< ゼカリヤ書 13 >
1 その日罪と汚穢を清むる一の泉ダビデの家とヱルサレムの居民のために開くべし
Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
2 萬軍のヱホバ言たまふ其日には我地より偶像の名を絶のぞき重て人に記憶らるること無らしむべし我また預言者および汚穢の靈を地より去しむべし
Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.
3 人もしなほ預言することあらば其生の父母これに言ん汝は生べからず汝はヱホバの名をもて虚僞を語るなりと而してその生の父母これが預言しをるを刺ん
Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye: ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga.
4 その日には預言者等預言するに方りてその異象を羞ん重て人を欺かんために毛衣を纒はじ
Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.
5 彼言ん我は預言者にあらず地を耕へす者なり即ち我は若き時より人に買れたりと
Akoloba: ‹ Nazali na ngai mosakoli te; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai! ›
6 若これに向ひて然らば汝の兩手の間の傷は何ぞやと言あらば是は我が愛する者の家にて受たる傷なりと答へん
Soki batuni ye: ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi? › Akozongisa: ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. ›
7 萬軍のヱホバ言たまふ劍よ起て我牧者わが伴侶なる人を攻よ牧者を撃て然らばその羊散らん我また我手を小き者等の上に伸べし
Oh mopanga, telema! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
8 ヱホバ言たまふ全地の人二分は絶れて死に三分の一はその中に遺らん
Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.
9 我その三分の一を携へて火にいれ銀を熬分るごとくに之を熬分け金を試むるごとくに之を試むべし彼らわが名を呼ん我これにこたへん我これは我民なりと言ん彼等またヱホバは我神なりと言ん
Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango: ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba: ‹ Yawe azali Nzambe na biso! › »