< 詩篇 95 >

1 率われらヱホバにむかひてうたひ すくひの磐にむかひてよろこばしき聲をあげん
Boya, toganga na esengo mpo na Yawe! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso!
2 われら感謝をもてその前にゆき ヱホバにむかひ歌をもて歓ばしきこゑをあげん
Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.
3 そはヱホバは大なる神なり もろもろの神にまされる大なる王なり
Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.
4 地のふかき處みなその手にあり 山のいただきもまた神のものなり
Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.
5 うみは神のものその造りたまふところ旱ける地もまたその手にて造りたまへり
Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye.
6 いざわれら拝みひれふし我儕をつくれる主ヱホバのみまへに曲跪くべし
Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso!
7 彼はわれらの神なり われらはその草苑の民その手のひつじなり 今日なんぢらがその聲をきかんことをのぞむ
Pamba te azali Nzambe na biso; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
8 なんぢらメリバに在りしときのごとく 野なるマサにありし日の如く その心をかたくなにするなかれ
« boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe
9 その時なんぢらの列祖われをこころみ我をためし 又わがわざをみたり
epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.
10 われその代のためにうれへて四十年を歴 われいへり かれらは心あやまれる民わが道を知ざりきと
Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki: ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›
11 このゆゑに我いきどほりて彼等はわが安息にいるべからずと誓ひたり
Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › »

< 詩篇 95 >