。
Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango.
3 彼らは集会によって送り出され,フェニキアとサマリアを通り抜け,異邦人たちの改宗の次第を詳しく説明して,すべての兄弟たちを大いに喜ばせた。
Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.
4 エルサレムに着くと,集会と使徒たちと長老たちから迎えられ,神が自分たちと共に行なった事柄すべてを報告した。
Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.
5 ところが,信者となっていた幾人かのファリサイ派の者たちが立ち上がって,こう言った。「彼らに割礼を施して,モーセの律法を守るようにと命じることが必要です」。
Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba: — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.
6 使徒たちや長老たちは,この問題について調べるために集まった。
Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango.
7 多くの議論があったのち,ペトロが立ち上がって彼らに言った,「兄弟たち,ご存じのとおり,ずっと以前に,神はあなた方の間からわたしを選ばれ,異邦人たちがわたしの口から福音の言葉を聞いて信じるようにされました。
Lokola tembe elekaki makasi, Petelo atelemaki mpe alobaki: — Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino mpo ete nakoka koteya Sango Malamu epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bakoma bandimi.
8 心を知っておられる神は,わたしたちにされたのと同じようにして彼らに聖霊をお与えになり,彼らについて証言されたのです。
Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso.
9 神は,わたしたちと彼らとの間に区別を設けずに,彼らの心を信仰によって清められました。
Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te akomisaki mitema na bango peto na nzela ya kondima.
10 それなのに,どうして今,わたしたちの父祖たちもわたしたちも負うことのできなかったくびきをあの弟子たちの首にかけて,神を試みるのですか。
Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso?
11 それどころか,わたしたちは,彼らと同じく主イエスの恵みによって救われることを信じているのです」。
Te! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango.
12 群衆はみな静かになった。そして,バルナバとパウロが,彼らを通して神が異邦人たちの間で行なったしるしや不思議な業について報告するのに耳を傾けた。
Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.
13 二人が話し終えると,ヤコブが答えた,「兄弟たち,わたしの言うことを聞いてください。
Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki: — Bandeko, boyoka ngai!
14 シメオンは,神が最初に異邦人たちを気にかけて,その中からご自分のみ名のために民を取り出された次第を話してくれました。
Simona awuti koyebisa biso ndenge nini, wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na Ye.
15 これは預言者たちの言葉と一致しています。こう書かれているとおりです。
Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli, kolanda ndenge ekomama:
16 『これらの事ののち,わたしは戻って来て,ダビデの倒れた幕屋を建て直し,その廃虚を建て直すだろう。それを元どおりにするだろう。
« Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi, oyo esila kokweya; nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango,
17 残っている者たち,わたしの名によって呼ばれるすべての異邦人たちが主を探し求めるようになるために。これらのすべての事を行なわれる主が言われる。
mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo, ezala bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengamaka na Kombo na Ngai, elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo,
18 神にとってそのすべての業は遠い昔から知らされているのである』。 (aiōn )
makambo oyo eyebana wuta kala. » (aiōn )
19 「それで,わたしの意見はこうです。すなわち,わたしたちは,異邦人たちの中から神に立ち返った人たちを悩ませることはせず,
Yango wana, tala likanisi na ngai: Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe.
20 ただ,偶像に汚されたものと,淫行と,絞め殺されたものと,血を避けるようにと,彼らに書き送るのがよいでしょう。
Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.
21 モーセについては,昔からどの町にも宣教する者たちがおり,安息日ごとに諸会堂で朗読されているからです」。
Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.
22 そこで,使徒たちと長老たちは,集会全体と共に,自分たちの中から人を選んで,パウロやバルナバと一緒にアンティオキアに遣わすのがよいと考えた。すなわち,バルサバスと呼ばれるユダとシラスで,兄弟たちの間で主立った人たちであった。
Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
23 彼らは次のように書いてこの人たちの手に託した。 「使徒たち,長老たち,および兄弟たちから,アンティオキア,シリア,キリキアにいる異邦人の兄弟たちへ。あいさつを送ります。
Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye: Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino: Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi; Mbote na bino.
24 わたしたちの中から行ったある者たちが,いろいろな言葉によってあなた方を悩ませ,わたしたちが命じてもいないのに,「あなた方は割礼を受けて,律法を守らなければならない」と言って,あなた方の魂を乱したことを聞きましたので,
Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.
25 わたしたちは満場一致で,人を選んで,わたしたちの愛するバルナバやパウロと共に,あなた方のもとに遣わすのがよいと考えました。
Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo,
26 この二人は,わたしたちの主イエス・キリストのみ名のために,自分の命をかけている者たちです。
ba-oyo bakaba bomoi na bango mpo na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
27 それで,わたしたちはユダとシラスを遣わしますが,この二人も同じことを口頭であなた方に告げるでしょう。
Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.
28 というのは,聖霊とわたしたちとは,次の必要な事柄のほかには,あなた方にいかなる重荷も負わせないのがよいと考えたからです。
Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo:
29 すなわち,偶像に汚されたものと,血と,絞め殺されたものと,淫行を避けることです。これらのものから身を守っていればよいのです。ご健勝で」。
Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu!
30 こうして,彼らは送り出されて,アンティオキアに着いた。集団を集めて,手紙を手渡した。
Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango.
Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi na malendisi oyo ezalaki kati na yango.
32 ユダとシラスは,彼ら自身も預言者であったので,多くの言葉をもって兄弟たちを励まし,元気づけた。
Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.
33 しばらくの間そこで過ごしてから,兄弟たちからのあいさつを携えて再び使徒たちのもとに送り出された。
Bawumelaki wana mwa tango, mpe bandeko batombelaki bango kimia mpo na bozongi epai ya bato oyo batindaki bango. [
Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.]
35 しかし,パウロとバルナバはアンティオキアにとどまり,他の多くの人たちと共に,主の言葉を教え,宣教していた。
Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo.
36 数日後,パウロはバルナバに言った,「さあ,もう一度行って,わたしたちが主の言葉を宣明したすべての町にいるわたしたちの兄弟たちを訪ね,彼らがどうしているかを見て来ようではないか」。
Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi: — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.
37 バルナバは,マルコと呼ばれるヨハネを一緒に連れて行くつもりであった。
Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako;
38 しかしパウロは,パンフィリアで自分たちから離れ,同行して業を行なわなかったような者は,一緒に連れて行かないほうがよいと考えた。
kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala.
39 それで,激しい口論が起こり,彼らは互いに別れることになった。バルナバはマルコを連れ,キュプロスへ出航した。
Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi azwaki Malako mpe akotaki elongo na ye kati na masuwa mpo na kokende na Shipre.
40 一方,パウロはシラスを選び,兄弟たちから神の恵みにゆだねられて出発した。
Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo.
41 シリアとキリキアを通り抜けながら,各地の集会を強めた。
Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.